1 Bakorinti 1:1-31

1  Paulo, moto oyo abengami mpo azala ntoma+ ya Yesu Kristo na mokano ya Nzambe,+ mpe Sostene+ ndeko na biso  epai ya lisangá ya Nzambe oyo ezali na Korinti,+ epai na bino baoyo bosantisami+ na bomoko elongo na Kristo Yesu, oyo bobengami mpo na kozala basantu,+ elongo na baoyo nyonso bazali kobelela bipai nyonso nkombo+ ya Nkolo na biso, Yesu Kristo, Nkolo na bango mpe ya biso:+  Boboto monene+ mpe kimya+ ya Nzambe Tata na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo+ ezala na bino.  Napesaka Nzambe matɔndi ntango nyonso na ntina na bino mpo na boboto monene+ ya Nzambe oyo amoniselaki bino na nzela ya Kristo Yesu;+  mpo akómisá bino bato ya bomɛngo+ na likambo nyonso oyo etali ye, na likoki nyonso ya koloba mpe na boyebi nyonso,+  ndenge mpe litatoli mpo na Kristo+ epikami makasi na kati na bino,  na yango, bozangi ata likabo+ moko te, wana bozali kozela na motema mɔtɔ mpenza emoniseli+ ya Nkolo na biso Yesu Kristo.  Akokómisa mpe bino makasi+ tii na nsuka, mpo bópesa nzela na likambo moko te oyo bakoki kofunda+ bino na yango na mokolo+ ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+  Nzambe azali sembo,+ ye oyo abengaki bino mpo bózala elongo+ na Mwana na ye Yesu Kristo Nkolo na biso. 10  Nzokande nazali kolendisa+ bino, bandeko, na nkombo+ ya Nkolo na biso Yesu Kristo ete bólobaka bino nyonso na boyokani,+ mpe ete bokabwani+ ezala te na kati na bino, kasi bózala nde liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.+ 11  Mpo bato ya ndako ya Klowe bayebisi+ ngai makambo na bino, bandeko na ngai, ete bokabwani ezali na kati na bino. 12  Nalingi koloba boye: mokomoko na bino azali koloba ete: “Ngai nazali moto ya Paulo,” “Kasi ngai moto ya Apolosi,”+ “Kasi ngai moto ya Kefa,” “Kasi ngai moto ya Kristo.” 13  Kristo akabwani.+ Ezali Paulo te nde abakamaki na nzete mpo na bino, boye te? To bobatisamaki+ nde na nkombo ya Paulo? 14  Nazali na botɔndi na ndenge nabatisaki ata moto moko te na kati na bino, longola kaka Krispusi+ ná Gayusi,+ 15  mpo moto moko te aloba ete bobatisamaki na nkombo na ngai. 16  Ɛɛ, nabatisaki mpe bato ya ndako ya Stefanasi.+ Longola bango, nayebi te soki nabatisaki moto mosusu. 17  Mpo Kristo atindaki ngai,+ mpo na kobatisa te, kasi kosakola nsango malamu, na bwanya ya elobeli te,+ noki nzete ya mpasi ya Kristo ezanga ntina. 18  Mpo elobeli oyo etali nzete ya mpasi ezali bozoba+ epai ya baoyo bazali kobeba,+ kasi epai na biso baoyo tozali kobikisama,+ ezali nguya ya Nzambe.+ 19  Mpo ekomamá ete: “Nakobebisa bwanya ya bato ya bwanya,+ mpe mayele ya bato ya mayele+ nakotindika yango pembeni.”+ 20  Wapi moto ya bwanya? Wapi mokomeli?+ Wapi moto ya ntembe+ na ntango oyo?+ Nzambe akómisi bwanya ya mokili bozoba te?+ 21  Mpo lokola, na bwanya ya Nzambe, mokili na nzela ya bwanya na yango+ eyebi Nzambe te,+ Nzambe amonaki malamu ete, na nzela ya bozoba+ ya eloko oyo ezali kosakolama, abikisa baoyo bazali kondima. 22  Mpo Bayuda bazali kosɛnga bilembo+ mpe Bagrɛki bazali koluka bwanya;+ 23  kasi biso tozali nde kosakola Kristo abakami na nzete,+ likambo oyo ezali kobɛtisa Bayuda libaku+ kasi ezali bozoba epai ya bikólo;+ 24  nzokande, epai ya baoyo babengami, Bayuda ná Bagrɛki, Kristo azali nguya+ ya Nzambe mpe bwanya+ ya Nzambe. 25  Mpo eloko ya Nzambe oyo ezali zoba, ezali na bwanya koleka bato, mpe eloko ya Nzambe oyo ezali na bolɛmbu, ezali na makasi koleka bato.+ 26  Mpo bozali komona kobengama oyo ye abengi bino, bandeko: ete bato mingi te ya bwanya+ na ndenge ya mosuni nde babengami,+ bato mingi te ya nguya,+ bato mingi te ya lokumu; 27  kasi Nzambe aponi biloko ya mokili oyo ezali zoba,+ mpo akoka koyokisa bato ya bwanya nsɔni; mpe Nzambe aponi biloko ya mokili oyo ezali na bolɛmbu, mpo akoka koyokisa biloko ya makasi nsɔni;+ 28  mpe Nzambe aponi biloko ya mpambampamba ya mokili mpe biloko oyo etyolami, biloko oyo ezali te,+ mpo akómisa mpamba+ biloko oyo ezali, 29  mpo moto moko te ya mosuni amikumisa+ na miso ya Nzambe. 30  Kasi ezali mpo na ye nde bino bozali na bomoko elongo na Kristo Yesu, oyo akómi epai na biso bwanya+ oyo euti na Nzambe, mpe boyengebene+ mpe kosantisama+ mpe kosikolama na nzela ya lisiko;+ 31  mpo ezala mpenza ndenge ekomamá ete: “Moto oyo azali komikumisa, amikumisa na Yehova.”+

Maloba na nse