1 Ntango 23:1-32
23 Mpe Davidi akómaki mobange+ mpe atondaki na mikolo; bongo akómisaki mwana na ye Salomo+ mokonzi ya Yisraele.
2 Mpe ayanganisaki bankumu+ nyonso ya Yisraele mpe banganga-nzambe+ ná Balevi.+
3 Na yango, batángaki Balevi banda na mbula ntuku misato (30) tii na likoló;+ mpe motángo na bango, mokomoko* na bango, mobali makasi na mobali makasi: bato nkóto ntuku misato na mwambe (38 000).
4 Na baoyo wana, bato nkóto ntuku mibale na minei (24 000) mpo na kokamba mosala ya ndako ya Yehova; mpe bato nkóto motoba (6 000) bázala bakapita+ ná basambisi;+
5 mpe bakɛngɛli ya baporte+ bazalaki nkóto minei (4 000) mpe bato nkóto minei oyo bapesaka Yehova masanzoli+ na bibɛtɛlo ya miziki+ oyo Davidi alobaki ete: “Nasali yango mpo na kopesa masanzoli.”
6 Na nsima, Davidi akabolaki bango na bituluku+ epai ya bana ya Levi:+ Gereshone, Kohate ná Merari.
7 Epai ya Bagereshone: Ladane ná Shimei.
8 Bana ya Ladane bango oyo: nkumu Yehiele,+ Zetame ná Yoele,+ misato.
9 Bana ya Shimei bango oyo: Shelomote, Haziele ná Harane, misato. Bango nde bankumu ya batata mpo na Ladane.
10 Mpe bana ya Shimei bango oyo: Yahate, Zina, Yeushe ná Beria. Bango minei nde bana ya Shimei.
11 Mpe Yahate akómaki nkumu, mpe Ziza moto ya mibale. Yeushe ná Beria bazalaki na bana mingi te; yango wana bakómaki ndako moko ya batata+ mpo na etuluku ya bato oyo bazali na mokumba moko.
12 Bana ya Kohate+ bango oyo: Amirame, Yizare,+ Hebrone+ ná Uziele,+ minei.
13 Bana ya Amirame bango oyo: Arona+ ná Moize.+ Kasi Arona atyamaki pembeni+ mpo asantisaka Esika oyo Eleki Bosantu,+ ye ná bana na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpo na kobimisa milinga ya mbeka+ liboso ya Yehova, mpo na kosalela ye+ mpe mpo na kopambola+ na nkombo na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te.
14 Kasi Moize moto ya Nzambe ya solo,+ bana na ye bakobaki kotángama na libota ya Balevi.+
15 Bana ya Moize bango oyo: Gereshome+ ná Eliezere.+
16 Bana ya Gereshome: nkumu Shebuele.+
17 Mpe bana ya Eliezere bango oyo: nkumu Rehabia;+ mpe Eliezere azwaki bana mosusu te, kasi bana ya Rehabia bango bakómaki ebele koleka.
18 Bana ya Yizare:+ nkumu Shelomite.+
19 Bana ya Hebrone bango oyo: nkumu Yeria, ya mibale Amaria, ya misato Yahaziele mpe ya minei Yekameame.+
20 Bana ya Uziele+ bango oyo: nkumu Mika, mpe ya mibale Yishia.
21 Bana ya Merari+ bango oyo: Maheli ná Mushi.+ Bana ya Maheli bango oyo: Eleazare+ ná Kishe.
22 Kasi Eleazare akufaki; mpe azalaki na bana mibali te, kaka bana basi. Yango wana bana ya Kishe, bandeko na bango ya mibali, bazwaki bango bázala basi na bango.+
23 Bana ya Mushi bango oyo: Maheli, Edere ná Yeremote,+ misato.
24 Bango nde bazalaki bana ya Levi na kolanda ndako ya batata na bango,+ bankumu ya batata, na kolanda bato na bango oyo bazwaki mikumba, na kolanda ndenge nkombo ya mokomoko na bango ekomamaki, basali ya mosala+ oyo esengelaki kosalema na ndako ya Yehova, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló.+
25 Mpo Davidi alobaki boye: “Yehova Nzambe ya Yisraele apesi bato na ye bopemi,+ mpe akofanda na Yerusaleme mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
26 Mpe lisusu, Balevi bakomema tabernakle te to esaleli na yango ata moko te mpo na mosala na yango.”+
27 Mpamba te, na kolanda maloba+ ya nsuka ya Davidi, baoyo wana nde bana ya Levi oyo batángamaki banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló.
28 Mpo mokumba na bango ezalaki ya kosalisa bana ya Arona,+ mpo na mosala ya ndako ya Yehova, na mapango,+ na bisika ya kolya,+ na kopɛtolama ya eloko nyonso mosantu+ mpe na mosala oyo esengelaki kosalema na ndako ya Nzambe ya solo,
29 ata mpe mpo na mampa oyo bamatisamatisá likoló ya mosusu,+ mpo na farini ya malamu,+ mpo na likabo ya mbuma, mpo na bagalɛti+ oyo ezangi levire,+ mpo na bagato oyo bakalingá na kikalungu,+ mpo na pɔtɔpɔtɔ ya farini oyo basangisá na biloko mosusu+ mpe mpo na bimekeli nyonso ya biloko ya maimai mpe bimekeli ya kilo mpe ya bolai ná bonene;+
30 mpe mpo na kotɛlɛma+ ntɔngɔ nyonso+ mpo na kotɔnda+ Yehova mpe kosanzola+ ye, mpe kosala bongo na mpokwa;
31 mpe mpo na bambeka nyonso ya kotumba oyo bapesi Yehova na basabata,+ na basanza ya sika+ mpe na bileko ya bafɛti,+ na kolanda motángo na bango, ndenge mobeko elobi, ntango nyonso liboso ya Yehova.
32 Mpe bazalaki na mosala ya kokɛngɛla+ hema ya kokutana, kokɛngɛla esika mosantu+ mpe kokɛngɛla bandeko na bango bana ya Arona mpo na mosala ya ndako ya Yehova.+
Maloba na nse
^ Lil., “motó na motó.”