1 Bakorinti 7:1-40

7  Sikoyo, mpo na makambo oyo bokomaki, ezali malamu mobali asimba+ mwasi te;  nde, lokola pite epalangani mingi,+ mobali mokomoko azala na mwasi na ye moko+ mpe mwasi mokomoko azala na mobali na ye moko.  Mobali apesa mwasi na ye eloko oyo asengeli na yango;+ kasi mwasi mpe asala ndenge wana epai ya mobali na ye.+  Mwasi azali na bokonzi likoló ya nzoto na ye moko te, kasi mobali na ye nde azali na yango;+ ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi likoló ya nzoto na ye moko te, kasi mwasi na ye nde azali na yango.+  Bópimelanaka yango te,+ longola kaka soki bino mibale boyokani mpo na ntango oyo botye,+ mpo bópesa ntango na libondeli mpe bóya lisusu kosangana, mpo Satana akoba te komeka+ bino mpo na kozanga komipekisa+ na bino.  Nzokande, nalobi bongo kaka mpo na komonisa ete ekoki kosalema,+ kasi ezali mobeko te.+  Kasi nakolinga bato nyonso bázala lokola ngai.+ Atako bongo, moto na moto azali na likabo+ na ye moko oyo euti na Nzambe, mosusu boye, mosusu boye.  Nzokande nazali koloba na bato oyo babalá naino te+ mpe na basi oyo mibali bakufá ete: ezali malamu bátikala lokola ngai.+  Kasi soki bazali na komipekisa te,+ bábala, mpo eleki malamu kobala+ na esika ya kozika na mposa.+ 10  Na bato oyo babalá, nazali kopesa malako oyo, ezali mpenza ngai te kasi Nkolo:+ ete mwasi akabwana na mobali na ye te;+ 11  kasi soki akabwani na ye, afanda bongo abala te to mpe ayokana lisusu na mobali na ye; mpe mobali atika mwasi na ye te. 12  Kasi na bamosusu, nazali koloba boye, ɛɛ, ngai, kasi Nkolo te:+ Soki ndeko mobali moko azali na mwasi oyo azali mondimi te, nzokande mwasi yango andimi kofanda na ye, ndeko yango atika ye te; 13  mpe mwasi oyo azali na mobali oyo azali mondimi te, nzokande mobali yango andimi kofanda na ye, mwasi yango atika mobali na ye te. 14  Mpo mobali wana oyo azali mondimi te asantisami mpo na mwasi na ye, mpe mwasi wana oyo azali mondimi te asantisami mpo na ndeko mobali wana; soki te, bana na bino bakozala mpenza mbindo,+ kasi sikoyo bazali basantu.+ 15  Kasi soki oyo azali mondimi te azali koluka kokabwana,+ akabwana; ndeko mobali to ndeko mwasi azali na boombo te na likambo yango, kasi Nzambe abengi bino na kimya.+ 16  Mpo, mwasi, ndenge nini oyebi soki okobikisa mobali na yo te?+ To, mobali, ndenge nini oyebi soki okobikisa mwasi na yo te?+ 17  Likambo moko kaka, ndenge Yehova apesi moto na moto likabo,+ moto na moto atambola na ndenge oyo Nzambe abengi ye.+ Ndenge wana nde nazali kopesa malako+ na masangá nyonso. 18  Moto abengamaki nde akatamá ngenga?+ Akóma te moto oyo akatami ngenga te. Moto abengamaki nde akatamá ngenga te?+ Akatama ngenga te.+ 19  Kokatama ngenga+ ezali eloko te, kokatama ngenga+ te ezali mpe eloko te, kasi eloko ya ntina nde kotosa mibeko ya Nzambe.+ 20  Moto na moto atikala ndenge azalaki+ ntango abengamaki.+ 21  Obengamaki ozali moombo? Komitungisa te mpo na yango;+ kasi soki mpe okoki kokóma na bonsomi, simbá libaku yango. 22  Mpo moto nyonso na kati ya Nkolo oyo abengamaki ntango azali moombo, azali mosikwami ya Nkolo;+ ndenge moko mpe moto oyo abengamaki ntango azali na bonsomi+ azali moombo+ ya Kristo. 23  Bosombamaki mpenza na ntalo;+ bótika kokóma baombo+ ya bato. 24  Bandeko, ndenge+ moto na moto azalaki ntango abengamaki, atikala ndenge azalaki, abatela boyokani na ye elongo na Nzambe. 25  Nzokande, mpo na bangɔndɔ nazali na mitindo ya kopesa te oyo euti na Nkolo, kasi nazali nde kopesa likanisi na ngai+ lokola moto oyo Nkolo ayokelá mawa+ mpo azala sembo.+ 26  Na yango, nakanisi likambo oyo ezali malamu, na kotalela mikakatano oyo ezali awa epai na biso: ete ezali malamu ete moto atikala ndenge azali.+ 27  Okangami na mwasi?+ Tiká koluka kofungwama.+ Ofungwami na mwasi? Tiká koluka mwasi. 28  Kasi ata soki obali, osali lisumu te.+ Mpe soki ngɔndɔ abali, asali lisumu te. Nzokande, baoyo bazali kobala bakozwa bolɔzi na kati ya mosuni na bango.+ Kasi ngai nalingi ekómela bino te. 29  Lisusu, talá oyo nazali koloba, bandeko: ntango oyo etikali ekómi mokuse.+ Yango wana baoyo bazali na basi bázala lokola nde bazali na basi te,+ 30  mpe lisusu baoyo bazali kolela bázala lokola baoyo bazali kolela te, mpe baoyo bazali kosepela lokola baoyo bazali kosepela te, mpe baoyo bazali kosomba lokola baoyo bazali na eloko te, 31  mpe baoyo bazali kosalela mokili+ lokola baoyo bazali kosalela yango na makambo nyonso te; mpo makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.*+ 32  Ya solo, nalingi ete bózala na mitungisi te.+ Mobali oyo abalá te amitungisaka mpo na makambo ya Nkolo, ndenge akoki kondimama na Nkolo. 33  Kasi mobali oyo abalá amitungisaka+ mpo na makambo ya mokili, ndenge akoki kondimama na mwasi na ye,+ 34  mpe akabwani. Lisusu, mwasi oyo abalá te, mpe ngɔndɔ, amitungisaka mpo na makambo ya Nkolo,+ mpo azala mosantu na nzoto na ye mpe na elimo na ye. Nzokande, mwasi oyo abalá amitungisaka mpo na makambo ya mokili, ndenge akoki kondimama na mobali na ye.+ 35  Kasi nazali koloba boye mpo na litomba na bino moko, mpo na kotya bino nsinga na nkingo te, kasi mpo na komema bino na oyo ebongi+ mpe na oyo elakisi kosalela Nkolo mosala ntango nyonso kozanga kotya makanisi na makambo mosusu.+ 36  Kasi soki moto akanisi ete azali kosalela bongɔndɔ na ye mabe,+ soki ye aleki eleko ya ebandeli ya bolenge, mpe soki esengeli kosalema bongo, asala oyo alingi; azali kosala lisumu te. Bábala+ na bango. 37  Kasi soki moto azwi ekateli na motema na ye, mpe azali na mokakatano te oyo ezali kotinda ye, nde azali na likoki ya kokanga mposa na ye moko mpe azwi ekateli yango na motema na ye moko, ya kobatela bongɔndɔ na ye mpenza, akosala malamu.+ 38  Na yango, moto oyo mpe apesi bongɔndɔ na ye na libala asali malamu,+ kasi oyo apesi yango na libala te akosala malamu koleka.+ 39  Mwasi akangami ntango nyonso oyo mobali na ye azali na bomoi.+ Kasi soki esalemi ete mobali na ye alali na kati ya liwa, azali na bonsomi ya kobalana na mobali oyo ye alingi, nde na kati ya Nkolo kaka.+ 40  Kasi na makanisi na ngai, akozala na esengo mingi koleka soki atikali ndenge azali.+ Nakanisi mpenza ete ngai mpe nazali na elimo ya Nzambe.+

Maloba na nse

Kobongwana oyo ezali lokola ntango bato bazali kosala teyatre, baoyo basilisi kosana bakei mpe basusu bakɔti.