1 Bakorinti 6:1-20
6 Nani kati na bino, soki azali na likambo+ na mosusu, akomeka ata komeka kokende na tribinale liboso ya bato oyo bazangi boyengebene,+ kasi liboso ya basantu te?+
2 To boyebi te ete basantu bakosambisa+ mokili?+ Mpe soki bino bokosambisa mokili, bobongi nde kosambisa makambo ya mikemike+ te?
3 Boyebi te ete tokosambisa baanzelu?+ Bongo, mpo na nini te makambo ya bomoi oyo?
4 Bongo, soki bosengeli kosambisa makambo ya bomoi oyo,+ ezali bato oyo batyolami na lisangá nde bozali kotya bango basambisi?+
5 Nazali koloba mpo na koyokisa bino nsɔni.+ Ya solo, moto moko ya bwanya+ azali na kati na bino te oyo akokoka kosambisa na kati ya bandeko na ye,
6 kasi ndeko azali kokende na ndeko na tribinale, mpe yango liboso ya bato bazangi kondima?+
7 Na yango, ya solo bokwei mpenza kokwea na ndenge bozali kofundana na tribinale.+ Kutu mpo na nini te kondima ete básalela bino mabe?+ Kutu mpo na nini te kondima ete bábuba+ bino?
8 Bozali kutu nde kosalela bato mabe mpe kobuba bango, nzokande bazali bandeko na bino.+
9 Boni! Boyebi te ete bato bazangi boyengebene bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te?+ Bómikosa te. Ezala bato ya pite,+ basambeli ya bikeko,+ bato ya ekobo,+ mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka na bango nzoto na ndenge oyo ebongisamá te,+ mibali oyo balalaka na mibali,+
10 miyibi, bato ya lokoso,+ balangwi-masanga,+ bafingi, mpe babɔtɔli bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.+
11 Nzokande bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana.+ Kasi bosukwami pɛɛ,+ kasi bosantisami,+ kasi botángami bayengebene+ na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo+ mpe na elimo ya Nzambe na biso.+
12 Nazwi ndingisa ya kosala makambo nyonso; kasi makambo nyonso te epesaka litomba.+ Nazwi ndingisa ya kosala makambo nyonso;+ kasi nakotika eloko moko te ezala na bokonzi likoló na ngai.+
13 Biloko ya kolya ezali mpo na libumu, mpe libumu mpo na biloko ya kolya;+ kasi Nzambe akokómisa mpamba ná libumu ná biloko ya kolya.+ Nzokande nzoto ezali mpo na pite te, kasi mpo na Nkolo;+ mpe Nkolo azali mpo na nzoto.+
14 Kasi Nzambe alamwisaki Nkolo+ mpe akolamwisa biso na liwa+ na nguya na ye.+
15 Boyebi te ete nzoto na bino ezali binama+ ya Kristo?+ Na yango, nakolongola nde binama ya Kristo mpe nakómisa yango binama ya mwasi ya ndumba?+ Ezala bongo soki moke te!
16 Boni! Boyebi te ete moto oyo asangani na mwasi ya ndumba azali nzoto moko ná ye? Mpo, alobi ete: “Bango mibale bakozala mosuni moko.”+
17 Kasi moto oyo asangani na Nkolo azali elimo+ moko+ ná ye.
18 Bókima pite.+ Lisumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezalaka libándá ya nzoto na ye, kasi moto oyo asalaka pite, azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.+
19 Boni! Boyebi te ete nzoto na bino ezali tempelo+ ya elimo santu oyo ezali kati na bino,+ oyo bozwi na Nzambe? Lisusu, bozali bato na bino moko te,+
20 mpo bosombamaki mpenza na ntalo moko boye.+ Na yango, bópesaka Nzambe nkembo+ na nzoto+ na bino.