1 Bakorinti 8:1-13
8 Sikoyo, mpo na bilei oyo epesami na bikeko:+ toyebi ete biso nyonso tozali na boyebi.+ Boyebi evimbisaka na lolendo, kasi bolingo etongaka.+
2 Soki moto akanisi ete ayebi likambo moko boye,+ ayebi yango naino te ndenge asengeli mpenza koyeba yango.+
3 Kasi soki moto alingaka Nzambe,+ moto yango ayebani na ye.+
4 Sikoyo, mpo na likambo oyo etali kolya+ bilei oyo epesami na bikeko, toyebi ete ekeko ezali eloko te+ na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka moko.+
5 Mpo atako baoyo babengami “banzambe”+ bazalaka, ezala na likoló+ to na mabele,+ ndenge “banzambe” bazali mingi mpe “bankolo” bazali mingi,+
6 mpo na biso, ya solo, Nzambe azali kaka moko,+ ye Tata,+ oyo biloko nyonso euti na ye, mpe biso mpo na ye;+ mpe Nkolo azali kaka moko,+ Yesu Kristo,+ oyo na nzela na ye biloko nyonso ezali,+ mpe biso na nzela na ye.
7 Nzokande, boyebi oyo ezali na bato nyonso te;+ kasi bamosusu, lokola bameseni na ekeko tii sikoyo, balyaka bilei lokola eloko oyo epesami mbeka na ekeko,+ mpe lisosoli na bango, lokola ezali makasi te, ekómi mbindo.+
8 Kasi eloko ya kolya ekopesa biso lokumu te na miso ya Nzambe;+ soki tolei te, tokozanga eloko te, mpe, soki tolei, tokozwa litomba moko te.+
9 Kasi bókebaka ete ezala ata ndenge nini lotomo na bino eya te kokóma libaku ya kokweisa baoyo bazali na bolɛmbu.+
10 Mpo soki moto moko amoni yo, yo moto ozali na boyebi, ofandi mpo na kolya na tempelo moko boye ya bikeko, lisosoli ya moto wana oyo azali na bolɛmbu ekolendisama te kino kolya bilei oyo epesami na bikeko?+
11 Ya solo, na boyebi na yo, moto oyo azali na bolɛmbu azali kobebisama, ndeko na yo oyo Kristo akufelaki.+
12 Kasi ntango bozali kosalela bandeko na bino lisumu na ndenge wana mpe kozokisa lisosoli+ na bango oyo ezali makasi te, bozali kosalela Kristo lisumu.
13 Na yango, soki eloko moko ya kolya ezali kobɛtisa ndeko na ngai libaku,+ nakolya lisusu mosuni ya nyama soki moke te, mpo nabɛtisa ndeko na ngai libaku te.+