1 Ntango 10:1-14
10 Bongo Bafilistia+ babundaki na Yisraele; mpe mibali ya Yisraele bakimaki liboso ya Bafilistia mpe bazalaki se kokwea bibembe na Ngomba Gilboa.+
2 Mpe Bafilistia bazalaki se kopusana penepene na Saulo ná bana na ye; mpe Bafilistia babomaki Yonatane,+ Abinadabe+ ná Malaki-shua,+ bana ya Saulo.+
3 Etumba eyelaki Saulo ndongo; mpe nsukansuka, bato oyo babɛtaka litimbo bamonaki ye, mpe bato oyo babwakaka makula bazokisaki ye.+
4 Bongo Saulo alobaki na momemi-bibundeli+ na ye boye: “Bendá mopanga+ na yo mpe tɔbɔlá ngai na yango, mpo bisutu+ oyo báya mpenza kosambwisa+ ngai te.” Kasi momemi-bibundeli na ye aboyaki,+ mpamba te azalaki kobanga makasi. Bongo Saulo azwaki mopanga mpe akwelaki yango.+
5 Ntango momemi-bibundeli na ye amonaki ete Saulo akufi, ye mpe akwelaki mopanga mpe akufaki.+
6 Boye Saulo ná bana na ye misato bakufaki,+ mpe bato nyonso ya ndako na ye bakufaki elongo.
7 Ntango bato nyonso ya Yisraele oyo bazalaki na lobwaku ya patatalu bamonaki ete bakimi mpe ete Saulo ná bana na ye bakufi, bango mpe batikaki bingumba na bango mpe bakimaki;+ nsima na yango, Bafilistia bayaki kokɔta mpe bakómaki kofanda kuna.
8 Mpe esalemaki boye: na mokolo oyo elandaki, ntango Bafilistia bayaki kolongola biloko+ ya bato oyo babomamaki, bamonaki Saulo ná bana na ye bakwei na Ngomba Gilboa.+
9 Bongo balongolaki biloko na ye mpe bakataki ye motó+ mpe bamemaki bibundeli na ye mpe batindaki bato bipai na bipai, na mokili ya Bafilistia, mpo na kopesa nsango+ na bikeko+ na bango mpe na bato.
10 Nsukansuka, batyaki bibundeli na ye na ndako ya nzambe na bango,+ mpe bakangisaki mokuwa ya motó na ye na ndako ya Dagone.+
11 Mpe bato nyonso ya Yabeshe+ na Gileade bayokaki nyonso oyo Bafilistia basalaki Saulo.+
12 Na yango, bilombe mibali nyonso batɛlɛmaki mpe bazwaki ebembe ya Saulo ná bibembe ya bana na ye mpe bayaki na yango na Yabeshe mpe bakundaki mikuwa na bango na nse ya nzete monene+ na Yabeshe;+ mpe bakilaki bilei+ mikolo nsambo.
13 Bongo Saulo akufaki mpo azalaki sembo te mpe mpo, na makambo oyo asalaki, andimelaki Yehova te+ na ndenge atosaki te liloba ya Yehova mpe lisusu mpo asɛngaki moto oyo asololaka na bilimo+ atunela ye makambo.
14 Mpe atunaki Yehova te.+ Na yango, abomaki ye mpe apesaki Davidi mwana ya Yese bokonzi.+