1 Bakorinti 14:1-40

14  Bólanda bolingo; nzokande bókoba koluka na molende makabo ya elimo,+ kasi mingimingi mpo bósakola.+  Mpo moto oyo azali koloba na monɔkɔ moko boye, azali koloba na bato te, kasi na Nzambe, mpo moto azali koyoka te,+ kasi azali koloba nde basekele mosantu+ na nzela ya elimo.  Nzokande, moto oyo azali kosakola, azali kotonga+ mpe kolendisa mpe kobɔndisa bato na maloba na ye.  Moto oyo azali koloba na monɔkɔ moko boye, azali komitonga ye moko, kasi moto oyo azali kosakola azali kotonga lisangá.  Nzokande nakosepela bino nyonso bóloba na minɔkɔ mosusu,+ kasi nalingi mingi nde bósakola.+ Ya solo, moto oyo azali kosakola aleki moto oyo azali koloba na minɔkɔ mosusu,+ longola kaka soki abongoli yango mpo lisangá etongama.  Kasi na ntango oyo, bandeko, soki nayei koloba na bino na minɔkɔ mosusu, nakosalisa bino na nini soki nalobi na bino na emoniseli+ te to na boyebi+ te to na esakweli te to na liteya moko boye te?  Ndenge moko, biloko oyo ezangi bomoi ebimisaka mongongo,+ ezala piololo to nzɛnzɛ; soki bakesenisi banɔti ya miziki te, ndenge nini eloko oyo ezali kobɛtama na piololo to na nzɛnzɛ ekoyebana?  Mpo ya solo mpenza, soki kelelo ebimisi makambo polele te, nani akomibongisa mpo na etumba?+  Ndenge moko mpe, soki bino, na nzela ya lolemo, bozali kobimisa maloba oyo ezali pɛtɛɛ te mpo na kokanga ntina,+ ndenge nini makambo oyo ezali kolobama ekoyebana? Ya solo, bokoloba nde na mopɛpɛ.+ 10  Ekoki kozala ete mitindo ya koloba ezali ebele mpenza na mokili, kasi motindo moko te ezangi ndimbola. 11  Na yango, soki nazali koyeba te ntina ya liloba oyo eyokani, nakozala mopaya+ na miso ya moto oyo azali koloba, mpe moto oyo azali koloba akozala mopaya na miso na ngai. 12  Ndenge moko mpe bino, lokola bozali na mposa makasi ya makabo ya elimo,+ bóluka kotondana na yango mpo na kotongama ya lisangá.+ 13  Na yango, moto oyo azali koloba na monɔkɔ moko boye abondela mpo akoka kobongola yango.+ 14  Mpo soki nazali kobondela na monɔkɔ moko boye, ezali likabo na ngai ya elimo nde ezali kobondela,+ kasi makanisi na ngai esali eloko te. 15  Na yango, nini esengeli kosalema? Nakobondela na likabo ya elimo, kasi nakobondela mpe na makanisi na ngai. Nakoyemba nzembo ya masanzoli+ na likabo ya elimo, kasi nakoyemba mpe nzembo ya masanzoli na makanisi na ngai.+ 16  Na maloba mosusu, soki ozali kopesa lisanzoli na likabo moko boye ya elimo, ndenge nini moto oyo afandi na esika ya moto mpamba akoloba “Amen”+ na matɔndi na yo, lokola ayebi te makambo oyo ozali koloba? 17  Ya solo, ozali kopesa matɔndi na ndenge ya malamu, kasi mosusu atongami te.+ 18  Napesaka Nzambe matɔndi na ndenge nalobaka na minɔkɔ mingi koleka bino nyonso.+ 19  Nzokande, na lisangá nakosepela nde koloba maloba mitano na makanisi na ngai, mpo nakoka mpe kolakisa bamosusu na monɔkɔ, na esika ya maloba nkóto zomi (10 000) na monɔkɔ moko boye.+ 20  Bandeko, bókóma bana te na makoki ya kososola,+ kasi bózala bana mike na mabe;+ nzokande bókóma mikóló na makoki ya kososola.+ 21  Na Mibeko ekomamá ete: “‘Nakoloba na bato oyo+ na minɔkɔ ya bapaya mpe na maloba* ya bapaya,+ mpe atako bongo bakoyoka ngai te,’ Yehova alobi bongo.”+ 22  Na yango, koloba na minɔkɔ mosusu ezali elembo,+ mpo na bandimi te, kasi mpo na bato bazangi kondima,+ nzokande kosakola ezali, mpo na bato bazangi kondima te, kasi mpo na bandimi.+ 23  Na yango, soki lisangá mobimba eyangani esika moko mpe bango nyonso bazali koloba na minɔkɔ mosusu,+ kasi bato mpamba to bato bazangi kondima bakɔti, bakoloba te ete bozali na ligboma? 24  Kasi soki bino nyonso bozali kosakola mpe moto moko oyo azangi kondima to moto mpamba akɔti, apamelami na bato nyonso,+ atalelami malamumalamu na bato nyonso; 25  basekele ya motema na ye emonani polele,+ bongo akokwea na elongi na ye mpe akosambela Nzambe, alobi: “Nzambe azali mpenza na kati na bino.”+ 26  Na yango, bandeko, esengeli kosala nini? Ntango boyangani, moko azali na nzembo moko boye, mosusu azali na liteya moko boye, mosusu azali na emoniseli moko boye, mosusu azali na monɔkɔ moko boye, mosusu azali na ndimbola+ moko boye. Makambo nyonso esalema mpo na kotonga.+ 27  Mpe soki moto moko azali koloba na monɔkɔ moko boye, esuka na bato mibale to misato kaka, mpe moto na moto na ngala na ye; mpe moto moko abongola.+ 28  Kasi soki mobongoli azali te, moto wana afanda nyɛɛ na lisangá mpe aloba na ye moko+ mpe na Nzambe. 29  Lisusu, basakoli+ mibale to misato báloba, mpe bamosusu básosola ndimbola.+ 30  Kasi soki emoniseli moko eyei epai ya moto mosusu+ ntango afandi wana, oyo ya liboso afanda nyɛɛ. 31  Mpo bino nyonso bokoki kosakola+ mokomoko na ngala na ye, mpo bato nyonso báyekola mpe bato nyonso bálendisama.+ 32  Mpe makabo ya elimo ya basakoli esengeli koyeba kopekisama na basakoli. 33  Mpo Nzambe azali Nzambe, ya mobulu te,+ kasi ya kimya.+ Lokola na masangá nyonso ya basantu, 34  basi báfanda nyɛɛ+ na masangá, mpo bapesi bango nzela ya koloba te, kasi bámikitisa,+ ndenge Mibeko+ elobi. 35  Na yango, soki balingi koyeba likambo moko boye, bátuna mibali na bango moko na ndako, mpo ezali nsɔni+ mwasi aloba na lisangá. 36  Nini? Liloba ya Nzambe ebimaki nde epai na bino,+ to kaka epai na bino nde yango ekómaki? 37  Soki moto moko akanisi ete azali mosakoli to azwá likabo ya elimo, andima makambo oyo nazali kokomela bino, mpo ezali mobeko ya Nkolo.+ 38  Kasi soki moto moko azangi boyebi, atikala kaka bongo. 39  Na yango, bandeko na ngai, bókoba koluka na molende bisakweli,+ kasi bópekisa te kolobama ya minɔkɔ mosusu.+ 40  Kasi makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.+

Maloba na nse

Lil., “mbɛbu.”