1 Bakonzi 7:1-51

7  Mpe Salomo atongaki ndako na ye moko na mbula zomi na misato,+ bongo asilisaki ndako na ye mobimba.+  Mpe atongaki Ndako ya Zamba ya Libá;+ ezalaki na bolai ya mapeko nkama moko (100), mpe na bonene ya mapeko ntuku mitano (50), mpe na bosanda ya mapeko ntuku misato (30), efandaki likoló ya milɔngɔ minei ya makonzí ya sɛdrɛ; mpe ezalaki na mabaya minene+ ya sɛdrɛ likoló ya makonzí yango.  Mpo na koyeisa yango kitoko, bazipaki yango na mabaya ya sɛdrɛ+ likoló ya mabaya minene ya kosimba nsamba oyo ezalaki likoló ya makonzí ntuku minei na mitano (45). Ezalaki zomi na mitano na molɔngɔ mokomoko.  Maninisa oyo ezalaki na bakadrɛ, ezalaki na milɔngɔ misato, lidusu moko ya kokɔtisa pole+ etalani na lidusu mosusu ya kokɔtisa pole, na milɔngɔ misato.  Mpe bisika nyonso ya kokɔta ná makonzí ya porte ezalaki na bakadrɛ ya karé,+ bakisa mpe liboso ya lidusu mokomoko ya kokɔtisa pole oyo etalanaki na lidusu mosusu ya kokɔtisa pole, na milɔngɔ misato.  Bongo asalaki Veranda ya Makonzí na bolai ya mapeko ntuku mitano (50), mpe na bonene ya mapeko ntuku misato (30); mpe veranda mosusu ezalaki liboso na yango ná makonzí ná mwa nsamba moko, liboso na yango.  Asalaki veranda ya kosambisa,+ esika azalaki kosambisa, yango nde Veranda ya Kiti ya bokonzi;+ mpe bazipaki yango na mabaya ya sɛdrɛ kobanda na pavema tii na mabaya ya nsamba.+  Ndako na ye, esika asengelaki kofanda, na lopango mosusu,+ ezalaki mwa mosika na ndako ya Veranda. Ndenge basalaki yango ekokanaki na ndenge basalaki oyo wana. Mpe Salomo atongelaki mwana ya Farao+ oyo ye abalaki ndako moko oyo ekokani na Veranda yango.  Nyonso wana esalemaki na mabanga ya ntalo+ mingi, na kolanda bolai ná bonene na yango, mabanga oyo bakatá na sii ya mabanga, na kati mpe na libándá, mpe banda na moboko tii na mabanga ya nsuka ya efelo, mpe na libándá, tii na lopango ya monene.+ 10  Mpe mabanga ya ntalo mingi oyo batyaki na moboko ezalaki mabanga minene, mabanga ya mapeko zomi, mpe mabanga ya mapeko mwambe. 11  Mpe na likoló, ezalaki na mabanga ya ntalo mingi, na kolanda bolai ná bonene na yango, mabanga oyo bakatá; ezalaki mpe na mabaya ya sɛdrɛ. 12  Mpe lopango ya monene, zingazinga na yango, ezalaki na milɔngɔ misato+ ya mabanga oyo bakatá mpe molɔngɔ moko ya mabaya minene ya sɛdrɛ; ndenge moko mpe lopango ya kati+ ya ndako+ ya Yehova, mpe ndako ya kokɔtela+ ya ndako yango. 13  Bongo Mokonzi Salomo atindaki bato bázwa Hirame+ na Tire. 14  Azalaki mwana ya mwasi moko na libota ya Nafatali oyo mobali akufá, mpe tata na ye azalaki moto ya Tire,+ mosali ya biloko ya motako;+ mpe atondaki na bwanya, na mayele+ mpe na boyebi ya kosala misala ya lolenge nyonso na motako. Na yango, ayaki epai ya Mokonzi Salomo mpe abandaki kosala mosala na ye nyonso. 15  Na nsima, anyangwisaki motako mpo na kosala makonzí mibale,+ likonzí mokomoko ezalaki na bolai ya mapeko zomi na mwambe, mpe esengelaki nsinga moko ya mapeko zomi na mibale mpo na komeka bonene ya mokomoko ya makonzí yango mibale.+ 16  Mpe asalaki mitó mibale ya motako+ oyo enyangwisami, mpo na kotya yango na nsɔngɛ ya makonzí yango. Motó moko ezalaki na bolai ya mapeko mitano, mpe motó mosusu bolai ya mapeko mitano. 17  Ezalaki na minyama—biloko oyo basalá lokola monyama—ná biloko ya koyeisa ndako kitoko, oyo balíngá lokola minyɔlɔlɔ,+ mpo na mitó oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí+ yango; nsambo mpo na motó oyo mpe nsambo mpo na motó oyo mosusu. 18  Mpe lisusu, asalaki bambuma ya grenade mpe milɔngɔ mibale zingazinga, likoló ya moko ya biloko oyo basalá lokola monyama, mpo na kozipa mitó oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí yango; asalaki mpe bongo mpo na motó oyo mosusu.+ 19  Mpe mitó oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí pene na ndako ya kokɔtela, basalaki yango lokola fololo lísi,+ mapeko minei. 20  Mitó wana ezalaki likoló ya makonzí yango mibale, ezalaki mpe likoló, penepene ya libumu oyo ekanganaki na biloko oyo basalá lokola monyama; mpe ezalaki na mbuma nkama mibale (200) ya grenade+ oyo etyami na milɔngɔ, ezingi motó mokomoko. 21  Mpe atɛlɛmisaki makonzí+ ya ndako ya kokɔtela+ ya tempelo. Bongo atɛlɛmisaki likonzí ya lobɔkɔ ya mobali mpe apesaki yango nkombo Yakine, mpe na nsima, atɛlɛmisaki likonzí ya lobɔkɔ ya mwasi mpe apesaki yango nkombo Boaze. 22  Mpe na nsɔngɛ ya makonzí yango, ezalaki na biloko basalá lokola fololo lísi. Mpe nsukansuka mosala ya makonzí yango esilaki. 23  Mpe asalaki mbu ya ebende oyo enyangwisami,+ ezalaki mapeko zomi kobanda ngámbo oyo ya monɔkɔ tii na ngámbo na yango mosusu, ezalaki zolongano; mpe bosanda na yango ezalaki mapeko mitano, mpe esengelaki nsinga moko ya mapeko ntuku misato (30) mpo na kozinga yango mobimba.+ 24  Mpe na nse ya monɔkɔ na yango zingazinga, ezalaki na biloko ya koyeisa yango kitoko+ oyo basalá lokola bikútu,+ ezingi yango, na lipeko moko zomi, ezingi mbu yango mobimba,+ ná milɔngɔ mibale ya biloko ya koyeisa yango kitoko oyo basalá lokola bikútu, esalemi na motako oyo banyangwisi yango konyangwisa. 25  Efandaki likoló ya bangɔmbɛ zomi na mibale:+ misato etali na nɔrdi, misato etali na wɛsti, misato etali na sudi, mpe misato etali na ɛsti; mbu yango ezalaki likoló ya bangɔmbɛ yango, mpe masɔkɔ na yango nyonso etali na katikati.+ 26  Mpe bonene ya ebende na yango ezalaki ya tandu moko;+ mpe monɔkɔ na yango ezalaki ndenge monɔkɔ ya kɔpɔ ezalaka, fololo lísi.+ Ezalaki kokɔta+ bati+ nkóto mibale (2 000). 27  Bongo asalaki bashario+ zomi ya motako, bolai ya shario mokomoko ezalaki mapeko minei, mpe bonene na yango ezalaki mapeko minei, mpe bosanda na yango ezalaki mapeko misato. 28  Mpe talá ndenge basalaki bashario yango: ezalaki na manzanza na mipanzi, mpe manzanza yango ezingamaki na balatɛ. 29  Mpe na manzanza yango oyo ezingamaki na balatɛ, ezalaki na bankɔsi,+ bangɔmbɛ+ ná bakeruba;+ biloko yango ezalaki mpe na balatɛ. Na likoló mpe na nse ya bankɔsi mpe bangɔmbɛ yango, basalaki mitole ya fololo+ oyo ezali kodiembela. 30  Mpe na shario mokomoko, ezalaki na yiká minei ya motako, ná baakse ya motako; mpe biteni na yango minei ya litumu ezalaki lokola bisimbelo na yango. Bisimbelo yango ezalaki na nse ya saani, esalemi na motako oyo banyangwisi ná mitole ya fololo ekatisi longwa na mosusu tii na mosusu. 31  Mpe monɔkɔ na yango, banda na kati tii na bisimbelo mpe komata ezalaki mapeko [?];* mpe monɔkɔ na yango ezalaki zolongano, esalamaki ndenge moko na etɛlɛmiselo ya lipeko moko na ndambo; ezalaki mpe na mayemi na monɔkɔ na yango. Mpe manzanza na yango na mipanzi ezalaki karé, zolongano te. 32  Mpe bayiká yango minei ezalaki na nse ya manzanza yango, mpe bisimbelo ya bayiká yango ezalaki na nse, na mipanzi ya shario; mpe bosanda ya yiká mokomoko ezalaki lipeko moko na ndambo. 33  Mpe basalaki bayiká yango ndenge basalaka yiká ya likalo.+ Bisimbelo na yango, bajantɛ na yango, barɛyɔ na yango ná bamwaye na yango, nyonso ezalaki ya motako oyo banyangwisi. 34  Mpe ezalaki na bisimbelo minei likoló ya matumu minei ya shario mokomoko; bisimbelo na yango ezalaki kaka eloko moko ná shario. 35  Mpe etɛlɛmiselo moko ezalaki likoló ya shario, oyo bosanda na yango ezali ndambo ya lipeko, ezalaki zolongano; mpe likoló ya shario, mipanzi na yango ná manzanza na yango na mipanzi ezalaki kaka eteni moko ná yango. 36  Lisusu, na bitando ya mipanzi na yango mpe na manzanza na mipanzi na yango, asalaki mayemi ya bakeruba, bankɔsi mpe bililingi ya banzete ya mbila oyo bakati kokata,+ na kolanda bisika na yango mokomoko oyo ezali polele, mpe mayemi ya mitole ya fololo zingazinga.+ 37  Ndenge wana nde asalaki bashario yango zomi;+ yango nyonso esalemaki ndenge moko, na motako oyo banyangwisi,+ ezalaki na bolai mpe bonene ndenge moko, mpe ezalaki motindo moko. 38  Mpe asalaki basaani minene+ zomi ya motako. Saani monene yango mokomoko ezalaki kokɔta bati ntuku minei (40). Saani monene mokomoko ezalaki mapeko minei. Saani monene moko ezalaki likoló ya shario mokomoko, mpo na bashario yango zomi. 39  Na nsima, atyaki bashario mitano na ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali ya ndako, mpe mitano na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi ya ndako+ yango; mpe atyaki mbu na ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali ya ndako, na ɛsti, na ngámbo ya sudi.+ 40  Mpe Hirame+ azalaki kosala basaani minene+ mpe bapau+ mpe mabakuli.+ Nsukansuka, Hirame asilisaki+ kosala mosala nyonso oyo asalelaki Mokonzi Salomo mpo na ndako ya Yehova: 41  Makonzí mibale+ mpe mitó oyo basalá lokola kibakuli oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí yango mibale,+ mpe biloko mibale oyo basalá lokola monyama+ mpo na kozipa mitó mibale wana ya zolongano oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí yango, 42  mpe mbuma nkama minei (400) ya grenade+ mpo na biloko mibale oyo basalá lokola monyama, milɔngɔ mibale ya bambuma ya grenade na eloko mokomoko oyo basalá lokola monyama, mpo na kozipa mitó mibale oyo basalá lokola kibakuli, oyo ezalaki likoló ya makonzí yango mibale; 43  bashario+ zomi ná basaani+ minene zomi likoló ya bashario yango, 44  mbu+ wana moko ná bangɔmbɛ zomi na mibale na nse ya mbu yango;+ 45  bambɛki, bapau, mabakuli ná bisaleli+ wana nyonso, oyo Hirame asalelaki Mokonzi Salomo na motako oyo bayeisá sɛlisɛli, mpo na ndako ya Yehova. 46  Na Etúká ya Yordani,+ kati na Sukote+ ná Zaretane,+ nde mokonzi asalaki yango na kati ya bampoke ya midɛlɛ ya biloko yango, na motako oyo enyangwisami. 47  Mpe Salomo atikaki bisaleli+ wana nyonso, amekaki kilo na yango te mpamba te elekaki ebele.+ Balukaki te koyeba kilo ya motako yango.+ 48  Mpe Salomo azalaki kosala bisaleli nyonso ya ndako ya Yehova mokemoke, etumbelo+ ya wolo ná mesa+ ya wolo esika mampa ya kolakisa ezalaki; 49  bitɛlɛmiselo ya miinda,+ mitano na lobɔkɔ ya mobali mpe mitano na lobɔkɔ ya mwasi, liboso ya shambrɛ ya kati mpenza, ezalaki ya wolo ya pɛto;+ bafololo,+ miinda+ ná bapɛnsi+ ya mike, ya wolo; 50  basaani minene, biloko ya koboma mɔtɔ,+ mabakuli,+ bakɔpɔ+ ná biloko ya kotya mɔtɔ,+ ya wolo ya pɛto; mpe biloko oyo esimbi bibalukelo ya baporte+ ya ndako ya kati, elingi koloba, Esika Oyo Eleki Bosantu, mpe baporte+ ya ndako ya tempelo,+ ezalaki ya wolo. 51  Nsukansuka, mosala nyonso oyo Mokonzi Salomo asengelaki kosala mpo na ndako ya Yehova ekómaki na nsuka na yango;+ mpe Salomo abandaki kokɔtisa biloko oyo tata na ye Davidi asantisaki;+ atyaki palata, wolo ná biloko na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya Yehova.+

Maloba na nse

Motángo ya mapeko ezali te na makomi ya Ebre.