1 Bakonzi 8:1-66

8  Na ntango yango, Salomo+ ayanganisaki+ mikóló+ ya Yisraele, bankumu nyonso ya mabota,+ bankumu ya batata,+ ya bana ya Yisraele, epai ya Mokonzi Salomo na Yerusaleme, mpo na komatisa sanduku ya kondimana+ ya Yehova uta na Sité ya Davidi,+ elingi koloba Siona.+  Na yango, mibali nyonso ya Yisraele bayanganaki na fɛti+ epai ya Mokonzi Salomo na sanza ya Etanime, elingi koloba, na sanza ya nsambo.+  Bongo mikóló nyonso ya Yisraele bayaki, mpe banganga-nzambe babandaki komema+ Sanduku.+  Mpe bayaki, wana bazali komatisa sanduku ya Yehova ná hema+ ya kokutana+ ná bisaleli nyonso mosantu oyo ezalaki na kati ya hema yango; banganga-nzambe ná Balevi+ bayaki, wana bazali komatisa yango.+  Mpe Mokonzi Salomo ná liyangani mobimba ya Yisraele elongo na ye, baoyo bayaki koyangana ndenge bayokanaki na ye, bazalaki liboso ya Sanduku, bazali kopesa mbeka+ ya bampate ná bangɔmbɛ oyo ekokaki koyebana motángo te to kotángama te, mpo elekaki ebele.+  Bongo banganga-nzambe bakɔtisaki sanduku+ ya kondimana ya Yehova na esika na yango,+ na shambrɛ ya kati mpenza ya ndako, Esika Oyo Eleki Bosantu, na nse ya mapapu ya bakeruba.+  Mpamba te bakeruba yango esembolaki mapapu na yango likoló ya esika ya Sanduku, bongo bakeruba yango ezipaki Sanduku ná banzete ya komema yango, na likoló.+  Kasi banzete+ yango ezalaki milai, bongo nsɔngɛ ya banzete yango ezalaki komonana na Esika Mosantu liboso ya shambrɛ ya kati mpenza, kasi ezalaki komonana na libándá te. Mpe ezali kuna tii na mokolo ya lelo.+  Eloko moko te ezalaki na kati ya Sanduku, longola kaka bitanda mibale ya mabanga+ oyo Moize atyaki,+ na Horebe, ntango Yehova asalaki kondimana+ ná bana ya Yisraele wana bazalaki kobima na mokili ya Ezipito.+ 10  Mpe esalemaki boye: ntango banganga-nzambe babimaki na esika mosantu, lipata+ etondaki na ndako ya Yehova. 11  Mpe banganga-nzambe+ bakokaki te kotɛlɛma mpo na kosala mosala+ na bango mpo na lipata yango, mpamba te nkembo+ ya Yehova etondaki na ndako ya Yehova.+ 12  Na ntango yango, Salomo alobaki boye: “Yehova ye moko alobaki ete akofanda na molili tuu.+ 13  Nalongi kotonga ndako mpo ezala esika na yo ya kofanda ya lokumu,+ esika na yo ya kofanda ya libela,+ mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”+ 14  Na nsima, mokonzi abalusaki elongi na ye, atali bato, mpe abandaki kopambola+ lisangá mobimba ya Yisraele, wana lisangá mobimba ya Yisraele batɛlɛmaki. 15  Mpe alobaki lisusu boye: “Yehova Nzambe ya Yisraele apambwami,+ ye oyo alobaki na monɔkɔ na ye moko na tata na ngai Davidi+ mpe akokisi+ yango na lobɔkɔ na ye moko, alobi ete: 16  ‘Banda mokolo nabimisaki bato na ngai Yisraele na Ezipito, naponaki+ ata engumba moko te kati na mabota nyonso ya Yisraele mpo na kotonga ndako+ mpo nkombo+ na ngai ezala wana; kasi nakopona Davidi azala mokonzi ya bato na ngai Yisraele.’+ 17  Mpe tata na ngai Davidi na motema na ye, azalaki na mposa ya kotongela nkombo ya Yehova Nzambe ya Yisraele ndako.+ 18  Kasi Yehova alobaki na tata na ngai Davidi boye: ‘Lokola na motema na yo ozali na mposa ya kotongela nkombo na ngai ndako, osali malamu, mpo ozali na mposa yango na motema na yo.+ 19  Nde yo moko okotonga ndako yango te, kasi mwana na yo oyo akobima na bangɛi na yo, ye nde akotongela nkombo na ngai ndako.’+ 20  Mpe Yehova akokisaki liloba+ na ye oyo alobaki, ete natɛlɛma na esika ya tata na ngai Davidi mpe nafanda na kiti ya bokonzi ya Yisraele,+ ndenge Yehova alobaki, mpe ete natongela nkombo ya Yehova Nzambe ya Yisraele ndako,+ 21  mpe ete kuna, napesa esika ya kotya Sanduku epai kondimana+ ya Yehova ezali, oyo asalaki ná bankɔkɔ na biso ntango azalaki kobimisa bango na mokili ya Ezipito.” 22  Bongo Salomo atɛlɛmaki liboso ya etumbelo+ ya Yehova, liboso ya lisangá mobimba ya Yisraele, mpe sikoyo, atombolaki mabɔkɔ na ye na likoló;+ 23  mpe alobaki lisusu boye: “Ee Yehova Nzambe ya Yisraele,+ Nzambe mosusu lokola yo+ azali te kuna na likoló to na mabele, na nse, yo oyo obatelaka kondimana mpe motema boboto+ epai ya basaleli+ na yo oyo bazali kotambola liboso na yo na motema na bango mobimba,+ 24  yo oyo okokiseli mosaleli na yo tata na ngai Davidi likambo oyo olakaki ye, na ndenge opesaki elaka yango na monɔkɔ na yo moko, mpe okokisi yango na lobɔkɔ na yo moko, ndenge ezali na mokolo ya lelo.+ 25  Mpe sikoyo, Ee Yehova Nzambe ya Yisraele, kokiselá mosaleli na yo tata na ngai Davidi likambo oyo olakaki ye ete: ‘Moto ya libota na yo akozanga te na kiti ya bokonzi ya Yisraele liboso na ngai,+ kaka soki bana na yo bakebi na nzela na bango, soki batamboli liboso na ngai, ndenge yo otambolaki liboso na ngai.’ 26  Bongo sikoyo, nabondeli yo, Ee Nzambe ya Yisraele, tiká elaka+ na yo oyo olakaki mosaleli na yo Davidi tata na ngai ekokisama. 27  “Kasi Nzambe akofanda mpenza na mabele?+ Talá! Likoló,+ ɛɛ, mosika kuna na likoló mpenza,+ ezali kokoka yo te;+ bongo ekozala boni mpo na ndako+ oyo natongi! 28  Mpe tyá likebi na libondeli+ ya mosaleli na yo mpe na lilɔmbɔ na ye mpo na koluka kondimama,+ Ee Yehova Nzambe na ngai, mpo na koyoka ndenge azali kosɛngasɛnga na kolela mpe libondeli oyo mosaleli na yo azali kobondela liboso na yo lelo;+ 29  mpo miso na yo efungwama+ mpe etala ndako oyo butu moi, esika oyo olobaki ete: ‘Nkombo na ngai ekozala wana,’+ mpo na koyoka libondeli oyo mosaleli na yo azali kobondela, wana atali na ngámbo ya esika oyo.+ 30  Mpe yoká lilɔmbɔ ya mosaleli na yo mpe ya bato na yo Yisraele mpo na koluka kondimama,+ oyo bazali kobondela, wana batali na ngámbo ya esika oyo; mpe tiká yo moko oyoka na esika oyo ofandaka, na likoló,+ yoká mpe limbisá.+ 31  “Ntango moto asaleli moninga na ye lisumu,+ mpe moto yango alapisi ye ndai oyo ezali na elakeli mabe mpo azwa elakeli mabe+ yango, mpe ayei mpenza liboso ya etumbelo na yo na ndako oyo, wana azali na elakeli mabe yango, 32  yo yoká kuna na likoló, mpe salá mpe sambisá basaleli na yo, tángá moto mabe moto mabe mpe tyá mabe na ye na motó na ye moko,+ mpe tángá moyengebene moyengebene+ mpe futá ye na kolanda boyengebene na ye.+ 33  “Ntango monguna+ alongi bato na yo Yisraele mpo basaleli yo masumu,+ mpe soki bazongeli yo+ mpenza mpe bakumisi nkombo na yo+ mpe babondeli+ mpe basɛngi ete bándimama na yo na ndako oyo,+ 34  yo yoká kuna na likoló, mpe limbisá lisumu ya bato na yo Yisraele+ mpe zongisá+ bango na mabele oyo opesaki bankɔkɔ na bango.+ 35  “Ntango likoló ekangami, mpe mbula enɔki lisusu te+ mpo basaleli yo masumu,+ mpe soki babondeli mpenza, wana batali na ngámbo ya esika oyo,+ mpe bakumisi nkombo na yo, mpe babongwani, batiki lisumu na bango mpo omonisi bango mpasi,+ 36  yo yoká kuna na likoló, mpe limbisá lisumu ya basaleli na yo, ɛɛ, ya bato na yo Yisraele, mpamba te ozali koteya+ bango nzela ya malamu epai basengeli kotambola;+ mpe nɔkisá mbula+ na mokili na yo oyo opesá bato na yo libula. 37  “Soki nzala+ ebimi na mokili, soki maladi+ moko mabe ebimi, soki kokauka, koguga,+ mayoyo,+ bampɛsɛ+ ebimi; soki monguna na bango azingi bango na mokili epai baporte na bango ezali—ezala bolɔzi ya ndenge nini, to maladi ya ndenge nini— 38  ezala libondeli nini,+ to lilɔmbɔ nini ya moto nani to ya Yisraele+ mobimba, bato na yo, mpo na koluka kondimama,+ mpamba te bayebi moto na moto mpasi ya motema na ye,+ mpe soki basemboli mpenza mabɔkɔ na bango epai ya ndako oyo,+ 39  yo yoká kuna na likoló,+ esika na yo ya kofanda ya libela,+ mpe limbisá+ mpe salá+ mpe pesá moto na moto na kolanda banzela na ye nyonso,+ mpo oyebi motema+ na ye (mpamba te kaka yo moko nde oyebi malamu motema ya bana nyonso ya bato);+ 40  mpo bábangaka+ yo mikolo nyonso oyo bazali na bomoi na mokili oyo opesaki bankɔkɔ na biso.+ 41  “Ná mopaya+ mpe, oyo azali te moto ya Yisraele, bato na yo, mpe oyo auti mpenza na mokili moko ya mosika mpo na nkombo na yo+ 42  (mpo bakoyoka nsango ya nkombo+ na yo monene mpe ya nguya ya lobɔkɔ+ na yo mpe ya lobɔkɔ na yo oyo esembolami), mpe soki ayei mpenza mpe abondeli, wana atali na ngámbo ya ndako oyo,+ 43  yo yoká kuna na likoló, esika na yo ya kofanda ya libela,+ mpe salá na kolanda nyonso oyo mopaya yango akobelela yo mpo na yango;+ mpo bato ya bikólo nyonso ya mabele báyeba nkombo+ na yo mpo bábanga yo ndenge bato na yo Yisraele babangaka yo, mpe báyeba ete ndako oyo natongi ebengami na nkombo na yo.+ 44  “Soki bato na yo babimi kobunda etumba+ na monguna na bango na nzela oyo okotinda bango,+ mpe babondeli+ mpenza Yehova, wana bazali kotala na ngámbo ya engumba oyo oponá+ mpe ya ndako oyo natongeli nkombo na yo,+ 45  yoká kuna na likoló libondeli na bango mpe lilɔmbɔ na bango mpo na koluka kondimama, mpe katá likambo mpo na bolamu na bango.+ 46  “Soki basaleli yo lisumu+ (mpo ezali na moto moko te oyo asalaka lisumu te),+ mpe osilikeli bango mpe osundoli bango na mabɔkɔ ya monguna, mpe bato oyo bakangi bango bamemi bango bakangami na mokili ya monguna, mosika to penepene;+ 47  mpe soki bakómi mpenza na makanisi ya malamu na mokili oyo bamemamaki bakangami,+ mpe soki na mokili ya bato oyo bakangaki bango,+ bazongi+ mpenza mpe basɛngi+ yo ondima bango, balobi ete: ‘Tosali lisumu+ mpe tobungi,+ tosali mabe’;+ 48  mpe soki bazongeli yo mpenza na motema na bango mobimba+ mpe na molimo na bango mobimba na mokili ya banguna na bango oyo bamemaki bango bakangami, mpe babondeli yo mpenza, wana batali na ngámbo ya mokili na bango oyo opesaki bankɔkɔ na bango, engumba oyo oponá mpe ndako oyo natongeli nkombo na yo;+ 49  kuna na likoló, esika na yo ya kofanda ya libela,+ yoká libondeli na bango mpe lilɔmbɔ na bango mpo na koluka kondimama, mpe salá ete likambo na bango ekatama na bosembo,+ 50  mpe limbisá+ bato na yo oyo basalelaki yo lisumu+ mpe makambo nyonso ya kobuka mibeko+ oyo bango basalaki liboso na yo;+ mpe salá ete bato oyo bakangaki bango bámona bango bato ya koyokela mawa+ mpe báyokela bango mpenza mawa 51  (mpo bazali bato na yo mpe libula+ na yo, oyo obimisaki na Ezipito,+ na litumbu ya konyangwisa bibende),+ 52  mpo miso na yo efungwama mpo na kotala lilɔmbɔ ya mosaleli na yo mpo na koluka kondimama+ mpe lilɔmbɔ ya bato na yo Yisraele mpo na koluka kondimama, yoká bango na nyonso oyo bakobelela yo mpo na yango.+ 53  Mpo yo moko nde okabolaki bango na bato ya bikólo nyonso ya mabele mpo bázala libula na yo,+ ndenge olobaki na nzela ya Moize+ mosaleli na yo ntango obimisaki bankɔkɔ na biso na Ezipito, Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.” 54  Mpe esalemaki boye: ntango kaka Salomo asilisaki kobondela Yehova na libondeli oyo mobimba mpe na lilɔmbɔ oyo mpo na koluka kondimama, atɛlɛmaki na esika oyo agumbamaki mabɔlɔngɔ na nse,+ alongwe liboso ya etumbelo ya Yehova mpe atomboli mabɔkɔ na ye na likoló;+ 55  bongo atɛlɛmaki+ mpe apambolaki+ lisangá mobimba ya Yisraele na mongongo makasi ete: 56  “Yehova apambwama,+ ye oyo apesi bato na ye Yisraele esika ya kopema, na kolanda makambo nyonso oyo alakaki.+ Ata liloba+ moko te ezangi kokokisama na elaka na ye nyonso ya malamu oyo alakaki na nzela ya Moize mosaleli na ye.+ 57  Tiká Yehova Nzambe na biso azala na biso+ ndenge azalaki na bankɔkɔ na biso.+ Atika biso te, asundola biso mpe te,+ 58  mpo na kobalusa mitema+ na biso epai na ye mpo tótambola na banzela+ na ye nyonso mpe tótosa mibeko+ na ye, malako+ na ye mpe bikateli na ye ya lisambisi,+ oyo apesaki bankɔkɔ na biso etinda. 59  Mpe tiká maloba na ngai oyo, oyo nasɛngi kondimama liboso ya Yehova ezala penepene+ na Yehova Nzambe na biso butu ná moi, mpo asala ete likambo ya mosaleli na ye ekatama na bosembo mpe asala ete likambo ya bato na ye Yisraele ekatama na bosembo, na kolanda mposa ya mokolo+ na mokolo; 60  mpo bato ya bikólo nyonso ya mabele báyeba+ ete Yehova azali Nzambe ya solo.+ Mosusu azali te.+ 61  Mpe motema na bino ezala mobimba+ epai ya Yehova Nzambe na biso, bótambola na malako na ye mpe bótosa mibeko na ye, ndenge ezali na mokolo ya lelo.” 62  Mpe mokonzi ná Yisraele mobimba elongo na ye bapesaki mbeka ebele liboso ya Yehova.+ 63  Mpe Salomo apesaki bambeka ya boyokani+ oyo asengelaki kopesa Yehova: ngɔmbɛ nkóto ntuku mibale na mibale (22 000) mpe mpate nkóto nkama moko na ntuku mibale (120 000),+ mpo mokonzi ná bana nyonso ya Yisraele báfungola+ ndako ya Yehova. 64  Na mokolo yango, esengelaki mokonzi asantisa katikati ya lopango oyo ezali liboso ya ndako ya Yehova,+ mpamba te esengelaki apesa kuna mbeka ya kotumba mpe likabo ya mbuma mpe biteni ya mafuta ya bambeka ya boyokani; mpo etumbelo ya motako+ oyo ezali liboso ya Yehova ezalaki moke mingi mpe ekokaki te na mbeka ya kotumba mpe likabo ya mbuma ná biteni ya mafuta+ ya bambeka ya boyokani. 65  Mpe Salomo abandaki kosala fɛti+ na ntango yango, Yisraele mobimba mpe bazalaki elongo na ye, lisangá moko monene+ ya bato bauti banda na esika ya kokɔta na Hamate+ tii na lobwaku ya mokɛli ya Ezipito,+ bayanganaki liboso ya Yehova Nzambe na biso mikolo nsambo mpe mikolo mosusu nsambo,+ mikolo zomi na minei. 66  Na mokolo ya mwambe, atikaki bato bákende;+ mpe babandaki kopambola mokonzi mpe kokende na bandako na bango, bazali kosepela+ mpe koyoka esengo na motema+ mpo na bolamu+ nyonso oyo Yehova asalelaki Davidi, mosaleli na ye, mpe bato na ye Yisraele.

Maloba na nse