1 Ntango 11:1-47

11  Na nsima, Bayisraele+ nyonso bayanganaki epai ya Davidi na Hebrone,+ balobi: “Talá! Biso tozali makila* moko na yo.+  Ezala lobi, ezala liboso, ata ntango Saulo azalaki mokonzi, yo moto ozalaki kobimisa Yisraele mpe kokɔtisa yango;+ mpe Yehova Nzambe na yo alobaki na yo boye: ‘Yo nde okobatela+ bato na ngai Yisraele, mpe yo nde okokóma mokambi+ ya bato na ngai Yisraele.’”  Bongo mikóló nyonso ya Yisraele bayaki epai ya mokonzi, na Hebrone, mpe Davidi asalaki kondimana ná bango na Hebrone, liboso ya Yehova; nsima na yango, batyaki Davidi mafuta+ mpo azala mokonzi ya Yisraele, ndenge Yehova alobaki+ na nzela ya Samwele.+  Na nsima, Davidi ná Yisraele mobimba bakendaki na Yerusaleme,+ elingi koloba Yebusi,+ mokili epai Bayebusi+ bazalaki kofanda.  Bongo bato oyo bazalaki kofanda na Yebusi balobaki na Davidi: “Okokɔta awa te.”+ Atako bongo, Davidi abɔtɔlaki esika makasi ya libateli ya Siona,+ elingi koloba Sité ya Davidi.+  Bongo Davidi alobaki boye: “Moto ya liboso oyo akobɛta+ Bayebusi, akokóma nkumu mpe mokonzi.” Mpe Yoabe+ mwana ya Zeruya amataki moto ya liboso, mpe akómaki nkumu.  Mpe Davidi akómaki kofanda na esika oyo ezali mpasi mpo na kokóma kuna.+ Yango wana babengaki yango Sité ya Davidi.+  Mpe abandaki kotonga engumba zingazinga, banda na Mwa Ngomba kino na bisika oyo ezalaki zingazinga na yango, kasi biteni mosusu ya engumba oyo etikalaki, Yoabe nde abongisaki yango.+  Mpe Davidi azalaki se kokóma makasi,+ mpo Yehova ya mampinga azalaki elongo na ye.+ 10  Talá sikoyo bakonzi ya mibali ya nguya+ ya Davidi, baoyo bakangamaki na ye makasi na bokonzi na ye elongo na Yisraele mobimba, mpo na kokómisa ye mokonzi, ndenge Yehova alobaki+ mpo na Yisraele. 11  Mpe talá molɔngɔ ya bilombe mibali ya Davidi: Yashobeame+ mwana ya Mohamoni moko, mokonzi ya bato yango misato. Azalaki kobwakela bato nkama misato (300) likɔnga na ye mpe babomami na mbala moko.+ 12  Mpe nsima na ye, ezalaki Eleazare+ mwana ya Dodo, Moahohi.+ Azalaki kati na mibali misato ya nguya.+ 13  Ye nde azalaki elongo na Davidi na Pase-damime,+ esika Bafilistia bayanganaki mpo na etumba. Sikoyo, ezalaki na eteni moko ya elanga etondi na ɔrje, mpe bato bakimaki Bafilistia.+ 14  Kasi ye atɛlɛmaki na katikati ya eteni ya elanga yango, abatelaki yango mpe akobaki koboma Bafilistia, bongo Yehova abikisaki+ na lobiko moko monene.+ 15  Bongo bato misato kati na bankumu yango ntuku misato+ (30) bakitaki na libanga, epai ya Davidi na mobenga ya Adulame,+ wana kaa moko ya Bafilistia etyamaki na lobwaku ya patatalu ya Refaime.+ 16  Mpe Davidi azalaki na esika oyo ezalaki mpasi mpo na kokóma kuna;+ mpe etuluku moko ya basoda ya Bafilistia+ ezalaki na Beteleme. 17  Nsima ya mwa ntango, Davidi amonisaki mposa na ye mpe alobaki ete: “Aa, namɛla+ ata mai ya libulu ya kobomba mai ya Beteleme,+ oyo ezali na porte!” 18  Na yango, bango misato bakɔtaki na makasi na kaa ya Bafilistia mpe batokaki mai na libulu ya kobomba mai ya Beteleme, oyo ezali na porte, bakumbaki yango mpe bamemelaki yango Davidi.+ Nde Davidi andimaki komɛla yango te, kasi asopaki yango mpo na Yehova.+ 19  Mpe alobaki lisusu ete: “Nakoki kokanisa yango ata moke te, mpo na Nzambe na ngai, ete nasala boye! Nakomɛla nde makila+ ya mibali oyo batye milimo na bango na likama? Mpo batyaki milimo na bango na likama ntango bayaki na yango.” Bongo andimaki komɛla yango te.+ Wana nde makambo mibali yango misato ya nguya basalaki. 20  Mpe Abishai+ ndeko ya Yoabe+ azalaki mokonzi ya bato yango misato; mpe azalaki kobwakela bato nkama misato (300) likɔnga na ye mpe babomami, mpe azalaki na lokumu lokola baoyo wana misato. 21  Na bango misato, ye azalaki na lokumu mingi koleka baoyo wana mibale, mpe akómaki mokonzi na bango; atako bongo, akómaki+ te lokola baoyo wana misato ya liboso. 22  Mpe Benaya+ mwana ya Yehoyada,+ mwana ya elombe mobali moko, oyo asalaki makambo mingi na Kabizeele+ abomaki bana mibali mibale ya Ariele ya Moabe; mpe ye moto akitaki koboma nkɔsi+ moko na kati ya libulu ya mai, na mokolo moko oyo nɛjɛ ezalaki kokwea. 23  Mpe ye nde abomaki mobali moko Moezipito, mobali ya mbinga na ndenge moko ya kokamwa, molai na ye mapeko mitano.+ Mpe likɔnga+ moko monene lokola nzete ya kolíngela nsinga oyo basali-bilamba basalelaka ezalaki na lobɔkɔ ya Moezipito yango; atako bongo, akitelaki ye na lingenda mpe abɔtɔlaki likɔnga na lobɔkɔ ya Moezipito yango mpe abomaki ye na likɔnga+ na ye moko. 24  Wana nde makambo Benaya mwana ya Yehoyada asalaki, mpe azalaki na nkombo na kati ya mibali wana misato ya nguya. 25  Atako azalaki na lokumu mingi koleka bato yango ntuku misato (30), akómaki te na molɔngɔ ya baoyo wana misato.+ Kasi Davidi atyaki ye mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka ye.+ 26  Mpe mibali ya nguya ya limpinga ya basoda bango oyo: Asahele+ ndeko ya Yoabe, Elehanane+ mwana ya Dodo ya Beteleme, 27  Shamote+ Moharore, Heleze Mopelone,+ 28  Ira+ mwana ya Ikeshe Motekoa, Abi-ezere Moanatote,+ 29  Sibekai+ Mohusha, Ilai Moahohi,+ 30  Maharai+ Monetofa,+ Helede+ mwana ya Baana Monetofa, 31  Itai mwana ya Ribai+ ya Gibea+ ya bana ya Benyamina,+ Benaya Mopiratone,+ 32  Hurai moto ya mabwaku ya mokɛli ya Gaashe,+ Abiele Moarbate, 33  Azemavete Mobahurime,+ Eliahaba Moshaalbone, 34  bana ya Hasheme Mogizone, Yonatane+ mwana ya Shagee Moharari, 35  Ahiame mwana ya Sakare+ Moharari, Elifale+ mwana ya Ure, 36  Hefere Momekerate, Ahiya Mopelone, 37  Hezero Mokaramele,+ Naarai mwana ya Ezebai, 38  Yoele ndeko ya Natane,+ Mibahare mwana ya Hagri, 39  Zeleke Moamone, Naharai Mobeerote, momemi-bibundeli ya Yoabe mwana ya Zeruya, 40  Ira Moyitri, Garebe+ Moyitri, 41  Uriya+ Mohiti,+ Zabade mwana ya Ahilai, 42  Adina mwana ya Shiza Morubene, nkumu moko ya Barubene, oyo bato ntuku misato (30) bazalaki elongo na ye; 43  Hanane mwana ya Maaka, ná Yoshafate Momitine, 44  Uziya Moashetarote, Shama ná Yeyele, bana ya Hotame Moaroere, 45  Yediaele mwana ya Shimiri, ná ndeko na ye Yoha Motize, 46  Eliele Momahave, Yeribai ná Yoshavia bana ya Elenaame, ná Yitima Momoabe. 47  Eliele ná Obede ná Yahasiele Momezobe.

Maloba na nse

Talá Eb 29:14, msl.