1 Ntango 9:1-44
9 Bayisraele nyonso bakomamaki nkombo na kolanda molɔngɔ ya bankɔkɔ na bango;+ mpe talá, bakomami na Buku ya Bakonzi ya Yisraele. Mpe Yuda bamemamaki na mboka mopaya+ na Babilone mpo bazalaki sembo te.
2 Mpe bato ya liboso oyo bafandaki na bisika na bango na kati ya bingumba na bango ezalaki Bayisraele,+ banganga-nzambe,+ Balevi+ ná Banetinime.+
3 Mpe bana mosusu ya Yuda+ mpe bana mosusu ya Benyamina+ mpe bana mosusu ya Efraime ná ya Manase bafandaki na Yerusaleme:+
4 Utai mwana ya Amihude mwana ya Omiri mwana ya Imiri mwana ya Bani, na bana ya Pereze+ mwana ya Yuda.+
5 Mpe na Bashilo:+ Asaya mwana ya liboso ná bana na ye.
6 Mpe na bana ya Zera:+ Yeuele, ná bandeko na bango nkama motoba na ntuku libwa (690).
7 Mpe na bana ya Benyamina: Salu mwana ya Meshulame mwana ya Hodavia mwana ya Hasenua,
8 Yibineya mwana ya Yerohame, Ela mwana ya Uzi mwana ya Mikri, Meshulame mwana ya Shefatia mwana ya Rewele mwana ya Yibiniya.
9 Mpe bandeko na bango, ndenge bakitanaki, bazalaki bato nkama libwa na ntuku mitano na motoba (956). Baoyo nyonso nde mibali oyo bazalaki bankumu ya batata, na kolanda ndako ya bankɔkɔ na bango.
10 Mpe na banganga-nzambe: Yedaya, Yehoyaribe, Yakine,+
11 Azaria+ mwana ya Hilikiya mwana ya Meshulame mwana ya Zadoke mwana ya Merayote mwana ya Ahitube, mokambi ya ndako ya Nzambe ya solo,
12 Adaya mwana ya Yerohame mwana ya Pashure mwana ya Malakiya, Maasai mwana ya Adiele mwana ya Yahazera mwana ya Meshulame mwana ya Meshilemite+ mwana ya Imere,
13 mpe bandeko na bango, bankumu ya ndako ya bankɔkɔ na bango: bato nkóto moko na nkama nsambo na ntuku motoba (1 760), mibali ya nguya oyo bazalaki na makoki+ ya kosala mosala ya ndako ya Nzambe ya solo.
14 Mpe na Balevi: Shemaya mwana ya Hashube mwana ya Azirikame mwana ya Hashabiya+ na kati ya bana ya Merari;
15 mpe Bakabakare, Hereshe ná Galale, Matania+ mwana ya Mika+ mwana ya Zikri+ mwana ya Asafe,+
16 mpe Obadia mwana ya Shemaya+ mwana ya Galale mwana ya Yedutune,+ mpe Berekia mwana ya Asa mwana ya Elekana, oyo azalaki kofanda na bamboka ya Banetofa.+
17 Mpe bakɛngɛli ya baporte:+ Shalume,+ Akube, Talamone, Ahimane mpe ndeko na bango Shalume, ye nde nkumu,
18 mpe tii na ntango wana azalaki na porte ya mokonzi,+ na ɛsti. Bango nde bazalaki bakɛngɛli ya baporte ya bakaa ya bana ya Levi.+
19 Shalume mwana ya Kore mwana ya Ebiasafe+ mwana+ ya Kora+ mpe bandeko na ye ya ndako ya tata na ye, Bakora,+ bazalaki kokamba misala, bakɛngɛli ya baporte+ ya hema, mpe batata na bango bazalaki kokamba kaa ya Yehova, bakɛngɛli ya esika ya kokɔta.
20 Mpe Finehase+ mwana ya Eleazare+ nde azalaki mokambi na bango kala. Yehova azalaki elongo na ye.+
21 Zekaria+ mwana ya Meshelemia azalaki mokɛngɛli ya monɔkɔ ya hema ya kokutana.
22 Bango nyonso baoyo baponamaki bakɛngɛli ya bisika ya kokɔta na ndako bazalaki nkama mibale na zomi na mibale (212). Bazalaki na bamboka+ na bango, ndenge bakomamaki nkombo na kolanda molɔngɔ ya bankɔkɔ na bango.+ Bango nde Davidi+ ná Samwele momoni-makambo+ batyaki na misala ya bato oyo bakoki kotyelama motema.+
23 Mpe bango ná bana na bango bazalaki kotalela baporte ya ndako ya Yehova, ɛɛ, ndako ya hema, na mosala ya kokɛngɛla.+
24 Mpe bakɛngɛli ya baporte bazalaki na bangámbo minei: na ɛsti,+ na wɛsti,+ na nɔrdi+ mpe na sudi.+
25 Mpe bandeko na bango, na bamboka na bango, bazalaki koya mpo na mikolo nsambo,+ mbala na mbala, mpo na kosala na bango.
26 Mpo mibali minei ya nguya na kati ya bakɛngɛli ya baporte bazalaki na misala ya bato oyo bakoki kotyelama motema. Bazalaki Balevi, mpe bazalaki na mokumba ya kotalela bisika ya kolya+ mpe bisika ya kobomba biloko ya motuya+ ya ndako ya Nzambe ya solo.
27 Mpe bazalaki kokɛngɛla na butu zingazinga ya ndako ya Nzambe ya solo; mpo mosala ya kokɛngɛla+ ezalaki mokumba na bango, mpe bazalaki na mokumba ya kosimba fungola, ɛɛ, mpo na kofungola ntɔngɔ na ntɔngɔ.+
28 Mpe bamosusu na kati na bango bazalaki na mokumba ya kotalela biloko+ ya mosala, mpo bazalaki kokɔtisa yango ndenge motángo na yango ezalaki mpe bazalaki kobimisa yango ndenge motángo na yango ezalaki.
29 Mpe bamosusu na kati na bango bazalaki mibali oyo batyami mpo na kotalela bisaleli mpe mpo na kotalela bisaleli mosantu+ nyonso mpe mpo na kotalela farini ya malamu+ mpe vinyo+ mpe mafuta+ mpe olibana+ mpe mafuta ya balsame.+
30 Mpe bana mosusu ya banganga-nzambe bazalaki basali ya malasi,+ mafuta ya balsame oyo basangisá na biloko mosusu.
31 Mpe Matitia, moko ya Balevi, oyo azalaki mwana ya liboso ya Shalume+ Mokora, azalaki na mosala ya moto oyo akoki kotyelama motema, mpo na kotalela biloko oyo ekalingami na kikalungu.+
32 Mpe bana mosusu ya Bakohate, bandeko na bango, bazalaki na mokumba ya kotalela mampa oyo bamatisamatisá likoló ya mosusu,+ mpo na kobongisa yango sabata na sabata.+
33 Mpe baoyo wana nde bayembi,+ bankumu ya batata ya Balevi na kati ya bisika ya kolya,+ baoyo basɛngisamaki kosala mosala mosusu te;+ mpo basengelaki kosala mosala na bango butu na moi.+
34 Bango nde bankumu ya batata ya Balevi, ndenge bakitanaki, bankumu. Bango nde bazalaki kofanda na Yerusaleme.+
35 Mpe Gibeone+ nde esika Yeyele, tata ya Gibeone, azalaki kofanda. Mpe nkombo ya mwasi na ye Maaka.
36 Mpe mwana na ye, mwana ya liboso, ezalaki Abadone, ná Zure, Kishe, Baala, Nere ná Nadabe,
37 Gedore, Ahio, Zekaria+ ná Mikelote.
38 Mikelote abotaki Shimeame. Ɛɛ, bango nde bafandaki na Yerusaleme elongo na bandeko na bango, batalani na bandeko na bango.
39 Nere+ abotaki Kishe;+ Kishe abotaki Saulo;+ Saulo abotaki Yonatane,+ Malaki-shua,+ Abinadabe+ ná Eshibaala.+
40 Mpe mwana ya Yonatane: Meribe-baala.+ Meribe-baala abotaki Mika.+
41 Mpe bana ya Mika bango oyo: Pitone, Meleke, Tarea ná Ahaze.+
42 Ahaze abotaki Yara; Yara abotaki Alemete, Azemavete ná Zimiri. Zimiri abotaki Moza.
43 Moza abotaki Binea, mwana na ye Refaya,+ mwana na ye Eleasa, mwana na ye Azele.
44 Mpe Azele azalaki na bana motoba, mpe bankombo na bango yango oyo: Azirikame, Bokeru, Yishimaele, Shearia, Obadia ná Hanane. Bango nde bana ya Azele.+