1 Bakorinti 10:1-33

10  Nzokande, bandeko, nalingi bóyeba ete bankɔkɔ na biso bazalaki bango nyonso na nse ya lipata+ mpe bango nyonso bakatisaki mbu+  mpe bango nyonso babatisamaki na kati ya Moize+ na nzela ya lipata yango mpe ya mbu;  mpe bango nyonso balyaki bilei+ ya elimo ya ndenge moko  mpe bango nyonso bamɛlaki mai+ ya elimo ya ndenge moko. Mpo bazalaki komɛla na libanga+ ya elimo oyo ezalaki kolanda bango, mpe libanga+ yango elakisaki Kristo.+  Nzokande, mingi na kati na bango Nzambe andimaki bango te,+ mpo babomamaki+ na esobe.  Nzokande, makambo wana ekómi bandakisa na biso, mpo biso tózala te bato oyo bazalaka na mposa ya makambo ya mabe,+ ndenge bango bazalaki na mposa na yango.  Bókóma mpe basambeli ya bikeko te, ndenge bamosusu na bango bakómaki;+ kaka ndenge ekomamá ete: “Bato bafandaki mpo na kolya mpe komɛla, mpe batɛlɛmaki mpo na kosakana.”+  Tósalaka mpe pite te, ndenge bamosusu na bango basalaki pite,+ mpe bakweaki, nkóto ntuku mibale na misato (23 000) na mokolo moko.+  Tómeka mpe Yehova+ te, ndenge bamosusu na bango bamekaki ye,+ mpe babomamaki na banyoka.+ 10  Bózala mpe te bato oyo baimaimaka, ndenge bamosusu na bango baimaimaki,+ mpe babomamaki na mobomi.+ 11  Nzokande, makambo wana ezalaki kokómela bango mpo ezala bandakisa, mpe ekomamaki mpo ezala likebisi+ mpo na biso baoyo tokómi na bansuka ya bantango oyo.+ 12  Na yango, moto oyo akanisi ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.+ 13  Komekama moko te ekómeli bino oyo ekómelaka bato nyonso te.+ Kasi Nzambe azali sembo,+ mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema,+ kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobima+ mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko. 14  Na yango, bandeko na ngai ya bolingo, bókima+ losambo ya bikeko.+ 15  Nazali koloba lokola na bato oyo bazali na bososoli;+ bino moko bótala oyo nazali koloba. 16  Kɔpɔ+ ya lipamboli oyo tozali kopambola, elakisi te kosangana na makila ya Kristo? Limpa oyo tozali kobuka,+ elakisi te kosangana na nzoto ya Kristo?+ 17  Lokola limpa ezali kaka moko, biso, atako tozali mingi,+ tozali nzoto kaka moko,+ mpo biso nyonso tozali kosangana na kolya limpa wana moko.+ 18  Bótala Yisraele na mosuni:+ Baoyo balyaka bambeka basanganaka na etumbelo te?+ 19  Na yango, naloba nini? Ete oyo epesami mbeka na ekeko ezali eloko, to mpe ekeko ezali eloko?+ 20  Te; kasi nazali nde koloba ete biloko oyo bikólo bapesaka mbeka, bapesaka yango mbeka na bademo,+ kasi na Nzambe te; mpe ngai nalingi te ete bósangana na bademo.+ 21  Bokoki te komɛla kɔpɔ ya Yehova+ mpe kɔpɔ ya bademo; bokoki te kolya na “mesa ya Yehova”+ mpe na mesa ya bademo. 22  To “tozali nde koyokisa Yehova zuwa”?+ Toleki ye na makasi te,+ boye te? 23  Makambo nyonso epesami nzela; kasi makambo nyonso te nde ezali na litomba.+ Makambo nyonso epesami nzela;+ kasi makambo nyonso te nde etongaka.+ 24  Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te,+ kasi oyo ya moto mosusu.+ 25  Eloko nyonso oyo bazali kotɛka na zando oyo batɛkaka misuni ya nyama bókoba kolya yango,+ bótuna mituna te mpo na lisosoli na bino;+ 26  mpo “mabele mpe biloko oyo etondisi yango+ ezali ya Yehova.”+ 27  Soki moto moko na kati ya bato oyo bazali bandimi te abengi bino mpe bomoni malamu kokende, bólya eloko nyonso oyo etyami liboso na bino,+ bótuna mituna te mpo na lisosoli+ na bino. 28  Kasi soki moto moko alobi na bino ete: “Oyo ezali eloko epesami mbeka,” bólya yango te mpo na moto oyo amonisi yango mpe mpo na lisosoli.+ 29  Nalobi “lisosoli,” ya yo moko te, kasi oyo ya moto mosusu. Mpo ntina nini bonsomi na ngai esambisama na lisosoli ya moto mosusu?+ 30  Soki nazali kolya na matɔndi, mpo na nini bálobela ngai mabe mpo na eloko oyo napesi matɔndi mpo na yango?+ 31  Na yango, ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.+ 32  Bókeba ete bókóma te bato oyo bazali kobɛtisa Bayuda ná Bagrɛki mpe lisangá ya Nzambe libaku,+ 33  ndenge ngai mpe nazali kosepelisa bato nyonso na makambo nyonso,+ nazali koluka litomba na ngai moko te+ kasi oyo ya bato mingi, mpo bango bábikisama.+

Maloba na nse