Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | TOZALI NA MPOSA YA NZAMBE?

Mpo na nini tozali na mposa ya Nzambe?

Mpo na nini tozali na mposa ya Nzambe?

Minganga oyo basalisaka maladi ya motó balobi ete mpo moto azala na esengo ya solosolo asengeli kosuka kaka te na kokokisa makambo oyo nzoto esɛngaka. Likambo yango emonanaka na mposa oyo bato bazalaka na yango ya kosala eloko moko oyo ezali na ntina to ya kosalela moto moko oyo aleki bango to kosala mpo na likambo oyo ezali na litomba moko monene. Mpo na kokokisa mposa yango, bamosusu balekisaka ntango na bango ya kozwa mwa mopɛpɛ na makambo lokola miziki, ntɔki, kotala bazamba to bibale, mpe bongo na bongo. Ata bongo, mingi bazwaka mpenza esengo ya solosolo te na makambo yango.

Nzambe alingi bato bázala na esengo lelo mpe mpo na libela

Baoyo batángaka Biblia bayebi ete moto abotamaka na mposa ya koluka koyeba Nzambe. Mokapo ya liboso ya mokanda ya Ebandeli emonisi ete ntango Nzambe akelaki mobali mpe mwasi ya liboso, azalaki kosolola na bango mbala na mbala mpo bázala na boyokani malamu na ye. (Ebandeli 3:8-10) Nzambe asalaki te moto mpo amitambwisaka ye moko; esengelaki básololaka na Mozalisi na bango. Biblia elobeli mposa yango mbala mingi.

Na ndakisa, Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Maloba yango emonisi ete mpo moto azala na esengo ya solosolo, esengeli akokisa mposa oyo tobotamaka na yango ya koyeba Nzambe. Ndenge nini tokoki kosala yango? Yesu amonisaki yango ntango alobaki boye: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Matai 4:4) Na ndenge nini maloba ya Nzambe, elingi koloba makanisi na ye mpe mateya na ye oyo ezali na Biblia ekoki kosala ete bomoi na biso ezala na ntina mpe na esengo? Tótalela naino makambo misato ya ntina.

Tozali na mposa ya batoli ya malamu

Lelo oyo, ezali na bato mingi ya mayele oyo bapesaka batoli na makambo etali koyokana na basusu, bolingo, bomoi ya libota, ndenge ya kosilisa matata, kozala na esengo, ata mpe ndenge ya kozala na bomoi oyo ezali mpenza na ntina. Ata bongo, kaka Yehova Nzambe nde abongi mpenza kopesa  bato batoli oyo ebongi na makambo wana nyonso mpo azali Mozalisi.

Lokola mokanda oyo ezali na malako mpo na kosalela aparɛyi, Biblia ekoki kotambwisa bomoi na biso

Tózwa ndakisa: Ntango osombi eloko moko ya sika, lokola aparɛyi ya fɔtɔ to ordinatɛrɛ, okozala na mposa ete moto oyo asalaki yango atya mwa mokanda oyo emonisi ndenge malamu ya kosalela yango. Tokoki kokokanisa Biblia na mwa mokanda yango. Ezali lokola mwa mokanda oyo Nzambe, Mozalisi ya bomoi apesi biso mpo tóyeba ndenge ya kotambwisa bomoi yango. Biblia emonisi ntina oyo Nzambe akelá bomoi mpe ndenge oyo tosengeli kotambwisa bomoi yango mpo ezala malamu.

Ndenge moko na mikanda mosusu nyonso oyo ezalaka na malako, Biblia ekebisaka batángi na yango na makambo oyo ekoki kobebisa bomoi. Batoli oyo bato mosusu bakoki kopesa ekoki komonana malamu, ata mpe mpasi te mpo na kosalela yango, kasi omoni te ete ebongi mpenza tólanda malako ya Mozalisi na biso mpo tózwa matomba ya malamu mpe tókima mikakatano mosusu na bomoi?

“Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola. Ee soki otyaka mpenza likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mbu.”​—Yisaya 48:17, 18

Tokoki kokuta batoli mpe lisungi oyo tosengeli na yango na Biblia

Atako Yehova Nzambe apesi mibeko mpe malako, atindaka biso na makasi te ete tósalela yango. Kutu, lokola alingaka biso mpe asepelaka kosalisa biso, na esengo nyonso ayebisi biso boye: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola. Ee soki otyaka mpenza likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mbu.” (Yisaya 48:17, 18) Na mokuse, soki tolandi batoli ya Nzambe, tokozala na bomoi ya malamu. Na maloba mosusu, mpo tózala na bomoi ya malamu mpe ya esengo, tozali na mposa ya Nzambe.

Tozali na mposa ya biyano na mituna oyo etungisaka biso

Bamosusu bamonaka ntina ya Nzambe te mpo makambo mingi oyo bamonaka eyokani te na liteya oyo elobaka ete Nzambe azali bolingo. Na ndakisa, bakoki komituna boye: ‘Mpo na nini bato ya malamu banyokwamaka?’ ‘Mpo na nini bana mosusu babotamaka bibɔsɔnɔ?’ ‘Mpo na nini bomoi ya bato mosusu ezali malamu mpe ya bamosusu ezali mabe?’ Mituna oyo ezali mpenza na ntina mpe kozwa biyano oyo ebongi ekoki mpenza kobongola bomoi na biso. Kasi na esika ya kowela kopesa Nzambe foti mpo na makambo ya ndenge wana, tótala naino ndenge Biblia, Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso na likambo yango.

Mokapo ya misato ya mokanda ya Ebandeli elobeli lisolo ya Satana, oyo asalelaki nyoka mpo na kotinda mwasi ná mobali ya liboso bábuka mobeko ya Nzambe oyo epekisaki bango kolya mbuma ya koyeba malamu ná mabe. Satana ayebisaki Eva boye: “Bokokufa soki moke te. Mpo Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.”​—Ebandeli 2:16, 17; 3:4, 5.

Na maloba yango, Satana amonisaki kaka te ete Nzambe azali mobuki lokuta kasi mpe ete ayangelaka na bosembo te. Zabolo amonisaki ete soki bato bayokeli ye, makambo na bango ekotambola malamu mpenza. Ndenge nini Yehova asengelaki kokata makambo yango? Amonaki malamu atika ntango mpo bikelamu na ye nyonso bámona soki bifundeli yango ezali solo to lokuta. Nzambe apesaki Satana mpe baoyo balandaki ye libaku ya  komonisa soki bato bakoki kozala malamu kozanga Nzambe.

Yo okopesa eyano nini na bifundeli ya Satana? Bato bakoki kozala malamu mpe kolonga komitambwisa kozanga Nzambe? Bampasi, kozanga bosembo, maladi, liwa ata mpe mobulu, kobeba ya bizaleli, bitumba, koboma bato ya ekólo moko mpo na kosilisa bango, mpe makambo mosusu ya mabe oyo enyokoli bato na boumeli ya bambula mingi, emonisi mpenza ete bato bakoki komitambwisa bango moko te kozanga Nzambe. Na esika Biblia epesa Nzambe foti mpo na bampasi ya bato, emonisi mpenza ntina ya bampasi yango; elobi boye: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.”​—Mosakoli 8:9.

Na kotalela makambo wana nyonso, tomoni te ete tosengeli koluka Nzambe mpo tózwa biyano na mituna oyo etungisaka bato, kasi mpe mpo na koyeba ndenge minyoko ekosila? Nzambe akosala nini?

Tozali na mposa ya lisalisi ya Nzambe

Banda kala bato balukaki kosilisa maladi, bobange, mpe liwa. Balekisaki ntango mingi, basilisaki makasi mpe bozwi na bango na koluka kosilisa makambo yango kasi balongaki te. Bamosusu bakanisaki ete bakonuna te soki bamɛli bankisi ndenge na ndenge mpe mai moko boye, to soki bakei kofanda na esika moko boye. Bilikya wana nyonso ezalaki ndɔtɔ mpamba.

Nzambe alingaka ete bato bázala malamu mpe na esengo. Yango nde mokano na ye ya ebandeli ntango akelaki bato, mpe abosani yango te. (Ebandeli 1:27, 28; Yisaya 45:18) Tondimi mpenza ete makambo nyonso oyo Yehova Nzambe alaki ekosalema mpenza. (Yisaya 55:10, 11) Biblia elobi ete Nzambe akozongisa paradiso oyo mwasi ná mobali ya liboso babungisaki. Mokanda ya nsuka ya Biblia ezali na maloba oyo: “[Yehova Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.” (Emoniseli 21:4) Ndenge nini Nzambe akokokisa makambo wana nyonso ya kitoko, mpe ndenge nini tokoki kozwa bolamu yango?

Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe, ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete mokano ya Nzambe esalema. Bato mingi bayebi libondeli yango to mpe bazongelaka yango mbala na mbala, bamosusu babengaka yango libondeli ya Tata wa biso. Elobaka boye: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Ya solo, Bokonzi ya Nzambe nde ekosala ete Yehova Nzambe alongola makambo nyonso ya mabe oyo boyangeli ya bato ebimisá mpe ekotya mokili ya sika ya bosembo oyo ye alakaki. * (Danyele 2:44; 2 Petro 3:13) Tosengeli kosala nini mpo tózwa matomba na elaka wana ya Nzambe?

 Yesu Kristo amonisaki likambo oyo tosengeli kosala: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoane 17:3) Ɛɛ, na lisalisi ya Nzambe, moto nyonso akoki kozwa bomoi oyo ezangi nsuka na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. Ezali na ntina mosusu oyo elikya yango esengeli kotinda yo opesa eyano ɛɛ na motuna oyo: Tozali na mposa ya Nzambe?

Ntango ya koluka Nzambe

Eleki sikoyo mbula 2 000, na Areopaje to Ngomba ya Marsi, ntoma Paulo ayebisaki bato ya Atene maloba oyo na ntina na Nzambe: “Mpo ye moko moto apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso. Mpamba te na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali, ndenge bamosusu kati na bapowɛti na bino balobá: ‘Mpo tozali mpe libota na ye.’”​—Misala 17:25, 28.

Makambo Paulo ayebisaki bato ya Atene ezali kaka solo tii lelo. Mozalisi na biso apesaka biso mopɛpɛ oyo topemaka, biloko oyo tolyaka mpe mai oyo tomɛlaka. Tokoki kozala na bomoi te soki biloko kitoko oyo Yehova apesaka mpo na kobatela bomoi na biso ezali te. Kasi mpo na nini Nzambe akobaka kopesa bato nyonso biloko yango ata soki bakipaka ye to te? Paulo alobaki ete ezali “mpo báluka Nzambe, soki esengeli báluka ye na komekameka epai na epai mpe bázwa ye mpenza, atako, ya solo, azali mosika te na mokomoko na biso.”​—Misala 17:27.

Okolinga koyeba Nzambe malamumalamu, elingi koloba koyekola makambo mingi oyo etali mokano na ye mpe batoli na ye mpo na kozala na bomoi ya malamu lelo mpe mpo na libela? Soki ɛɛ, tosɛngi yo osolola na moto oyo apesi yo zulunalo oyo to komelá babimisi na yango. Bakosepela kosalisa yo.

^ par. 20 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali ndenge Bokonzi ya Nzambe ekosala ete mokano ya Nzambe esalema na mabele, talá mokapo 8 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova mpe okoki kozwa yango na Internet na www.jw.org.