1 Petro 1:1-25

1  Petro, ntoma+ ya Yesu Kristo, epai ya bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse,+ oyo bapalangani+ na Ponti, Galatia, Kapadosi,+ Azia, mpe Bitinia; mpe epai ya bato oyo baponami+  na kolanda boyebi oyo Nzambe Tata azali na yango ya koyeba makambo liboso,+ baoyo basantisami na elimo,+ mpo bázala bato ya botosi mpe oyo bamwangisami+ makila ya Yesu Kristo:+ Boboto monene mpe kimya mingi ezala na bino.+  Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo apambwama,+ mpo na motema mawa na ye monene abotaki biso lisusu+ mpo na elikya ya bomoi+ na nzela ya lisekwa+ ya Yesu Kristo uta na bakufi,  mpo na libula oyo ekoki kopɔla te, oyo ezali na mbindo te mpe oyo enzulukaka te.+ Ebombami mpo na bino na likoló,+  bino baoyo nguya ya Nzambe ezali kobatela bino na nzela ya kondima+ mpo na lobiko+ oyo etikali moke emonisama+ na ntango ya nsuka.+  Mpo na yango bozali kosepela mingi, atako sikoyo, esengeli bóyoka mawa na komekama ndenge na ndenge mpo na mwa ntango moke,+  mpo kondima na bino oyo emekami,+ oyo ezali na motuya monene koleka wolo oyo ebebaka atako emekami na mɔtɔ,+ esala ete bózwa longonya, nkembo ná lokumu ntango Yesu Kristo akomonana.+  Atako bomoná ye te, bozali kolinga ye.+ Atako bozali komona ye te sikoyo, bozali kondimela ye mpe bozali na esengo mingi ya koloba te mpe ya monene mpenza,  mpo bozali kozwa mbuma ya kondima na bino, lobiko ya milimo na bino.+ 10  Mpo na lobiko yango, basakoli oyo basakolaki+ mpo na boboto monene oyo ekanamaki mpo na bino+ batunatunaki na molende mpe balukalukaki mpenza.+ 11  Bazalaki kolukaluka koyeba eleko nini mpenza+ to na eleko ya ndenge nini makambo oyo elimo+ oyo ezalaki na kati na bango ezalaki kolakisa mpo na Kristo+ ekokoka. Ezalaki kotatola libelalibela bampasi ya Kristo+ mpe nkembo+ oyo esengelaki koya nsima na yango. 12  Bamonisaki bango ete ezali mpo na bango te,+ kasi mpo na bino nde bazalaki kosala makambo oyo ezali kosakolama+ sikoyo epai na bino na nzela ya baoyo basakwelaki bino nsango malamu na nzela ya elimo santu+ oyo etindamaki uta na likoló. Makambo wana nde baanzelu bazalaka na mposa ya kotalatala.+ 13  Yango wana bóbongisa makanisi na bino mpo na mosala,+ bóbatela makanisi na bino mobimba;+ bótya elikya na bino na boboto monene+ oyo bokozwa ntango Yesu Kristo akomonana.+ 14  Lokola bana ya botosi, bótika kolanda+ bamposa oyo bozalaki na yango kala ntango bozalaki na boyebi te, 15  kasi, na boyokani na Mosantu oyo abengaki bino, bino mpe bókóma basantu na etamboli na bino mobimba,+ 16  mpo ekomamá ete: “Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.”+ 17  Lisusu, soki bozali kobelela Tata oyo aponaka bilongi te ntango asambisaka+ na kolanda mosala ya moto na moto, bómitambwisa na kobanga+ na ntango oyo bofandi bapaya.+ 18  Mpo boyebi ete ezalaki te na biloko oyo epɔlaka,+ na palata to na wolo, nde bosikolamaki+ na etamboli na bino oyo ebotaka mbuma te oyo bozwaki na mimeseno oyo eutaki na bankɔkɔ na bino. 19  Kasi ezalaki nde na makila moko ya motuya,+ lokola oyo ya mwana-mpate ezangi mbeba mpe ezangi litɔnɔ,+ ɛɛ oyo ya Kristo.+ 20  Ya solo, ayebaná kala mpenza liboso ya ebandeli+ ya mokili, kasi amonisamaki polele na nsuka ya bantango mpo na bino+ 21  baoyo na nzela na ye bozali bato oyo bandimaka Nzambe,+ oyo alamwisaki ye uta na bakufi+ mpe apesaki ye nkembo;+ mpo kondima na bino mpe elikya na bino ezala epai ya Nzambe.+ 22  Sikoyo lokola bopɛtoli+ milimo na bino na ndenge bozali kotosa solo mpe yango eboti bolingo ya bondeko oyo ezali na bokosi te,+ bólinganaka makasi na motema moko.+ 23  Mpo kobotama oyo bobotami lisusu,+ ezali te na nzela ya momboto oyo epɔlaka,+ kasi nde na nzela ya oyo+ ekoki kopɔla te,+ na nzela ya liloba+ ya Nzambe ya bomoi mpe ya libela.+ 24  Mpo “bato nyonso bazali lokola matiti, mpe nkembo na yango mobimba ezali lokola fololo ya matiti;+ matiti ekaukaka, mpe fololo ekweaka,+ 25  kasi liloba ya Yehova ezali koumela libela na libela.”+ Ɛɛ, “liloba”+ yango nde nsango malamu oyo basakweli+ bino.

Maloba na nse