1 Bakonzi 22:1-53
22 Mpe Siri mpe Yisraele bafandaki mbula misato kozanga bitumba.
2 Mpe esalemaki boye: na mbula ya misato, Yehoshafate+ mokonzi ya Yuda akitaki epai ya mokonzi ya Yisraele.
3 Bongo mokonzi ya Yisraele alobaki na basaleli na ye ete: “Boyebi mpenza ete Ramote-gileade+ ezalaka ya biso? Kasi tozali kokakatana mpo na kozwa yango na lobɔkɔ ya mokonzi ya Siri.”
4 Mpe alobaki lisusu na Yehoshafate boye: “Okokende elongo na ngai na etumba na Ramote-gileade?”+ Na yango, Yehoshafate alobaki na mokonzi ya Yisraele ete: “Nazali lokola yo. Bato na ngai bazali bato na yo.+ Bampunda na ngai ezali bampunda na yo.”
5 Nzokande, Yehoshafate alobaki lisusu na mokonzi ya Yisraele boye: “Nabondeli yo, tuná+ naino liloba ya Yehova.”
6 Bongo mokonzi ya Yisraele ayanganisaki basakoli,+ bato soki nkama minei (400), mpe alobaki na bango boye: “Nakende kobunda etumba na Ramote-gileade to nakende te?” Mpe babandaki koloba ete: “Matá,+ mpe Yehova akopesa yango na lobɔkɔ ya mokonzi.”
7 Kasi Yehoshafate alobaki: “Mosakoli mosusu ya Yehova azali awa te? Boye tótuna na nzela na ye.”+
8 Na yango, mokonzi ya Yisraele alobaki na Yehoshafate ete: “Moto mosusu azali oyo tokoki kotuna Yehova na nzela na ye;+ kasi ngai, nayinaka ye mpenza,+ mpo asakwelaka ngai makambo ya malamu te, kaka ya mabe+—Mikaya mwana ya Yimila.” Kasi Yehoshafate alobaki boye: “Mokonzi aloba ndenge wana te.”+
9 Na yango, mokonzi ya Yisraele abengaki kapita moko ya ndako na ye+ mpe alobaki ete: “Yaká nokinoki na Mikaya mwana ya Yimila.”+
10 Nzokande, mokonzi ya Yisraele ná Yehoshafate mokonzi ya Yuda bafandaki moto na moto na kiti na ye ya bokonzi, balati bilamba ya bokonzi,+ na esika ya kotutatuta mbuma, na esika ya kokɔta na porte ya Samaria; mpe basakoli nyonso bazalaki kosala liboso na bango ndenge basakoli basalaka.+
11 Bongo Zidikiya mwana ya Kenana amisalelaki maseke ya ebende mpe alobaki boye: “Talá oyo Yehova alobi:+ ‘Na oyo okotindika bato ya Siri tii okosilisa bango nyɛɛ.’”+
12 Mpe basakoli mosusu nyonso bazalaki kosakola kaka ndenge wana, bazalaki koloba ete: “Matá na Ramote-gileade mpe longá; mpe Yehova akopesa yango mpenza na lobɔkɔ ya mokonzi.”+
13 Bongo momemi-nsango oyo akendaki kobenga Mikaya alobaki na ye ete: “Talá! Maloba oyo basakoli nyonso bazali koloba mpo na mokonzi ezali malamu. Nabondeli yo, liloba na yo ezala lokola liloba ya moko na bango, mpe lobá mpenza makambo ya malamu.”+
14 Kasi Mikaya alobaki boye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi,+ oyo Yehova akoloba na ngai, yango nde nakoloba.”+
15 Na nsima, akɔtaki epai ya mokonzi, mpe mokonzi alobaki na ye ete: “Mikaya, tókende na etumba na Ramote-gileade to tókende te?” Na mbala moko, alobaki na ye boye: “Matá mpe longá; mpe Yehova akopesa mpenza yango na lobɔkɔ ya mokonzi.”+
16 Bongo mokonzi alobaki na ye ete: “Mbala boni nakolapisa yo ndai ete olobela ngai kaka solo na nkombo ya Yehova?”+
17 Bongo ye alobaki boye: “Nazali mpenza komona Bayisraele nyonso bapalangani+ na bangomba, lokola bampate oyo ezangi mobateli.+ Mpe Yehova alobaki lisusu boye: ‘Baoyo bazali na bankolo te. Tiká bázonga na kimya moto na moto na ndako na ye.’”+
18 Bongo mokonzi ya Yisraele alobaki na Yehoshafate boye: “Nayebisaki yo te ete: ‘Akosakwela ngai makambo ya malamu te, kaka ya mabe’?”+
19 Mpe alobaki lisusu: “Boye yoká liloba ya Yehova:+ Ya solo, nazali komona Yehova afandi na kiti na ye ya bokonzi+ mpe limpinga mobimba ya likoló etɛlɛmi pene na ye, na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+
20 Mpe Yehova alobaki boye: ‘Nani akobuba Ahaba, mpo amata mpe akwea na Ramote-gileade?’ Mpe oyo azalaki koloba boye, nzokande oyo mosusu azalaki koloba boye.+
21 Nsukansuka elimo+ moko ebimaki mpe etɛlɛmaki liboso ya Yehova mpe elobaki boye: ‘Ngai nakobuba ye.’ Na yango, Yehova alobaki na ye ete: ‘Na nzela nini?’+
22 Bongo ye alobaki boye: ‘Nakobima, mpe nakokóma mpenza elimo moko ya bokosi na monɔkɔ ya basakoli na ye nyonso.’+ Na yango alobaki ete: ‘Okobuba ye, mpe lisusu, okolonga.+ Bimá mpe salá bongo.’+
23 Bongo sikoyo, talá, Yehova atye elimo moko ya bokosi na monɔkɔ ya basakoli na yo oyo nyonso;+ kasi Yehova ye moko alobi ete mpasi ekoyela yo.”+
24 Sikoyo Zidikiya mwana ya Kenana apusanaki penepene mpe abɛtaki Mikaya na litama+ mpe alobaki boye: “Na nzela nini mpenza elimo ya Yehova elongwe epai na ngai mpo na koloba na yo?”+
25 Na yango, Mikaya alobaki ete: “Talá! Okomona na nzela nini na mokolo yango, ntango okokɔta na shambrɛ ya kati+ mpenza mpo na komibomba.”+
26 Bongo mokonzi ya Yisraele alobaki boye: “Zwá Mikaya mpe zongisá ye epai ya Amone mokonzi ya engumba mpe epai ya Yoashe mwana ya mokonzi.+
27 Mpe lobá boye: ‘Talá oyo mokonzi alobi:+ “Bótya moto oyo na ndako ya bolɔkɔ+ mpe mpo na kolya na ye, bópesaka ye kaka mwa limpa moke+ mpe mwa mai moke tii nakoya na kimya.”’”+
28 Na yango, Mikaya alobaki ete: “Soki ozongi mpenza na kimya, Yehova alobi na ngai te.”+ Mpe abakisaki ete: “Bóyoka, bino nyonso.”+
29 Bongo mokonzi ya Yisraele ná Yehoshafate mokonzi ya Yuda bamataki na Ramote-gileade.+
30 Sikoyo mokonzi ya Yisraele alobaki na Yehoshafate boye: “Ngai nakosala ete báyeba ngai te mpe nakokɔta na etumba,+ kasi yo, latá bilamba na yo ya bokonzi.”+ Bongo mokonzi ya Yisraele asalaki ete báyeba ye te+ mpe akɔtaki na etumba.+
31 Nzokande mokonzi ya Siri apesaki mitindo na bakonzi ntuku misato na mibale (32)+ ya makalo na ye ete: “Bóbunda na moto moke te to moto monene te, kaka na mokonzi ya Yisraele.”+
32 Mpe esalemaki boye: ntango kaka bakonzi ya makalo bamonaki Yehoshafate balobaki boye na mitema: “Oyo mpenza mokonzi ya Yisraele.”+ Bongo babalukaki mpo na kobunda na ye; mpe Yehoshafate abandaki koganga mpo na koluka lisalisi.+
33 Mpe esalemaki boye: ntango kaka bakonzi ya makalo bamonaki ete ezali mokonzi ya Yisraele te, na mbala moko, bazongaki mpe batikaki kolanda ye.+
34 Mpe ezalaki na moto moko oyo, kozanga koyeba, abendaki litimbo na ye mpe abɛtaki mokonzi ya Yisraele na esika oyo biteni mosusu ya molato ya etumba ekangani na kazaka ya ebende, bongo ye alobaki na motambwisi-likalo+ na ye ete: “Balusá lobɔkɔ na yo, mpe bimisá ngai na kaa, mpamba te nazoki mabe.”
35 Mpe etumba ezalaki se koya ndongo na mokolo yango, mpe esengelaki básimba mokonzi, bátɛlɛmisa ye kotɛlɛmisa na likalo, liboso ya bato ya Siri, mpe nsukansuka, akufaki+ na mpokwa; mpe makila ya mpota ezalaki kosopana na kati ya likalo ya etumba.+
36 Mpe pene na kolala ya moi, babandaki kolekaleka na kaa mpe koganga na mongongo makasi ete: “Moto na moto na engumba na ye, moto na moto na mboka na ye!”+
37 Bongo mokonzi akufaki. Ntango bamemaki mokonzi na Samaria, bakundaki ye na Samaria.+
38 Mpe babandaki kosukola likalo ya etumba pene na pisini ya Samaria, mpe bambwa eyaki kolɛmbɔla makila+ na ye (mpe basi ya ndumba basukolaki wana), na kolanda liloba oyo Yehova alobaki.+
39 Makambo mosusu ya Ahaba ná nyonso oyo asalaki ná ndako ya mpɛmbɛ ya nzoku+ oyo atongaki ná bingumba nyonso oyo atongaki ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yisraele?
40 Nsukansuka, Ahaba alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye;+ mpe mwana na ye Ahazia+ abandaki koyangela na esika na ye.
41 Nzokande Yehoshafate+ mwana ya Asa akómaki mokonzi ya Yuda na mbula ya minei ya Ahaba mokonzi ya Yisraele.
42 Yehoshafate azalaki na mbula ntuku misato na mitano (35) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula ntuku mibale na mitano (25) na Yerusaleme; mpe nkombo ya mama na ye Azuba mwana ya Shilehi.
43 Mpe azalaki se kotambola na nzela nyonso ya tata na ye Asa. Apɛngwaki na yango te, na ndenge azalaki kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova.+ Kasi bisika oyo etombwaná elimwaki te. Bato bazalaki se kopesa mbeka mpe kobimisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná.+
44 Mpe Yehoshafate afandaki na kimya elongo na mokonzi ya Yisraele.+
45 Makambo mosusu ya Yehoshafate ná nguya na ye oyo asalaki na yango ná ndenge abundaki bitumba ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yuda?
46 Mpe alongolaki+ na mokili mibali oyo bazali bandumba+ ya tempelo, oyo batikalaki na mikolo ya tata na ye Asa.
47 Nzokande, mokonzi azalaki te na Edome;+ komisɛrɛ moko nde azalaki mokonzi.+
48 Yehoshafate asalaki bamasuwa ya Tarasisi+ mpo ekende na Ofire kozwa wolo; kasi ekendaki te, mpamba te bamasuwa yango ebebaki na Ezione-gebere.+
49 Na ntango yango nde Ahazia mwana ya Ahaba alobaki na Yehoshafate ete: “Tiká basaleli na ngai bákende elongo na basaleli na yo na bamasuwa,” kasi Yehoshafate andimaki te.+
50 Nsukansuka, Yehoshafate alalaki esika moko na bankɔkɔ+ na ye mpe akundamaki esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi+ nkɔkɔ na ye; mpe mwana na ye Yehorame+ abandaki koyangela na esika na ye.
51 Nde Ahazia+ mwana ya Ahaba akómaki mokonzi ya Yisraele na Samaria na mbula ya zomi na nsambo ya Yehoshafate mokonzi ya Yuda, mpe ayangelaki Yisraele mbula mibale.
52 Mpe azalaki se kosala oyo ezali mabe+ na miso ya Yehova, kotambola na nzela ya tata na ye,+ na nzela ya mama na ye+ mpe na nzela ya Yeroboame+ mwana ya Nebate, oyo atindaki Yisraele básala lisumu.+
53 Mpe akobaki kosalela Baala+ mpe kogumbamela ye mpe azalaki se kosilikisa+ Yehova Nzambe ya Yisraele, na kolanda makambo nyonso oyo tata na ye asalaki.