1 Ntango 26:1-32
26 Mpo na bituluku ya bakɛngɛli ya baporte:+ Na Bakora,+ Meshelemia+ mwana ya Kore, moko ya bana ya Asafe.
2 Mpe Meshelemia abotaki bana: mwana ya liboso Zekaria, ya mibale Yediaele, ya misato Zebadia, ya minei Yatiniele,
3 ya mitano Elame, ya motoba Yehohanane, ya nsambo Elieho-enai.
4 Mpe Obede-edome+ abotaki bana: mwana ya liboso Shemaya, ya mibale Yehozabade, ya misato Yoa mpe ya minei Sakare mpe ya mitano Netanele,
5 ya motoba Amiele, ya nsambo Isakare, ya mwambe Peuletai; mpo Nzambe apambolaki ye.+
6 Mpe Shemaya mwana na ye abotaki bana oyo bazalaki bayangeli ya ndako ya tata na bango, mpo bazalaki mibali oyo bakoki, ya nguya.
7 Bana ya Shemaya: Otini, Refaele, Obede ná Elezabade, oyo bandeko na ye bazalaki mibali oyo bakoki, Elihu ná Semakia.
8 Bango nyonso nde bazalaki bana ya Obede-edome, bango ná bana na bango ná bandeko na bango, mibali oyo bakoki, oyo bazalaki na nguya mpo na mosala, bato ntuku motoba na mibale (62), bato ya Obede-edome.
9 Mpe Meshelemia+ azalaki na bana mpe na bandeko, mibali oyo bakoki, bato zomi na mwambe.
10 Mpe Hosa, moko ya bana ya Merari, azalaki na bana. Shimiri azalaki nkumu, ata azalaki mwana ya liboso+ te, tata na ye atyaki ye nkumu;+
11 ya mibale Hilikiya, ya misato Tebalia, ya minei Zekaria. Bana nyonso ná bandeko ya Hosa bazalaki bato zomi na misato.
12 Na bituluku wana ya bakɛngɛli ya baporte, nkumu azalaki na mikumba kaka ndenge moko na bandeko na ye,+ mpo na kosala na ndako ya Yehova.
13 Na yango, babwakaki mbɛsɛ+ mpo na moto moke ndenge moko mpe mpo na moto monene, na kolanda bandako ya batata na bango,+ mpo na baporte ndenge na ndenge.
14 Bongo mbɛsɛ na ngámbo ya ɛsti ekwelaki Shelemia.+ Mpo na mwana na ye Zekaria,+ mopesi-toli+ ya mayele, babwakaki mbɛsɛ, mpe mbɛsɛ na ye ebimaki na ngámbo ya nɔrdi.+
15 Obede-edome azwaki oyo ya ye na ngámbo ya sudi, mpe bana na ye+ bazwaki bandako ya kobomba biloko.+
16 Shupime ná Hosa+ bazwaki oyo ya bango na ngámbo ya wɛsti, pene na Porte Shalekete, pene na balabala monene oyo ematá, etuluku ya bakɛngɛli+ etalani na etuluku ya bakɛngɛli;+
17 na ɛsti ezalaki na Balevi motoba; na nɔrdi, na mokolo moko, minei; mpe na sudi, na mokolo moko,+ minei; mpe mpo na bisika ya kobomba biloko,+ mibalemibale;
18 mpo na veranda molai na wɛsti, bazalaki minei na balabala monene,+ mibale na veranda molai.
19 Wana nde bituluku ya bakɛngɛli ya baporte na bana ya Bakora+ mpe na bana ya Merari.+
20 Na oyo etali Balevi, Ahiya atyamaki na bisika ya kobomba biloko ya motuya+ ya ndako ya Nzambe ya solo mpe na bisika ya kobomba biloko ya motuya oyo esantisami.+
21 Bana ya Ladane,+ bana ya Mogereshone ya Ladane; bankumu ya bandako ya batata ya Ladane Mogereshone: Yehieli.+
22 Bana ya Yehieli: Zetame ná ndeko na ye Yoele,+ batyamaki na bisika ya kobomba biloko ya motuya+ ya ndako ya Yehova.
23 Mpo na Baamirame, mpo na Bayizare, mpo na Bahebrone, mpo na Bauziele,+
24 ɛɛ Shebuele+ mwana ya Gereshome mwana ya Moize azalaki mokambi oyo atyamaki na bisika ya kobomba biloko ya kolya.
25 Na bandeko na ye, ya Eliezere:+ mwana na ye Rehabia,+ mwana na ye Yeshaya, mwana na ye Yorame, mwana na ye Zikri mpe mwana na ye Shelomote.
26 Shelomote oyo ná bandeko na ye batyamaki na bisika nyonso ya kobomba biloko ya motuya oyo esantisami,+ oyo mokonzi Davidi+ mpe bankumu ya bandako ya batata,+ mpe bakonzi ya bato nkóto nkóto mpe ya bato nkama nkama, mpe bakonzi ya basoda basantisaki.
27 Na biloko oyo ezwamaki na bitumba+ mpe na biloko epunzamaki,+ basantisaki biloko mosusu mpo na kobongisaka ndako ya Yehova.
28 Mpe lisusu, nyonso oyo Samwele momoni-makambo,+ Saulo mwana ya Kishe, Abinere+ mwana ya Nere ná Yoabe+ mwana ya Zeruya+ basantisaki. Shelomite ná bandeko na ye bazalaki kotalela eloko oyo moto nyonso azalaki kosantisa.
29 Na Bayizare:+ Kenania ná bana na ye batyamaki mpo na misala ya libándá,+ bazalaki bakapita mpe basambisi+ ya Yisraele.
30 Na Bahebrone:+ Hashabia ná bandeko na ye, mibali oyo bakoki,+ nkóto moko na nkama nsambo (1 700), batyamaki na mosala ya kotambwisa makambo ya Yisraele, na etúká ya Yordani, na ngámbo ya wɛsti, mpo na mosala nyonso ya Yehova mpe mpo na mosala ya mokonzi.
31 Na Bahebrone: Yeriya+ azalaki nkumu ya Bahebrone, na kolanda mabota na bango, na kolanda bankɔkɔ na bango. Na mbula ya ntuku minei+ (40) ya bokonzi ya Davidi, balukalukaki bango, mpe bakutaki bilombe mpe mibali ya nguya na kati na bango, na Yazere+ na Gileade.+
32 Mpe bandeko na ye, mibali oyo bakoki,+ bazalaki nkóto mibale na nkama nsambo (2 700), bankumu ya bandako ya batata.+ Bongo mokonzi Davidi atyaki bango likoló ya Barubene ná Bagade mpe ndambo ya libota ya Bamanase,+ mpo na makambo nyonso ya Nzambe ya solo mpe makambo+ ya mokonzi.