Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE OYO NZAMBE ATALELAKA KOMƐLA MAKAYA

Epalangani mokili mobimba

Epalangani mokili mobimba

Makaya ezali kokoba koboma bato.

  • Ebomaki bato 100 000 000 na siɛklɛ oyo euti koleka.

  • Mbula na mbula ebomaka bato soki 6 000 000.

  • Nsima ya segɔnde motoba nyonso, moto moko akufaka mpo na yango.

Ezali ata na likambo moko te oyo emonisi ete makaya ekotika koboma bato.

Bakonzi balobi ete soki likambo yango esili te, tii tókóma na 2030, motángo ya bato oyo bakobanda kokufa mpo na makaya mbula nyonso ekokóma koleka 8 000 000. Mpe balobi ete tii tókóma na nsuka ya siɛklɛ ya 21, makaya ekoboma bato 1 000 000 000.

Makaya esukaka kaka te na koboma bato oyo bamɛlaka yango. Bato ya mabota na bango oyo batikali banyokwamaka na makanisi mpe bazangaka mbongo; mpe mbula nyonso ebomaka bato 600 000 oyo bapemaka milinga oyo bamɛli-makaya babimisaka. Moto nyonso amemaka mokumba ya bamɛli-makaya mpo mbongo oyo batyaka pembeni mpo na sante ebakisamaka.

Na kokesana na bamaladi oyo epalanganaka, oyo etindaka minganga báluka nokinoki nkisi na yango, solisyo ezali mpo na makaya; mpe solisyo yango eyebani malamu. Margaret Chan, doktɛrɛ moko oyo akambaka ebongiseli ya ONU oyo etalaka bokolongono ya nzoto, alobi boye: “Solisyo ezali na mabɔkɔ ya baguvɛrnema mpe bato bango moko.”

Bato na mokili mobimba bandimaki kopesa mabɔkɔ mpo na kosilisa likambo ya komɛla makaya na ndenge oyo esalemá naino liboso te. Na sanza ya mwambe 2012, bikólo soki 175 endimaki kozwa bibongiseli mpo bato mingi bátika komɛla makaya. * Atako bongo, bapiblisite mpe ndenge oyo makaya ekómisaka moto moombo ezali kosala ete bamɛli-makaya bakóma lisusu mingi. Mbula nyonso, baizine oyo esalaka makaya ebimisaka bamiliare ya badolare na bapiblisite mpo na kobenda bamɛli ya sika, mingimingi basi mpe bilenge oyo bafandaka na bikólo ya bozwi. Ndenge oyo makaya ekómisaka bato baombo emonisi ete bato miliare moko oyo bakómá baombo na yango bakokoba kaka kokufa. Soki bamɛli-makaya batiki te, nsima ya mbula 40, motángo ya bato oyo bakokufa mpo na makaya ekobakisama mpenza.

Bapiblisite mpe boombo oyo makaya ekɔtisaka bato esalaka ete ezala mpasi mpo na baoyo balingi kotika yango bálonga. Naoko mpe akutanaki na likambo yango. Abandaki komɛla makaya ntango azalaki naino elenge. Lokola azalaki kolanda ndenge bapanzi-nsango bazalaki kolobela ezaleli ya komɛla makaya, esalaki ete akóma komona ete moto aleki ye azali te. Atako amonaki ndenge baboti na ye bakufaki na kansɛr ya pumɔ, akobaki kaka komɛla makaya, ata ntango azalaki kobɔkɔla bana na ye mibale ya basi. Alobi boye: “Nazalaki kobanga ete nakozwa kansɛr ya pumɔ mpe nazalaki komitungisa mpo na sante ya bana na ngai, kasi nazalaki kaka kokoka te kotika makaya. Nakanisaki ete nakokoka kotika yango ata moke te.”

Ata bongo, Naoko atikaki. Buku oyo esalisaki bamilio ya bato bátika komɛla makaya nde esalisaki mpe ye atika komɛla. Buku yango ezali nini? Tosɛngi yo otánga yango.

^ par. 11 Bazwaki mpe bibongiseli ya koteya bato makama oyo makaya ebimisaka, kopekisa bapiblisite oyo baizine ya makaya esalaka, komatisa ntalo ya mpako, mpe koluka ndenge ya kosalisa bato mpo bátika komɛla makaya.