1 Batesaloniki 4:1-18
4 Mpo na kosukisa, bandeko, tozali kosɛnga bino mpe kolendisa bino na nkombo ya Nkolo Yesu, kaka ndenge bozwaki lilako epai na biso na oyo etali motindo bosengeli kotambola+ mpe kosepelisa Nzambe, ndenge mpe bozali ya solo kotambola, ete bókoba kosala bongo malamumalamu lisusu.+
2 Mpo boyebi mitindo+ topesaki bino na nkombo ya Nkolo Yesu.
3 Mpo talá eloko Nzambe alingi: kosantisama na bino,+ ete bóboya pite;+
4 ete mokomoko na bino ayeba kopekisa nzoto* na ye+ na kosantisama+ mpe lokumu,
5 na mposa ya lokoso ya kosangisa nzoto te+ ndenge mpe bikólo+ wana oyo bayebi Nzambe te bazalaka na yango;+
6 ete moto moko te akóma tii na kosalela ndeko na ye mabe mpe kobɔtɔla ntomo na ye na likambo yango,+ mpamba te Yehova nde apesaka etumbu mpo na makambo nyonso wana,+ kaka ndenge toyebisaki bino yango liboso mpe lisusu topesaki bino litatoli malamumalamu.+
7 Mpo Nzambe abengaki biso, mpo na kondima mbindo te, kasi nde mpo na kosantisama.+
8 Na yango, moto oyo azali kotyola,+ atyoli moto te, kasi Nzambe,+ oyo azali kotya elimo santu+ na ye na kati na bino.
9 Nzokande, na likambo etali bolingo ya bondeko,+ bozali na mposa te ete tókomelaka bino, mpo bino moko boteyami na Nzambe+ ete bólinganaka;+
10 mpe, ya solo, bozali kosala yango epai ya bandeko nyonso na Masedonia mobimba. Kasi tozali kolendisa bino, bandeko, bókoba kosala yango malamu koleka,
11 mpe komityela mokano ya kofanda na kimya+ mpe kokɔta na makambo ya bato te+ mpe ya kosala na mabɔkɔ na bino,+ ndenge mpenza topesaki bino mitindo;
12 mpo ete bótambola na ndenge ya lokumu+ liboso ya bato ya libándá+ mpe bózanga eloko te.+
13 Lisusu, bandeko, tolingi bóyeba makambo oyo etali bato oyo bazali kolala+ na kati ya liwa; mpo bóyoka mawa te na ndenge bamosusu oyo bazali na elikya te bayokaka.+
14 Mpo soki kondima na biso ezali ete Yesu akufaki mpe asekwaki,+ ndenge moko mpe, baoyo balali na kati ya liwa na nzela ya Yesu, Nzambe akozongisa bango na bomoi elongo na ye.+
15 Mpo talá oyo tozali koyebisa bino na kolanda liloba ya Yehova:+ ete biso bato ya bomoi oyo tozali kotikala tii na kozala ya Nkolo+ tokoleka soki moke te liboso ya baoyo balali na kati ya liwa;
16 mpo Nkolo ye moko akokita uta na likoló+ na mbela ya komanda, na mongongo ya anzelu-mokonzi+ mpe na kelelo+ ya Nzambe, mpe baoyo bakufá na kati ya bomoko elongo na Kristo bakosekwa liboso.+
17 Na nsima biso bato ya bomoi oyo totikali tokomemama,+ elongo na bango,+ na mapata+ mpo na kokutana+ na Nkolo na mopɛpɛ; mpe na ndenge yango tokozala ntango nyonso elongo na Nkolo.+
18 Na yango, bókoba kobɔndisana na maloba wana.
Maloba na nse
^ Lil., “mbɛki.”