ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MPO NA NINI MAKAMBO MABE EKÓMELAKA BATO MALAMU?
Mpo na nini makambo mabe ekómelaka bato malamu?
Lokola Yehova Nzambe * nde asalá biloko nyonso mpe azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, bato mingi bakoki koluka kopesa ye foti mpo na makambo nyonso oyo ezali koleka na mokili, ata mpe makambo nyonso ya mabe. Kasi, tótala oyo Biblia elobi mpo na Nzambe ya solo:
-
“Yehova azali moyengebene na banzela na ye nyonso.”—Nzembo 145:17.
-
“Banzela [ya Nzambe] nyonso ezali bosembo. Nzambe moko ya bosembo, epai na ye kozanga bosembo ezali te; azali moyengebene mpe sembo.”—Kolimbola Mibeko 32:4.
-
“Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.”—Yakobo 5:11.
Nzambe te nde abimisaka makambo mabe. Kasi, ye nde atindaka bato básala yango? Soki moke te. Biblia elobi “ntango moto azali komekama, aloba te ete: ‘Nzambe azali komeka ngai.’” Mpo na nini? Mpo “Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (Yakobo 1:13) Nzambe amekaka moto te na kotinda ye asala mabe. Ye mpe te nde abimisaka makambo ya mabe to atindaka bato mosusu basala yango. Kasi, ntango makambo mabe ebimaka ezalaka foti ya nani to ya nini?
KOZALA NA ESIKA YA MABE NTANGO LIKAMA ESALEMI
Biblia emonisi ntina mosusu oyo bato banyokwamaka; elobi boye: “Ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka bango nyonso.” (Mosakoli 9:11) Ntango makambo oyo ekanami te to aksida moko esalami, ekoki kobimisela moto mpasi na kotalela esika oyo azali mpe ntango oyo likambo yango esalemi. Eleki sikoyo mbula soki 2 000, Yesu Kristo alobelaki likama oyo ekómelaki bato 18, oyo bakufaki ntango efelo moko ekwelaki bango. (Luka 13:1-5) Bakufaki te mpo na ndenge batambwisaki bomoi na bango; bazalaki nde pembeni ya efelo yango ntango ekweaki. Kala mingi te, koningana ya mabele ya nsɔmɔ mpenza esalemaki na Haïti, na sanza ya 01/2010; guvɛrnema na bango elobaki ete bato koleka 300 000 bakufaki. Bato yango nyonso bakufaki ata soki bazalaki banani. Bamaladi mpe ekoki koboma moto nyonso ata na ntango nini.
Mpo na nini Nzambe abatelaka te bato malamu na makama?
Bamosusu bakoki komituna boye: ‘Nzambe akoki te kopekisa makama ya ndenge wana esalemaka? Akoki te kobatela bato malamu na makama?’ Soki Nzambe asali bongo, ekomonisa ete ayebaka makambo ya mabe liboso esalema. Atako Nzambe azali na likoki ya koyeba avenire, motuna oyo esengeli tótalela ezali oyo: Nzambe aponaka kosalela nguya na ye kozanga ndelo mpo na koyeba makambo ya ndenge wana liboso esalema?—Yisaya 42:9.
Biblia elobi boye: ‘Nzambe azali na likoló; asalaka eloko nyonso oyo asepeli kosala.’ (Nzembo 115:3) Yehova asalaka makambo oyo amoni ete ezali na ntina asala yango; asalaka te eloko nyonso oyo azali na likoki ya kosala. Yango etaleli mpe makambo oyo azali na likoki ya komona yango liboso esalema. Na ndakisa, ntango mabe ekómaki mingi na bingumba ya kala ya Sodoma mpe Gomora, Nzambe ayebisaki Abrahama boye: ‘Nakokita mpo namona soki makambo oyo bazali mpenza kosala ezali ndenge moko na lokito oyo ekómeli ngai, mpe, soki bongo te, nakoyeba yango.’ (Ebandeli 18:20, 21) Na ntango moko boye, Yehova akipaki te koyeba soki mabe ya bingumba wana ekómaki tii wapi. Na yango, Yehova akoki te koluka koyeba liboso likambo nyonso. (Ebandeli 22:12) Yango emonisi te ete azangi kokoka to azali na bolɛmbu. Lokola “mosala na ye ezali ya kokoka,” Nzambe asalelaka likoki na ye ya koyeba makambo oyo ekosalema na kotalela mokano na ye; atindaka bato na makasi te ete bálanda nzela boye to boye. * (Kolimbola Mibeko 32:4) Boye, tokoki koloba nini? Na mokuse, Nzambe asalelaka likoki na ye ya koyeba makambo liboso na makambo nyonso te mpe na ndenge oyo ye moko amoni malamu.
EZALI NDE FOTI YA BATO?
Soki mabe esalemaka, ezali mpe foti ya bato. Talá ndenge Biblia emonisi likambo oyo ememaka moto na kosala mabe. “Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu; lisumu mpe, ntango esalemi, eboti liwa.” (Yakobo 1:14, 15) Ntango moto asali likambo na kolanda mposa na ye ya mabe to atiki mposa wana etambwisa ye, yango ekoki komemela ye mpasi. (Baroma 7:21-23) Ndenge istware emonisaka yango, bato basalá makambo ya mabe mpenza oyo ebimiselá basusu mpasi mingi. Longola yango, bato mabe bakoki kobebisa basusu, na ndenge yango, mabe ekoki kobakisama.—Masese 1:10-16.
Bato basalá makambo ya mabe mpenza oyo ebimiselá basusu mpasi mingi
Nzambe asengeli kosala eloko mpe kopekisa bato básala makambo mabe? Tótala naino ndenge oyo bato bakelamá. Biblia elobi ete Nzambe akelaki bato na elilingi na ye, elingi koloba na lolenge na ye. Boye, bato bazali na likoki ya komonisa bizaleli ya Nzambe. (Ebandeli 1:26) Nzambe apesá bato bonsomi ya kopona mpe bakoki kopona kolinga Nzambe mpe kokangama na ye soki bazali kosala oyo ezali malamu na miso na ye. (Kolimbola Mibeko 30:19, 20) Soki Nzambe atindaka bato na makasi básala likambo boye to boye, yango ekomonisa te ete bonsomi ya kopona oyo apesá bango ezali na ntina te? Yango ekomonisa ete bato bakómi barobo, elingi koloba kosala kaka makambo oyo batindi bango básala! Ezali mpe bongo mpo na Qismat, to likanisi oyo ete makambo nyonso etángamá, yango nde etambwisaka makambo nyonso oyo tosalaka mpe oyo ekómelaka biso. Ezali mpenza esengo ndenge Nzambe apesá biso lokumu na ndenge apesá biso likoki ya kopona! Kasi, yango elingi koloba te ete makambo mabe oyo ebimaka mpo na mabunga ya bato mpe nzela mabe oyo baponá ekokoba konyokola bato libela na libela.
KARMA NDE NTINA YA BAMPASI YA BATO?
Soki otuni moto moko ya lingomba ya Hindu to ya Buda motuna oyo ezali na ezipeli ya zulunalo oyo, akoki kopesa yo eyano oyo: “Makambo mabe ekómelaka bato malamu mpo na mobeko ya Karma. Bazali kobuka mbuma ya misala na bango oyo basalaká na bomoi na bango ya kala liboso bábotama lisusu.” *
Mpo na liteya ya Karma, ezali malamu kotalela oyo Biblia elobi mpo na liwa. Na elanga ya Edene, esika Nzambe atyaká bato ya liboso, alobaki na Adama, mobali ya liboso ete: “Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.” (Ebandeli 2:16, 17) Soki Adama asalaka lisumu te na ndenge aboyaki kotosa Nzambe, alingaki kozala na bomoi libela na libela. Liwa eyá mpo na kozanga kotosa mobeko ya Nzambe. Na yango, ntango babotaki bana, “liwa epalangani epai ya bato nyonso.” (Baroma 5:12) Boye, tokoki koloba ete “lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” (Baroma 6:23) Biblia elobi mpe ete: “Moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.” (Baroma 6:7) Na maloba mosusu, bato bakobaka te kofuta nyongo ya masumu na bango nsima ya liwa.
Bamilio ya bato lelo balobaka ete bato banyokwamaka mpo na mobeko ya Karma. Moto oyo andimaka liteya yango andimaka bampasi na ye mpe ya bato mosusu kozanga amitungisa mpo na yango. Kasi liteya yango emonisaka te ete mokolo mosusu makambo mabe ekosalema lisusu te. Bandimaka ete elikya kaka moko mpo na kosikolama na likambo yango ezali ya kolongwa na likambo ya kobotama mbala na mbala soki okómi na bizaleli ya malamu mpe okómi na boyebi moko boye. Makanisi wana ekeseni mpenza na oyo Biblia elobaka. *
NTINA YA LIBOSOLIBOSO!
Kasi, soki mabe ezali, ezali libosoliboso te foti ya bato. Satana Zabolo, oyo na ebandeli azalaki anzelu ya sembo ya Nzambe, “akangamaki makasi te na solo,” mpe akɔtisaki lisumu na mokili. (Yoane 8:44) Abandisaki botomboki na elanga ya Edene. (Ebandeli 3:1-5) Yesu Kristo abengaki ye “moto mabe” mpe “mokonzi ya mokili.” (Matai 6:13; Yoane 14:30) Bato mingi balandaka Satana na ndenge balandaka makanisi na ye ya koboya kolanda banzela ya Yehova. (1 Yoane 2:15, 16) 1 Yoane 5:19 elobi ete “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” Ezali mpe na bikelamu mosusu ya elimo oyo bakómaki mabe mpe balandaki Satana. Biblia emonisi ete Satana mpe bademo na ye bazali “kokosa mabele mobimba esika bato bafandi,” bazali kobimisa “mawa na mabele.” (Emoniseli 12:9, 12) Na yango, soki mabe ezali na mokili, ezali libosoliboso foti ya Satana Zabolo.
Ezali polele ete soki makambo mabe ekómelaka bato, ezali foti ya Nzambe te; mpe ye te nde asalaka ete bato bányokwama. Kutu, alaki ete akosilisa mabe, ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango.
^ par. 3 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.
^ par. 11 Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atiki mabe ekoba, talá mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
^ par. 16 Mpo na koyeba esika mobeko ya Karma eutá, talá nkasa 8 tii 12 ya mwa buku Nini ekómelaka biso soki tokufi? ebimisa mi na Batatoli ya Yehova.
^ par. 18 Mpo na koyeba oyo Biblia eteyaka mpo na ndenge oyo bato bakómaka soki bakufi mpe elikya mpo na baoyo bakufá, talá mokapo 6 mpe 7 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?