1 Batesaloniki 5:1-28
5 Nzokande, bandeko, na likambo oyo etali bantango mpe bileko,+ ntina ya kokomela bino ata eloko moko ezali te.
2 Mpo bino moko boyebi malamu ete mokolo ya Yehova+ ekoya mpenza lokola moyibi na butu.+
3 Na ntango oyo bato+ bakoloba: “Kimya,+ likambo ya kobanga ezali te!” na ntango yango libebi+ ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko ndenge mpasi ya kobota eyelaka mwasi ya zemi;+ mpe bakokima soki moke te.+
4 Nde bino, bandeko, bozali na molili te,+ mpo mokolo wana ebimela bino pwasa lokola nde ebimeli miyibi,+
5 mpo bozali bino nyonso bana ya pole+ mpe ya moi.+ Tozali bato ya butu te, ya molili mpe te.+
6 Na yango, tólala mpɔngi te+ lokola bamosusu basalaka,+ kasi tózala nde ekɛngɛ+ mpe tóbatela makanisi na biso.+
7 Mpo baoyo balalaka mpɔngi,+ balalaka nde na butu,+ mpe baoyo balangwaka, balangwaka mingimingi na butu.
8 Nde biso baoyo tozali bato ya moi, tóbatela makanisi na biso mpe tólata ebateli-ntolo+ ya kondima+ mpe bolingo mpe ekɔti+ oyo ezali elikya ya lobiko;+
9 mpo Nzambe aponi biso, mpo na nkanda te,+ kasi mpo na kozwa lobiko+ na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+
10 Akufelaki biso,+ mpo, ezala tolamuki to tolali mpɔngi, tózala na bomoi elongo na ye.+
11 Yango wana bókoba kobɔndisana mpe kolendisana,+ ndenge kutu bozali kosala yango.+
12 Nzokande tozali kosɛnga bino, bandeko, ete bózala na limemya epai ya baoyo bazali kosala mosala makasi na kati na bino mpe kokamba+ bino na kati ya Nkolo mpe kokebisa bino;
13 mpe ete bópesa bango lokumu oyo eleki mpenza na kati ya bolingo mpo na mosala na bango.+ Bózala na kimya kati na bino.+
14 Lisusu, tozali kolendisa bino, bandeko, ete bókebisa bato ya mobulu,+ bólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi,+ bósalisa bato ya bolɛmbu, bózala na motema molai+ epai ya bato nyonso.
15 Bókeba ete moto azongisa mabe na moto mosusu te,+ kasi ntango nyonso bino na bino bólanda kosalelana oyo ezali malamu; bósalaka yango mpe epai ya bato mosusu nyonso.+
16 Bósepelaka ntango nyonso.+
17 Bóbondelaka ntango nyonso.+
18 Na makambo nyonso bópesaka matɔndi.+ Mpo wana ezali mokano ya Nzambe na bomoko elongo na Kristo Yesu na ntina na bino.
19 Bóboma mɔtɔ ya elimo te.+
20 Bótyola maloba ya esakweli te.+
21 Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo;+ bókangama makasi na oyo ezali malamu.+
22 Bóboya mabe ya ndenge nyonso.+
23 Nzambe ya kimya+ asantisa bino mobimba.+ Mpe na makambo nyonso, tiká elimo mpe molimo mpe nzoto na bino bandeko ebatelama na ndenge ya kozanga mbeba na ntango ya kozala ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+
24 Moto oyo azali kobenga bino azali sembo, mpe akosala mpe yango.
25 Bandeko, bókoba kobondela mpo na biso.+
26 Bópesa bandeko nyonso mbote na lipwɛpwɛ mosantu.+
27 Nazali kopesa bino mokumba monene na nzela ya Nkolo ete mokanda oyo etángama liboso ya bandeko nyonso.+
28 Boboto monene+ ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na bino.