1 Ntango 17:1-27
17 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Davidi abandaki kofanda na ndako na ye moko,+ Davidi alobaki na mosakoli Natane+ boye: “Talá, ngai nafandi na ndako moko ya banzete ya sɛdrɛ,+ kasi sanduku+ ya kondimana ya Yehova ezali na kati ya hema.”+
2 Na yango, Natane alobaki na Davidi boye: “Nyonso oyo ezali na motema na yo, salá,+ mpamba te Nzambe ya solo azali na yo.”+
3 Mpe esalemaki boye: na butu yango, liloba+ ya Nzambe eyelaki Natane ete:
4 “Kende mpe lobá na mosaleli na ngai Davidi ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Ezali yo te nde okotongela ngai ndako ya kofanda.+
5 Mpo nafandá na ndako te banda mokolo oyo nabimisaki bana ya Yisraele na Ezipito* tii na mokolo ya lelo,+ kasi nazalaki kofanda lelo na hema oyo, lobi na hema oyo kuna mpe lelo na tabernakle+ oyo, lobi na tabernakle oyo kuna.+
6 Na ntango nyonso oyo nazalaki kotambolatambola+ na Yisraele mobimba, nalobaki nde ata liloba moko na moko ya basambisi ya Yisraele oyo napesaki mitindo bábatela bato na ngai ete: ‘Mpo na nini botongeli ngai ndako ya banzete ya sɛdrɛ te?’”’+
7 “Bongo sikoyo, talá oyo okoloba na mosaleli na ngai Davidi: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Ngai nde nazwaki yo na esika ya koleisa banyama matiti, otika kobatela etonga+ mpo okóma mokambi+ ya bato na ngai Yisraele.
8 Mpe nakozala na yo esika nyonso okotambola,+ mpe nakolongola banguna+ na yo nyonso liboso na yo, mpe nakokómisa nkombo+ na yo lokola nkombo ya bato minene oyo bazali na mabele.+
9 Mpe nakopesa bato na ngai Yisraele esika mpe nakolona bango,+ bongo bakofanda mpenza na esika oyo bazali mpe bakotungisama lisusu te; bana oyo bazangi boyengebene+ bakolɛmbisa bango lisusu te, ndenge basalaki liboso,+
10 ɛɛ, banda mikolo oyo natyaki basambisi+ bákamba bato na ngai Yisraele. Mpe nakokitisa mpenza banguna na yo nyonso.+ Mpe nazali koyebisa yo boye: ‘Yehova akotongela yo mpe ndako.’*+
11 “‘“Mpe ekosalema mpenza boye: ntango okokóma na nsuka ya bomoi na yo mpo okende kozala esika moko na bankɔkɔ na yo,+ nakobimisa mpenza nsima na yo momboto na yo, oyo akozala moko ya bana na yo,+ mpe nakopika makasi mpenza bokonzi na ye.+
12 Ye nde akotongela ngai ndako,+ mpe nakopika kiti ya bokonzi na ye makasi mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
13 Ngai nakokóma tata na ye,+ mpe ye akokóma mwana na ngai;+ mpe motema boboto na ngai nakolongola yango epai na ye te+ ndenge nalongolaki yango epai ya moto oyo azalaki liboso na yo.+
14 Mpe nakotɛlɛmisa ye na ndako+ na ngai mpe na bokonzi+ na ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpe kiti na ye ya bokonzi+ ekokóma kiti oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”’”
15 Natane alobaki na Davidi maloba wana nyonso mpe emonaneli wana nyonso.+
16 Nsima na yango, Mokonzi Davidi akɔtaki mpe afandaki liboso ya Yehova+ mpe alobaki ete: “Ee Yehova Nzambe, ngai nde nani?+ Mpe ndako na ngai+ nde nini mpo omema ngai tii kuna?+
17 Lokola nde likambo yango ezali moke na miso na yo,+ Ee Nzambe,+ ozali lisusu kolobela ndako ya mosaleli na yo tii mosika na mikolo oyo ekoya,+ mpe otali ngai lokola moto oyo azali na libaku malamu, moto oyo azali komata se komata,+ Ee Yehova Nzambe.
18 Davidi akoloba na yo lisusu nini na lokumu oyo opesi mosaleli na yo,+ awa yo moko oyebi malamu mosaleli na yo?+
19 Ee Yehova, mpo na mosaleli na yo mpe ndenge motema na yo moko elingi,+ osali makambo minene oyo nyonso na ndenge oyebisi+ misala minene oyo nyonso.
20 Ee Yehova, mosusu lokola yo azali te,+ mpe Nzambe mosusu azali te, kaka yo+ na baoyo nyonso toyoká na matoi na biso.
21 Mpe ekólo mosusu nini na mabele ezali lokola bato na yo Yisraele,+ oyo Nzambe ya solo akendaki kosikola mpo na ye moko, mpo bázala bato na ye,+ mpo omipesa nkombo na misala minene+ mpe na makambo ya nsɔmɔ na ndenge ozalaki kobengana bikólo+ liboso ya bato na yo oyo osikolaki longwa na Ezipito?
22 Mpe okómisaki bato na yo Yisraele lokola bato na yo+ mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpe yo moko, Ee Yehova, okómaki Nzambe na bango.+
23 Bongo sikoyo, Ee Yehova, tiká liloba oyo olobeli mosaleli na yo mpe ndako na ye ezala sembo mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpe salá kaka ndenge olobi.
24 Mpe nkombo na yo+ ezala sembo mpe ekóma monene+ libela na libela, mpe báloba ete: ‘Yehova ya mampinga,+ Nzambe ya Yisraele,+ azali Nzambe mpo na Yisraele,’+ mpe ndako ya mosaleli na yo Davidi ezala ndako oyo ekoumela liboso na yo.+
25 Mpo yo moko, Nzambe na ngai, oyebisi mosaleli na yo mokano ya kotongela ye ndako.+ Yango wana mosaleli na yo azwi libaku ya kobondela liboso na yo.
26 Bongo sikoyo, Ee Yehova, ozali Nzambe ya solo,+ mpe olaki bolamu oyo mpo na mosaleli na yo.+
27 Sikoyo, yo moko pambolá ndako ya mosaleli na yo eumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te liboso na yo;+ mpamba te yo moko, Ee Yehova, opamboli, mpe epambwami mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”+
Maloba na nse
^ Lil., “namatisaki.”
^ “Ndako,” elingi koloba, molɔngɔ ya bakonzi, libota ya bakonzi.