1 Bakorinti 13:1-13
13 Soki nazali koloba na minɔkɔ+ ya bato mpe ya baanzelu kasi nazali na bolingo te, nakómi eteni ya ebende ya bronzɛ oyo ezali kolela to sɛmbalɛ+ oyo ezali kobɛta.
2 Mpe soki nazali na likabo ya bisakweli+ mpe nayebi basekele mosantu+ nyonso mpe nazali na boyebi+ nyonso, mpe soki nazali na kondima monene oyo ekoki ata kolongola bangomba mpe kotya yango epai mosusu,+ kasi nazali na bolingo te, nazali mpamba.+
3 Mpe soki napesi biloko na ngai nyonso mpo na koleisa bamosusu,+ mpe soki nakabi nzoto na ngai,+ mpo namikumisa, kasi nazali na bolingo te,+ nazali kozwa litomba ata moke te.
4 Bolingo+ ezali na motema molai+ mpe na boboto.+ Bolingo ezali na zuwa te,+ emikumisaka te,+ emivimbisaka na lolendo te,+
5 esalaka makambo ya nsɔni te,+ elukaka matomba na yango moko te,+ esilikaka te.+ Ebombaka mabe na motema te.+
6 Esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te,+ kasi esepelaka nde na solo.+
7 Ekangaka motema na makambo nyonso,+ endimaka makambo nyonso,+ elikyaka makambo nyonso,+ mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso.+
8 Bolingo esilaka soki moke te.+ Kasi ezala makabo ya bisakweli, ekolongolama; ezala minɔkɔ, ekosuka; ezala boyebi, ekolongolama.+
9 Mpo tozali na boyebi ya ndambo+ mpe tosakolaka kaka na ndambo;+
10 kasi ntango eloko ya mobimba ekoya,+ oyo ya ndambo ekolongolama.
11 Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, kokanisa lokola mwana moke, kotalela makambo lokola mwana moke; kasi sikoyo lokola nakómi mobali,+ nalongoli bizaleli ya mwana moke.
12 Mpo sikoyo tozali komona bandelo molilimolili na talatala ya ebende,+ kasi na ntango yango, ekozala na kotalana mpenza boye na miso.+ Sikoyo nayebi kaka ndambo, kasi na ntango yango nakoyeba malamumalamu lokola ngai mpe nayebani malamumalamu.+
13 Nzokande, sikoyo kondima, elikya mpe bolingo ezali, yango misato; kasi oyo eleki na kati na yango ezali bolingo.+