1 Bakonzi 15:1-34
15 Mpe na mbula ya zomi na mwambe ya Mokonzi Yeroboame+ mwana ya Nebate,+ Abiyame akómaki mokonzi ya Yuda.+
2 Ayangelaki mbula misato na Yerusaleme; mpe nkombo ya mama na ye Maaka+ mwana ya mwana ya Abishalome.+
3 Mpe atambolaki na masumu nyonso ya tata na ye, oyo asalaki liboso na ye; mpe motema na ye ezalaki mobimba te+ epai ya Yehova Nzambe na ye, lokola motema ya nkɔkɔ na ye Davidi.+
4 Mpamba te, mpo na Davidi,+ Yehova Nzambe na ye apesaki ye mwinda+ na Yerusaleme ndenge abimisaki mwana na ye nsima na ye mpe atikaki Yerusaleme ezala,+
5 mpamba te Davidi asalaki oyo ezali sembo na miso ya Yehova, mpe mikolo nyonso ya bomoi na ye,+ apɛngwaki na eloko moko te oyo Ye apesaki ye mitindo, longola kaka na likambo ya Uriya Mohiti.+
6 Mpe etumba ezalaki kati na Rehoboame ná Yeroboame mikolo nyonso ya bomoi na ye.+
7 Makambo mosusu ya Abiyame ná nyonso oyo asalaki ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yuda? Etumba ebimaki mpe kati na Abiyame ná Yeroboame.+
8 Nsukansuka, Abiyame alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye mpe bakundaki ye na Sité ya Davidi;+ mpe mwana na ye Asa+ abandaki koyangela na esika na ye.
9 Na mbula ya ntuku mibale (20) ya Yeroboame mokonzi ya Yisraele, Asa akómaki mokonzi ya Yuda.
10 Mpe ayangelaki mbula ntuku minei na moko (41) na Yerusaleme; mpe nkombo ya nkɔkɔ na ye ya mwasi Maaka+ mwana ya mwana ya Abishalome.+
11 Mpe Asa asalaki oyo ezali sembo na miso ya Yehova, lokola nkɔkɔ na ye Davidi.+
12 Bongo alongolaki mibali oyo bazali bandumba ya tempelo na mokili+ mpe alongolaki bikeko nyonso ya bosɔtɔ,*+ oyo bankɔkɔ na ye basalaki.+
13 Alongolaki ata nkɔkɔ na ye Maaka+ na ebonga ya mwasi ya lokumu,+ mpamba te asalaki ekeko moko ya nsɔmɔ mpo na nzete ya losambo; nsima na yango, Asa akataki ekeko na ye ya nsɔmɔ+ mpe atumbaki yango+ na lobwaku ya mokɛli ya Kidrone.+
14 Nde bisika oyo etombwaná,+ alongolaki yango te.+ Atako bongo, motema ya Asa ezalaki mobimba epai ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ye.+
15 Mpe abandaki kokɔtisa na ndako ya Yehova biloko oyo tata na ye asantisaki mpe biloko oyo ye moko asantisaki: palata, wolo ná biloko mosusu.+
16 Mpe etumba ezalaki kati na Asa mpe Baasha+ mokonzi ya Yisraele mikolo na bango nyonso.
17 Bongo Baasha mokonzi ya Yisraele amataki kobundisa Yuda mpe abandaki kotonga Rama,+ mpo na kopesa moto moko te nzela ya kobima to ya kokɔta epai ya Asa mokonzi ya Yuda.+
18 Na yango, Asa azwaki palata nyonso mpe wolo oyo etikalaki na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya Yehova mpe na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi mpe atyaki yango na lobɔkɔ ya basaleli na ye; na nsima, Mokonzi Asa atindaki bango epai ya Bene-hadade+ mwana ya Tabrimone mwana ya Hezione, mokonzi ya Siri,+ oyo azalaki kofanda na Damasi,+ alobaki ete:
19 “Kondimana ezali kati na ngai ná yo, kati na tata na ngai ná tata na yo. Talá, natindeli yo likabo+ ya palata ná wolo. Yaká, buká kondimana na yo na Baasha mokonzi ya Yisraele, mpo alongwa epai na ngai.”+
20 Na yango, Bene-hadade ayokelaki Mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya mampinga ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Yisraele mpe koboma Iyone,+ Dani,+ Abele-bete-maaka+ ná Kinerete mobimba, tii na mokili mobimba ya Nafatali.+
21 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Baasha ayokaki yango, na mbala moko atikaki kotonga Rama+ mpe akobaki kofanda na Tireza.+
22 Mokonzi Asa abengisaki Yuda+ mobimba—atikaki ata moto moko te—mpe bamemaki mabanga ya Rama mpe banzete na yango, oyo Baasha azalaki kotonga na yango; mpe Mokonzi Asa abandaki kotonga na yango Geba+ na Benyamina, ná Mizipa.+
23 Makambo mosusu na makambo nyonso ya Asa ná nguya na ye nyonso ná nyonso oyo asalaki mpe bingumba oyo atongaki ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yuda? Kasi ntango akómaki mobange,+ abɛlaki maladi na makolo.+
24 Nsukansuka, Asa alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye+ mpe akundamaki esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi nkɔkɔ na ye;+ mpe mwana na ye Yehoshafate+ abandaki koyangela na esika na ye.
25 Nadabe+ mwana ya Yeroboame akómaki mokonzi ya Yisraele na mbula ya mibale ya Asa mokonzi ya Yuda; mpe ayangelaki Yisraele mbula mibale.
26 Mpe azalaki se kosala oyo ezali mabe+ na miso ya Yehova mpe kotambola na nzela ya tata na ye+ mpe na lisumu na ye oyo atindaki Yisraele básala.+
27 Mpe Baasha+ mwana ya Ahiya ya ndako ya Isakare abandaki kosalela ye likita; mpe Baasha abomaki ye na Gibetone+ ya Bafilistia, wana Nadabe mpe Yisraele mobimba bazingaki Gibetone.
28 Ndenge wana nde Baasha abomaki ye na mbula ya misato ya Asa mokonzi ya Yuda mpe abandaki koyangela na esika na ye.+
29 Mpe esalemaki boye: ntango kaka akómaki mokonzi, abomaki ndako mobimba ya Yeroboame. Atikaki ata moto moko te ya Yeroboame oyo azali na mpema tii asilisaki bango nyɛɛ, na kolanda liloba ya Yehova oyo alobaki na nzela ya mosaleli na ye Ahiya Moshilo,+
30 mpo na masumu ya Yeroboame oyo asalaki+ mpe oyo atindaki Yisraele básala mpe na makambo na ye ya kosilikisa oyo asilikisaki na yango Yehova Nzambe ya Yisraele.+
31 Makambo mosusu ya Nadabe ná nyonso oyo asalaki ekomami te na buku+ ya makambo ya mikolo ya bakonzi ya Yisraele?
32 Mpe etumba ezalaki kati na Asa mpe Baasha mokonzi ya Yisraele mikolo na bango nyonso.+
33 Na mbula ya misato ya Asa mokonzi ya Yuda, Baasha mwana ya Ahiya akómaki mokonzi ya Yisraele mobimba na Tireza na boumeli ya mbula ntuku mibale na minei (24).+
34 Mpe azalaki se kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova+ mpe kotambola na nzela ya Yeroboame+ mpe na lisumu na ye oyo atindaki Yisraele básala.+