1 Bakonzi 21:1-29

21  Mpe esalemaki boye: nsima ya makambo yango, Nabote Moyizireele azalaki na elanga moko ya vinyo, oyo ezalaki na Yizireele,+ pembeni ya ndako ya Ahaba mokonzi ya Samaria.  Bongo Ahaba alobaki na Nabote ete: “Pesá+ ngai elanga na yo ya vinyo,+ mpo nakómisa yango elanga+ na ngai ya ndunda,+ mpamba te ezali pene na ndako na ngai; mpe tiká napesa yo na esika na yango elanga moko ya vinyo oyo eleki yango. To, soki ezali malamu na miso na yo,+ nakopesa yo mbongo mpo na motuya na yango.”  Kasi Nabote alobaki na Ahaba boye: “Nakoki kokanisa yango ata moke te,+ na kolanda likanisi ya Yehova,+ ete napesa yo libula ya bankɔkɔ na ngai.”+  Bongo Ahaba akɔtaki na ndako na ye, na mawa mpe alɛmbaki nzoto mpo na liloba oyo Nabote Moyizireele alobaki na ye, ntango alobaki ete: “Nakopesa yo libula ya bankɔkɔ na ngai te.” Bongo alalaki na mbeto na ye mpe abalolaki elongi na ye,+ mpe alyaki limpa te.  Nsukansuka, mwasi na ye Yezabele+ akɔtaki epai na ye mpe alobaki na ye boye: “Mpo na nini elimo na yo ezali mawamawa+ mpe ozali kolya limpa te?”  Na yango, ye alobaki na Yezabele ete: “Mpo nalobaki na Nabote Moyizireele mpe nayebisaki ye ete: ‘Pesá ngai elanga na yo ya vinyo nasomba na mbongo. To, soki olingi, tiká napesa yo elanga mosusu ya vinyo na esika na yango.’ Kasi ye alobaki ete: ‘Nakopesa yo elanga na ngai ya vinyo te.’”+  Na nsima, mwasi na ye Yezabele alobaki na ye boye: “Yo te moto ozali koyangela Yisraele sikoyo?+ Tɛlɛmá, lyá limpa mpe tiká motema na yo ezala na esengo. Ngai moko nakopesa yo elanga ya vinyo ya Nabote Moyizireele.”+  Bongo akomaki mikanda+ na nkombo ya Ahaba mpe atyaki yango kashɛ+ ya Ahaba, mpe atindaki mikanda yango epai ya mikóló+ mpe bankumu oyo bazalaki na engumba na ye, oyo bazalaki kofanda esika moko na Nabote.  Kasi akomaki na mikanda yango ete:+ “Bósakola ete bato bákila bilei, mpe bófandisa Nabote liboso ya bato. 10  Mpe bófandisa mibali mibale,+ bato ya mpambampamba,+ mpe bótika bango bápesa litatoli mpo na kofunda ye+ ete: ‘Olakeli Nzambe ná mokonzi mabe!’+ Bongo bóbimisa ye mpe bóbamba ye mabanga akufa.”+ 11  Bongo mibali ya engumba na ye, mikóló mpe bankumu oyo bazalaki kofanda na engumba na ye, basalaki kaka ndenge Yezabele atindelaki bango maloba, kaka ndenge ekomamaki na mikanda oyo atindelaki bango.+ 12  Basakolaki ete bato bákila bilei+ mpe bafandisaki Nabote liboso ya bato. 13  Na nsima, mibale kati na bato yango, bato ya mpambampamba, bakɔtaki mpe bafandaki liboso na ye; mpe bato yango ya mpambampamba babandaki kopesa litatoli mpo na kofunda ye Nabote na miso ya bato ete: “Nabote alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe!”+ Nsima na yango, babimisaki ye na pembeni ya engumba mpe babambaki ye mabanga, bongo akufaki.+ 14  Bongo batindaki bato epai ya Yezabele, na maloba oyo: “Babambi Nabote mabanga mpe akufi.”+ 15  Mpe esalemaki boye: ntango kaka Yezabele ayokaki ete babambi Nabote mabanga mpe akufi, na mbala moko, Yezabele alobaki na Ahaba boye: “Tɛlɛmá, zwá elanga ya vinyo ya Nabote Moyizireele,+ elanga oyo aboyaki kopesa yo osomba na mbongo; mpo Nabote azali lisusu na bomoi te, kasi akufi.” 16  Mpe esalemaki boye: ntango kaka Ahaba ayokaki ete Nabote akufi, na mbala moko, Ahaba atɛlɛmaki mpe akitaki na elanga ya vinyo ya Nabote Moyizireele mpo na kozwa yango.+ 17  Bongo liloba+ ya Yehova eyelaki Eliya+ Motishebe ete: 18  “Tɛlɛmá, kitá kokutana na Ahaba mokonzi ya Yisraele, oyo azali na Samaria.+ Ye wana na elanga ya vinyo ya Nabote, akiti kuna mpo na kozwa yango. 19  Mpe osengeli koloba na ye ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Obomi+ moto mpe lisusu ozwi eloko na ye?”’+ Mpe osengeli koloba na ye ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Na esika+ bambwa elɛmbɔla makila ya Nabote, bambwa ekolɛmbɔla makila na yo, ɛɛ, ya yo.”’”+ 20  Bongo Ahaba alobaki na Eliya ete: “Aa monguna na ngai, ozwi ngai mpenza!”+ Na yango ye alobaki boye: “Nazwi yo. ‘Lokola omitɛki mpo na kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ 21  talá, nazali komemela yo mpasi;+ mpe nakokɔmbɔla yo+ mpenza mpe nakoboma moto nyonso ya Ahaba oyo asubaka na efelo+ mpe moto oyo azangi makoki mpe azangi ntina na Yisraele. 22  Mpe nakokómisa mpenza ndako na yo lokola ndako ya Yeroboame+ mwana ya Nebate mpe lokola ndako ya Baasha+ mwana ya Ahiya, mpo na kosilikisa oyo osilikisi ngai mpe na nsima otindi Yisraele básala lisumu.’+ 23  Mpe Yehova alobi lisusu boye mpo na Yezabele: ‘Bambwa ekolya Yezabele na eteni ya mabele ya Yizireele.+ 24  Moto nyonso ya Ahaba oyo akokufa na engumba, bambwa ekolya ye; mpe moto nyonso oyo akokufa na esobe, bandɛkɛ ya likoló ekolya ye.+ 25  Ya solo, ata moto moko te akómá lokola Ahaba,+ oyo amitɛká mpo na kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova mpe oyo mwasi na ye Yezabele+ azalaki kotinda asala mabe.+ 26  Mpe asalaki na ndenge moko ya bosɔtɔ mpenza na ndenge akendaki kolanda bikeko ya bosɔtɔ,*+ ndenge moko na makambo nyonso oyo Baamore basalaki, baoyo Yehova abenganaki liboso ya bana ya Yisraele.’”+ 27  Mpe esalemaki boye: ntango kaka Ahaba ayokaki maloba yango, apasolaki bilamba na ye mpe alataki ngɔtɔ+ na nzoto na ye; mpe akilaki bilei mpe azalaki se kolala na ngɔtɔ mpe kotambola, alɛmbi nzoto.+ 28  Bongo liloba ya Yehova eyelaki Eliya Motishebe ete: 29  “Omoni ndenge Ahaba amikitisi mpo na ngai?+ Lokola amikitisi mpo na ngai, nakopesa mpasi yango na mikolo na ye te.+ Na mikolo ya mwana na ye nde nakopesa ndako na ye mpasi yango.”+

Maloba na nse

Talá Le 26:30, msl.