1 Bakorinti 4:1-21
4 Moto atalela biso ete tozali basali na nse+ ya Kristo mpe bakapita+ ya basekele mosantu+ ya Nzambe.
2 Lisusu, na likambo oyo, eloko oyo balukaka epai ya bakapita+ ezali ete moto amonana sembo.+
3 Nzokande mpo na ngai, ezali likambo moko ya moke ete natalelama na bino to na tribinale moko ya bato.+ Ata ngai mpe namitalelaka ngai moko te.
4 Mpo nazali komona ata eloko moko te+ oyo ezali kokweisa ngai. Atako bongo namonani moyengebene te mpo na yango, kasi moto oyo azali kotalela ngai ezali Yehova.+
5 Na yango, bósambisa eloko moko te+ liboso ya ntango na yango, tii Nkolo akoya,+ ye oyo akobimisa na pole makambo oyo ebombamá ya molili+ mpe akomonisa polele mikano ya mitema,+ mpe na ntango yango moto na moto akozwa lokumu na ye oyo euti na Nzambe.+
6 Nzokande, bandeko, namonisi makambo wana na ndenge nakómisi yango ndakisa oyo ezali kolobela ngai moko mpe Apolosi+ mpo na bolamu na bino, mpo, na ntina na biso, bino bóyekola lilako oyo: “Bókende mosika te koleka makambo oyo ekomamá,”+ mpo mokomoko na bino avimba na lolendo te+ mpe akanisa te ete moto boye aleki moto boye.+
7 Mpo nani akesenisi+ yo na mosusu? Ɛɛ, eloko nini ozali na yango oyo bapesaki yo kopesa te?+ Nzokande, soki mpenza bapesaki yo yango kopesa,+ mpo na nini ozali komikumisa+ lokola nde bapesaki yo yango kopesa te?
8 Bino bosili kotonda, boye te? Bosili kokóma bato ya bomɛngo, boye te?+ Bobandi koyangela+ bino moko, biso tozali te? Mpe nakosepela kutu ete bóbanda koyangela, mpo biso mpe tóyangela elongo na bino.+
9 Mpo namoni lokola Nzambe atandi+ biso bantoma na esika ya nsuka lokola bato oyo batyami mpo na liwa,+ mpo tokómi eloko ya kotala+ liboso ya mokili, mpe liboso ya baanzelu,+ mpe liboso ya bato.+
10 Biso tozali bazoba+ mpo na Kristo, kasi bino bozali bato ya mayele+ na kati ya Kristo; biso tolɛmbi,+ kasi bino bozali na makasi;+ bino bozali na nkombo malamu,+ kasi biso tozali na nsɔni.+
11 Tii na ngonga oyo tozali kokoba koyoka nzala+ mpe lisusu koyoka mposa ya mai+ mpe kozanga bilamba+ mpe kobɛtamabɛtama+ mpe kozanga esika ya kofanda+
12 mpe komona mpasi+ na mosala oyo tozali kosala na mabɔkɔ na biso moko.+ Ntango bazali kofinga biso, topambolaka;+ ntango bazali konyokola biso, tokangaka motema;+
13 ntango bazali kobebisa biso lokumu, tobondelaka;+ tokómi lokola bosɔtɔ ya mokili, eloko oyo eboyami na biloko nyonso, tii sikoyo.+
14 Nazali kokoma makambo oyo, mpo na koyokisa bino nsɔni te, kasi mpo na kokebisa bino lokola bana na ngai ya bolingo.+
15 Mpo ata soki bozali na balakisi+ nkóto zomi (10 000) na kati ya Kristo, ya solo mpenza bozali na batata mingi te;+ mpo na kati ya Kristo Yesu, ngai nakómi tata na bino na nzela ya nsango malamu.+
16 Na yango, nazali kobondela bino ete bókóma bamekoli na ngai.+
17 Yango wana nazali kotindela bino Timote,+ mpo azali mwana na ngai ya bolingo+ mpe ya sembo na kati ya Nkolo; mpe akokundwela bino ndenge na ngai ya kosala na mosala ya Kristo Yesu,+ kaka ndenge nazali koteya epai nyonso na lisangá mokomoko.
18 Bato mosusu bavimbi na lolendo+ lokola nde nakoya epai na bino te.
19 Kasi nsima ya mwa ntango moke, nakoya epai na bino, soki Yehova alingi,+ mpe nakoluka te koyeba maloba ya baoyo bazali kovimba na lolendo, kasi nde nguya na bango.
20 Mpo bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya maloba te, kasi nde ya nguya.+
21 Bolingi nini? Naya epai na bino na lingenda,+ to na bolingo mpe na boboto ya elimo?+