1 Bakonzi 12:1-33
12 Mpe Rehoboame+ akendaki na Shekeme, mpo ezalaki na Shekeme+ nde Yisraele mobimba bayaki mpo na kokómisa ye mokonzi.
2 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Yeroboame+ mwana ya Nebate ayokaki likambo yango, wana azalaki naino na Ezipito (mpamba te Yeroboame afandaki na Ezipito, mpo akimaki Mokonzi Salomo),+
3 batindaki bato bábenga ye. Nsima na yango, Yeroboame ná lisangá mobimba ya Yisraele bayaki mpe babandaki koloba na Rehoboame boye:+
4 “Tata na yo akómisaki ekanganeli na biso makasi, sikoyo yo, lɛmbisá+ mosala makasi ya tata na yo mpe ekanganeli ya kilo+ oyo atyelaki biso, mpe tokosalela yo.”+
5 Bongo alobaki na bango boye: “Bókende, mpe nsima ya mikolo misato, bózongela ngai.”+ Bongo bato bakendaki.
6 Mpe Mokonzi Rehoboame abandaki kosala likita ná mikóló+ oyo bazalaki kosalela tata na ye Salomo ntango azalaki naino na bomoi, alobaki ete: “Toli nini bokopesa mpo napesa bato oyo eyano?”+
7 Na yango, balobaki na ye boye: “Soki lelo olakisi ete ozali mosaleli ya bato oyo mpe osaleli mpenza bango,+ pesá bango eyano mpe lobá na bango na maloba ya kitoko;+ mpe bakokóma mpenza basaleli na yo libela.”+
8 Kasi ye atikaki toli ya mikóló, oyo bapesaki ye, mpe ayaki kosala likita na bilenge oyo bakolaki esika moko na ye,+ baoyo bazalaki kosalela ye.+
9 Bongo alobaki lisusu na bango boye: “Toli+ nini bokopesa mpo tópesa eyano na bato oyo balobi na ngai ete: ‘Lɛmbisá ekanganeli oyo tata na yo atyelaki biso’?”+
10 Bongo bilenge oyo bakolaki esika moko na ye balobaki na ye boye: “Talá oyo okoloba+ na bato yango oyo balobi na yo ete: ‘Tata na yo ayeisaki ekanganeli na biso kilo, kasi yo, lɛmbiselá biso yango’; talá oyo okoloba na bango: ‘Mosapi na ngai ya moke ekozala mpenza monene koleka loketo ya tata na ngai.+
11 Mpe sikoyo, tata na ngai amemisaki bino ekanganeli moko ya kilo; kasi ngai, nakobakisa ekanganeli na bino.+ Tata na ngai apesaki bino etumbu na fimbo, kasi ngai, nakopesa bino etumbu na fimbo oyo ezali na bitubeli.’”+
12 Mpe Yeroboame ná bato nyonso bayaki epai ya Rehoboame na mokolo ya misato, ndenge mokonzi alobaki ete: “Bózongela ngai na mokolo ya misato.”+
13 Bongo mokonzi apesaki bato eyano na maloba makasi,+ mpe atikaki toli oyo mikóló bapesaki ye.+
14 Mpe alobaki na bango, ndenge bilenge+ bapesaki toli ete: “Tata na ngai ayeisaki ekanganeli na bino kilo, kasi ngai, nakobakisa ekanganeli na bino. Tata na ngai apesaki bino etumbu na fimbo, kasi ngai, nakopesa bino etumbu na fimbo oyo ezali na bitubeli.”+
15 Mpe mokonzi ayokelaki bato te,+ mpamba te Yehova nde azalaki kobongola makambo,+ mpo akokisa mpenza liloba+ na ye oyo Yehova alobaki na Yeroboame mwana ya Nebate na nzela ya Ahiya+ Moshilo.
16 Ntango Yisraele mobimba bamonaki ete mokonzi ayokelaki bango te, bato bayanolaki mokonzi boye: “Likabo nini tozali na yango na makambo etali Davidi?+ Mpe tozali na libula moko te na makambo etali mwana ya Yese. Ee Yisraele, kende epai ya banzambe na yo.+ Sikoyo, talelá makambo ya ndako na yo moko, Ee Davidi!”+ Na yango, Yisraele babandaki kokende na bahema na bango.
17 Kasi Rehoboame akobaki koyangela bana ya Yisraele oyo bazalaki kofanda na bingumba ya Yuda.+
18 Na nsima, Mokonzi Rehoboame atindaki Adorame,+ oyo azalaki mokonzi ya bato oyo babengisami mpo na kosala misala na makasi,+ kasi Yisraele mobimba babambaki ye mabanga+ mpe akufaki. Mpe Mokonzi Rehoboame azwaki kaka nzela ya komata na likalo mpe kokima tii na Yerusaleme.
19 Mpe Bayisraele batombokelá+ ndako ya Davidi tii na mokolo ya lelo.+
20 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Yisraele mobimba bayokaki ete Yeroboame azongi, na mbala moko, batindaki bato bábenga ye aya na liyangani mpe bakómisaki ye mokonzi ya Yisraele mobimba.+ Moto ata moko te alandaki ndako ya Davidi, longola kaka libota ya Yuda yango moko.+
21 Ntango Rehoboame akómaki na Yerusaleme,+ na mbala moko ayanganisaki ndako mobimba ya Yuda mpe libota ya Benyamina:+ bato nkóto nkama moko na ntuku mwambe (180 000), oyo bazalaki basoda ya makasi koleka, mibali makasi ya etumba, mpo na kobundisa ndako ya Yisraele, mpe kozongisela Rehoboame mwana ya Salomo bokonzi.
22 Bongo liloba ya Nzambe ya solo eyelaki Shemaya+ moto ya Nzambe ya solo+ ete:
23 “Yebisá Rehoboame mwana ya Salomo mokonzi ya Yuda mpe ndako mobimba ya Yuda mpe Benyamina ná bato oyo batikali ete:
24 ‘Talá oyo Yehova alobi: “Bosengeli te komata mpo na kobunda na bandeko na bino, bana ya Yisraele.+ Bózonga moto na moto na ndako na ye, mpo likambo oyo esalemi euti na ngai.”’”+ Bongo batosaki liloba ya Yehova,+ mpe bazongaki na ndako ndenge Yehova alobaki.+
25 Bongo Yeroboame atongaki Shekeme+ na etúká ya ngombangomba ya Efraime mpe afandaki kuna. Na nsima, abimaki kuna mpe atongaki Penuele.+
26 Mpe Yeroboame abandaki koloba boye na motema na ye:+ “Sikoyo bokonzi ekozonga na ndako ya Davidi.+
27 Soki bato oyo bazali kaka komata mpo na kopesa mbeka na ndako ya Yehova na Yerusaleme,+ motema ya bato oyo ekozongela mpenza nkolo na bango, Rehoboame mokonzi ya Yuda; mpe ya solo, bakoboma ngai+ mpe bakozongela Rehoboame mokonzi ya Yuda.”
28 Na yango, mokonzi asalaki likita+ mpe asalaki bana-ngɔmbɛ mibale ya wolo+ mpe alobaki na bato ete: “Ezali mpasi bómataka na Yerusaleme. Ee Yisraele, talá Nzambe na yo+ oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito.”+
29 Bongo atyaki mosusu na Betele,+ mpe atyaki mosusu na Dani.+
30 Mpe eloko yango ekómaki likambo ya kosalisa bato lisumu,+ mpe bato babandaki kokende tii na Dani mpo na kotɛlɛma liboso ya moko na yango.
31 Abandaki kosala ndako moko ya bisika oyo etombwaná+ mpe azwaki bato oyo bazalaki bana ya Levi te mpe akómisaki bango banganga-nzambe.+
32 Mpe lisusu, Yeroboame asalaki fɛti na sanza ya mwambe, na mokolo ya zomi na mitano ya sanza, lokola fɛti oyo ezalaki na Yuda,+ mpo apesaka makabo likoló ya etumbelo oyo asalaki na Betele, mpo na kopesa bambeka na bana-ngɔmbɛ oyo asalaki; mpe banganga-nzambe ya bisika oyo etombwaná oyo asalaki, atyaki bango básalaka mosala na Betele.+
33 Mpe abandaki kopesa makabo likoló ya etumbelo oyo asalaki na Betele, na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe, sanza oyo abimisaki na likanisi na ye moko;+ mpe asalelaki bana ya Yisraele fɛti mpe apesaki makabo likoló ya etumbelo yango mpo na kobimisa milinga ya mbeka.+