1 Bakonzi 10:1-29

10  Bongo mokonzi-mwasi ya Sheba+ ayokaki nsango ya Salomo oyo ezalaki kokumisa nkombo ya Yehova.+ Na yango, ayaki mpo na komeka ye na mituna ya makasimakasi.+  Nsukansuka, akómaki na Yerusaleme ná molɔngɔ ya bato ebele mpenza nsima na ye,+ ná bakamela+ oyo ezali komema mafuta ya balsame+ mpe wolo mingi mpenza mpe mabanga ya ntalo; mpe akɔtaki epai ya Salomo mpe abandaki koyebisa ye makambo nyonso oyo ezalaki na motema na ye.+  Bongo ye Salomo, alimbolelaki ye makambo na ye nyonso.+ Ezalaki na likambo moko te oyo mokonzi ayebaki te, oyo alimbolelaki ye te.+  Ntango mokonzi-mwasi ya Sheba amonaki bwanya nyonso ya Salomo+ mpe ndako oyo ye atongaki,+  bilei na mesa+ na ye, ndenge basaleli na ye bazalaki kofanda, ndenge basaleli na ye bazalaki kopesa biloko na mesa, molato na bango, masanga oyo azalaki komɛla,+ bambeka na ye ya kotumba oyo azalaki kopesa mbala na mbala na ndako ya Yehova, mayele esilaki ye.+  Na yango, alobaki na mokonzi boye: “Liloba oyo nayokaki na mokili na ngai mpo na makambo na yo mpe bwanya na yo ezali mpenza solo.+  Kasi nandimaki maloba yango te kino nayei komona na miso na ngai moko; mpe talá! oyo bayebisaki ngai ekómi ata na katikati te.+ Bwanya na yo mpe bozwi na yo eleki mpenza makambo oyo nayoká na matoi na ngai.+  Esengo na bato na yo;+ esengo+ na basaleli na yo oyo batɛlɛmaka ntango nyonso liboso na yo, mpe bayokaka bwanya na yo!+  Yehova Nzambe na yo apambwama,+ ye oyo asepeli+ na yo na ndenge atye yo na kiti ya bokonzi ya Yisraele;+ lokola Yehova alingi Yisraele mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ atye yo ozala mokonzi+ mpo na kokata makambo+ mpe kosala na boyengebene.”+ 10  Bongo apesaki+ mokonzi talanta nkama moko na ntuku mibale (120) ya wolo,+ ebele ya mafuta ya balsame+ ná mabanga ya ntalo. Mafuta ya balsame ebele boye, lokola oyo mokonzi-mwasi ya Sheba apesaki Mokonzi Salomo emonaná lisusu te. 11  Mpe bamasuwa+ ya Hirame, oyo ememaki wolo uta na Ofire,+ ememaki mpe uta na Ofire mabaya ebele ya banzete ya algume+ mpe mabanga ya ntalo.+ 12  Mpe na mabaya yango ya banzete ya algume, mokonzi asalaki bisimbeli mpo na ndako ya Yehova+ mpe mpo na ndako ya mokonzi, bakisa mpe banzɛnzɛ+ mpe bibɛtɛlo ya bansinga+ mpo na bayembi. Mabaya ya banzete ya algume lokola oyo wana eyá lisusu te mpe emonaná lisusu te tii na mokolo ya lelo. 13  Mpe Mokonzi Salomo apesaki mokonzi-mwasi ya Sheba nyonso oyo asepelaki na yango, oyo asɛngaki, longola biloko oyo Mokonzi Salomo apesaki ye na lobɔkɔ pɛtɛɛ+ na ye. Nsima na yango, abalukaki mpe akendaki na mokili na ye, ye ná basaleli na ye.+ 14  Mpe kilo ya wolo+ oyo bazalaki koyela Salomo na mbula moko ezalaki talanta nkama motoba na ntuku motoba na motoba (666) ya wolo,+ 15  longola oyo ezalaki kouta na bato ya mibembo mpe litomba oyo ezalaki kouta na bato ya mombongo, mpe na bakonzi+ nyonso ya Baarabe+ mpe na baguvɛrnɛrɛ ya mokili. 16  Bongo Mokonzi Salomo asalaki lisusu banguba minene nkama mibale (200) ya wolo+ oyo basangisá na ebende mosusu (azipaki nguba monene mokomoko na shekele nkama motoba [600] ya wolo),+ 17  mpe banguba mike nkama misato (300) ya wolo oyo basangisá na ebende mosusu (azipaki nguba moke mokomoko na mina misato ya wolo).+ Na nsima, mokonzi atyaki yango na Ndako ya Zamba ya Libá.+ 18  Lisusu, mokonzi asalaki kiti+ moko monene ya bokonzi na mpɛmbɛ ya nzoku,+ mpe azipaki yango na wolo oyo epɛtolami.+ 19  Ezalaki na eskalye ya matambe motoba tii na kiti ya bokonzi, mpe kiti yango ya bokonzi ezalaki na ezipeli na nsima na yango, oyo egumbamá, mpe ezalaki na lobɔkɔ na ngámbo oyo mpe lobɔkɔ na ngámbo oyo mosusu ya esika ya kofanda, mpe nkɔsi+ mibale etɛlɛmaki pembeni ya mabɔkɔ yango.+ 20  Mpe ezalaki na nkɔsi zomi na mibale oyo etɛlɛmaki wana na matambe motoba ya eskalye yango, na ngámbo oyo mpe na ngámbo oyo mosusu. Bokonzi mosusu te ezalaki na kiti ya bokonzi oyo basalá ndenge wana.+ 21  Mpe bisaleli nyonso ya komɛlela ya Mokonzi Salomo ezalaki ya wolo, mpe bisaleli nyonso ya Ndako ya Zamba ya Libá+ ezalaki ya wolo ya pɛto.+ Ata eloko moko ya palata ezalaki te; bazalaki kotalela palata lokola eloko mpamba na mikolo ya Salomo. 22  Mpamba te mokonzi azalaki na bamasuwa ya Tarasisi+ na mbu esika moko na bamasuwa ya Hirame. Mbala moko na mbula misato nyonso, bamasuwa ya Tarasisi ezalaki koya na wolo+ ná palata, mpɛmbɛ ya nzoku,+ bamakako ná bandɛkɛ lipombo. 23  Bongo Mokonzi Salomo alekaki bakonzi nyonso mosusu ya mabele na bozwi+ mpe na bwanya.+ 24  Mpe bato nyonso ya mabele bazalaki koluka elongi ya Salomo mpo na koyoka bwanya na ye, oyo Nzambe atyaki na motema na ye.+ 25  Mpe bazalaki komema moto na moto likabo+ na ye: biloko ya palata+ ná biloko ya wolo, bilamba, bibundeli,+ mafuta ya balsame, bampunda ná badɔngi;+ bazalaki kosala bongo mbula na mbula.+ 26  Mpe Salomo azalaki se koyanganisa makalo mpe bampunda ya etumba mingi koleka; mpe akómaki na makalo nkóto moko na nkama minei (1 400) mpe bampunda ya etumba nkóto zomi na mibale (12 000),+ mpe atyaki yango na bingumba ya makalo mpe pene na mokonzi na Yerusaleme.+ 27  Mpe na Yerusaleme, mokonzi akómisaki palata mpamba lokola mabanga,+ mpe akómisaki mabaya ya sɛdrɛ mpamba lokola banzete ya sikomore oyo ezali na Shefela,* mpo ezalaki ebele.+ 28  Mpe bazalaki kobimisa bampunda mpo na Salomo longwa na Ezipito, mpe etuluku ya bato ya mombongo ya mokonzi bazalaki kosomba etonga ya bampunda na mbongo.+ 29  Mpe mbala na mbala, likalo moko ezalaki koya, oyo bazalaki kobimisa na Ezipito na ntalo ya shekele ya palata nkama motoba (600), mpe mpunda moko na ntalo ya nkama moko na ntuku mitano (150); mpe ezalaki bongo mpo na bakonzi nyonso ya Bahiti+ mpe bakonzi ya Siri. Bazalaki kobimisa yango na nzela na bango.

Maloba na nse

To, “lobwaku.”