1 Bakonzi 11:1-43
11 Mpe longola mwana mwasi ya Farao,+ Mokonzi Salomo alingaki basi bapaya+ mingi: Bamoabe,+ Baamone,+ Baedome,+ Basidone+ ná Bahiti,+
2 na bikólo oyo Yehova alobaki na bana ya Yisraele ete: “Bosengeli te kokɔta epai na bango,+ mpe bango basengeli te koya epai na bino; ya solo, bakobenda motema na bino mpo na kolanda banzambe na bango.”+ Salomo akangamaki+ nde na bango mpe alingaki bango.
3 Bongo akómaki na basi nkama nsambo (700), bana basi ya bakonzi, mpe bamakango nkama misato (300); mpe mokemoke,+ basi na ye babendaki motema na ye.
4 Mpe esalemaki boye: ntango Salomo akómaki mobange,+ basi na ye babendaki+ motema na ye mpo na kolanda banzambe mosusu;+ mpe motema na ye ezalaki mobimba te+ epai ya Yehova Nzambe na ye lokola motema ya tata na ye Davidi.
5 Bongo Salomo abandaki kolanda Ashitorete+ nzambe-mwasi ya Basidone mpe kolanda Milikome+ eloko ya bosɔtɔ ya Baamone.
6 Mpe Salomo abandaki kosala oyo ezali mabe+ na miso ya Yehova, mpe alandaki Yehova na makambo nyonso te lokola tata na ye Davidi.+
7 Na ntango yango nde Salomo atongaki esika oyo etombwaná+ mpo na Kemoshe+ eloko ya bosɔtɔ+ ya Moabe, na ngomba+ oyo etalani+ na Yerusaleme, mpe mpo na Moleke eloko ya bosɔtɔ ya bana ya Amone.
8 Mpe asalaki bongo mpo na basi na ye nyonso ya bapaya,+ oyo bazalaki kobimisa milinga ya mbeka mpe kopesa mbeka na banzambe na bango.+
9 Bongo Yehova asilikelaki+ Salomo, mpamba te motema na ye ebendamaki, etiki Yehova Nzambe ya Yisraele+ oyo abimelaki ye mbala mibale.+
10 Mpe mpo na likambo yango, apesaki ye mitindo ete alanda banzambe mosusu te;+ kasi ye atosaki te makambo oyo Yehova apesaki ye mitindo.
11 Sikoyo, Yehova alobaki na Salomo ete: “Lokola osali likambo oyo mpe otosi te kondimana na ngai mpe mibeko na ngai oyo napesaki yo mitindo, ya solo, nakobɔtɔla yo bokonzi mpe nakopesa yango mpenza mosaleli na yo.+
12 Nzokande, nakosala yango na mikolo na yo te,+ mpo na tata na yo Davidi.+ Nakobɔtɔla yango na lobɔkɔ ya mwana na yo.+
13 Kasi nakobɔtɔla bokonzi nyonso te.+ Nakopesa mwana na yo libota moko, mpo na mosaleli+ na ngai Davidi mpe mpo na Yerusaleme oyo naponá.”+
14 Bongo Yehova abandaki kobimisela Salomo+ motɛmɛli+ moko, elingi koloba Hadade, Moedome, na libota ya mokonzi. Azalaki na Edome.+
15 Mpe esalemaki boye: ntango Davidi abomaki Edome,+ ntango Yoabe mokonzi ya basoda ayaki kokunda bato oyo babomamaki, alukaki koboma mobali nyonso na Edome.+
16 (Mpo Yoabe ná Yisraele mobimba bafandaki kuna sanza motoba tii abomaki mobali nyonso na Edome.)
17 Mpe Hadade akimaki, ye ná mibali mosusu ya Edome oyo bazalaki basaleli ya tata na ye elongo na ye, bakendaki na Ezipito, wana Hadade azalaki naino elenge mobali.
18 Bongo batɛlɛmaki, balongwe na Midiane,+ bakɔti na Parane mpe bazwaki bato na Parane+ mpe bakendaki na Ezipito epai ya Farao mokonzi ya Ezipito, oyo apesaki ye ndako. Lisusu, atindaki bápesaka ye limpa, mpe apesaki ye mabele.
19 Mpe Hadade andimamaki+ mpenza na miso ya Farao, bongo Farao apesaki ye mwasi,+ ndeko ya mwasi na ye moko, ndeko ya Tahapenese mwasi ya lokumu.
20 Na nsima, ndeko mwasi ya Tahapenese abotelaki ye Genubate, mwana na ye ya mobali, mpe Tahapenese akilisaki ye mabɛlɛ+ na ndako mpenza ya Farao; mpe Genubate akobaki kofanda na ndako ya Farao esika moko na bana ya Farao.
21 Bongo Hadade, na Ezipito, ayokaki ete Davidi asilaki kolala esika moko na bankɔkɔ+ na ye mpe ete Yoabe mokonzi ya basoda asilaki kokufa.+ Yango wana, Hadade alobaki na Farao ete: “Tiká ngai nakende,+ nakende na mokili na ngai.”
22 Kasi Farao alobaki na ye boye: “Ozangi eloko nini awa ozali elongo na ngai mpo sikoyo oluka kokende na mokili na yo?” Bongo ye alobaki ete: “Eloko te; kasi osengeli kotika ngai nakende.”
23 Mpe Nzambe abimiselaki ye motɛmɛli+ mosusu, elingi koloba Rezone mwana ya Eliada, oyo akimaki nkolo na ye Hadadezere+ mokonzi ya Soba.+
24 Bongo azalaki se koyanganisa bato na ngámbo na ye mpe akómaki mokonzi ya etuluku moko ya bapunzi, ntango Davidi abomaki bato ya Soba.+ Na yango, bakendaki na Damasi,+ mpe bakómaki kofanda kuna mpe babandaki koyangela na Damasi.
25 Mpe akómaki motɛmɛli ya Yisraele mikolo nyonso ya Salomo+—botɛmɛli na ye ebakisamaki na mabe nyonso oyo Hadade asalaki; mpe azalaki koyina+ Yisraele ntango azalaki koyangela Siri.
26 Mosusu mpe Yeroboame+ mwana ya Nebate Moefraime ya Zereda, mosaleli ya Salomo,+ mpe nkombo ya mama na ye Zerua, mwasi oyo mobali akufá. Ye mpe abandaki kotombolela mokonzi lobɔkɔ na ye.+
27 Mpe talá ntina oyo atombolelaki mokonzi lobɔkɔ na ye: Salomo atongaki Mwa Ngomba.+ Azipaki lidusu ya Sité ya Davidi tata na ye.+
28 Nzokande Yeroboame azalaki elombe, mobali ya nguya.+ Ntango Salomo amonaki ete elenge mobali yango azali moto moko alingá mosala,+ akómisaki ye mokɛngɛli+ ya mosala nyonso ya kotinda bato na makasi,+ oyo ezalaki kosalema na ndako ya Yozefe.+
29 Mpe esalemaki boye: na ntango yango, Yeroboame abimaki na Yerusaleme, mpe mosakoli Ahiya+ Moshilo+ akutanaki na ye na nzela, mpe Ahiya alataki elamba moko ya sika; mpe bango mibale bazalaki kaka bango moko na esobe.
30 Sikoyo, Ahiya asimbaki elamba yango ya sika oyo alataki mpe apasolaki+ yango na biteni zomi na mibale.+
31 Mpe lisusu alobaki na Yeroboame boye:
“Zwá biteni zomi; mpo talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Talá, nazali kokabola bokonzi mpe kolongola yango na lobɔkɔ ya Salomo, mpe ya solo, nakopesa yo mabota zomi.+
32 Mpe libota+ moko nde ekotikala ya ye mpo na mosaleli na ngai Davidi+ mpe mpo na Yerusaleme,+ engumba oyo naponá na mabota nyonso ya Yisraele.
33 Ezali mpo batiki ngai+ mpe babandi kogumbamela Ashitorete+ nzambe-mwasi ya Basidone, Kemoshe+ nzambe ya Moabe ná Milikome+ nzambe ya bana ya Amone; mpe batamboli te na banzela na ngai mpo na kosala oyo ezali sembo na miso na ngai mpe mibeko na ngai ná bikateli na ngai ya lisambisi lokola tata na ye Davidi.
34 Kasi nakozwa bokonzi nyonso te na lobɔkɔ na ye, mpamba te nakotya ye azala nkumu mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpo na Davidi mosaleli na ngai oyo naponá,+ mpo ye atosaki mitindo na ngai mpe mibeko na ngai.
35 Mpe ya solo, nakozwa bokonzi na lobɔkɔ ya mwana na ye mpe nakopesa yo yango, ɛɛ, mabota zomi.+
36 Mpe nakopesa mwana na ye libota moko, mpo Davidi mosaleli na ngai akoba kozala na mwinda ntango nyonso liboso na ngai na Yerusaleme,+ engumba oyo naponá mpo na kotya nkombo na ngai kuna.+
37 Mpe yo moto nakozwa, mpe okoyangela mpenza nyonso oyo molimo na yo ezali na mposa+ ya koyangela, mpe okokóma mpenza mokonzi ya Yisraele.
38 Mpe ekosalema mpenza boye: soki otosi mitindo nyonso oyo nakopesa yo, mpe otamboli na banzela na ngai mpe osali mpenza oyo ezali sembo na miso na ngai, obateli mibeko na ngai mpe mitindo na ngai, kaka ndenge Davidi mosaleli na ngai asalaki,+ ngai mpe nakozala elongo na yo,+ mpe nakotongela yo ndako oyo ekoumela, ndenge natongelá Davidi,+ mpe nakopesa yo Yisraele.
39 Mpe nakosambwisa bana ya Davidi mpo na likambo yango,+ kasi mpo na libela te.’”+
40 Mpe Salomo abandaki koluka koboma Yeroboame.+ Bongo Yeroboame atɛlɛmaki mpe akimaki+ na Ezipito epai ya Shishake+ mokonzi ya Ezipito, mpe afandaki na Ezipito tii liwa ya Salomo.
41 Makambo mosusu ya Salomo ná nyonso oyo asalaki ná bwanya na ye ekomami te na buku ya makambo ya Salomo?
42 Mpe mikolo oyo Salomo ayangelaki Yisraele mobimba na Yerusaleme ezalaki mbula ntuku minei (40).+
43 Na nsima, Salomo alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye,+ mpe akundamaki na Sité ya Davidi+ tata na ye; mpe mwana na ye Rehoboame+ abandaki koyangela na esika na ye.