Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini bampasi mingi boye?

Mpo na nini bampasi mingi boye?

Mpo na koyeba ntina oyo bampasi ezali mingi boye mpe ntina oyo milende oyo bato basalaka mpo na kosilisa yango esimbaka te, tosengeli naino koyeba makambo oyo ebimisaka yango. Atako makambo yango ezali mingi mpe ezalaka mpasi mpo na kolimbola yango, tokoki kozala na botɔndi mpo Biblia ekoki kosalisa biso tóyeba yango. Na lisolo oyo, tokotalela makambo mitano oyo esalaka ete bampasi ezala mingi. Tosɛngi yo otalela malamumalamu oyo Biblia elobaka mpe omona ndenge oyo Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa yo oyeba mpenza eloko oyo esalaka ete bampasi ezala mingi.​—2 Timote 3:16.

BOYANGELI YA MABE

Biblia elobi ete “ntango moto mabe azali koyangela, bato bamilelaka.”​—Masese 29:2.

Masolo mingi ya kala emonisi ete bakonzi mabe babimiselá bato bampasi ya koloba te. Toboyi te, bakonzi nyonso bazalaka bongo te. Basusu bakoki kozala na makanisi malamu mpo na bazalani na bango. Kasi, soki bazwi bokonzi, mbala mingi bamonaka ete milende na bango ekendaka na mai mpo na botɛmɛli ya banguna mpe ezaleli ya kowela bokonzi. To bakoki kosalela bokonzi na bango na ndenge ya mabe mpe konyokola basusu mpo na koluka matomba na bango moko. Henry Kissinger, secrétaire d’État ya kala ya États-Unis alobaki boye: “Masolo ya kala etondi na makambo oyo emonisi milende oyo bato basalaki kasi elongaki te, bamposa oyo bazalaki na yango, kasi ekokisamaki te.”

Biblia elobi lisusu ete: “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Yirimia 10:23) Bato ya kozanga kokoka bazalaka te na bwanya oyo esengeli mpe bamonaka mosika te mpo na kosala ete makambo na bango elonga. Soki bato bazali na likoki te ya komitambwisa, ndenge nini bakoki kotambwisa ekólo mobimba? Omoni ntina oyo bakonzi ya mokili bakoki te kosilisa bampasi? Kutu mbala mingi, baguvɛrnema ya mabe nde ebimiselaka bato bampasi!

MANGOMBA YA LOKUTA

Yesu alobaki ete: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:35.

Bakonzi ya mangomba ya lolenge nyonso bateyaka bolingo mpe bomoko. Likambo ya solo ezali ete balongaka te kosalisa bandimi na bango bázala na bolingo makasi mpo bálongola ezaleli ya kokanisela basusu mabe. Na esika básalisa bango bálingaka basusu, mbala mingi mangomba etindaka bango nde na bokabwani, kopona bilongi, mpe matata kati na bato mpe bikólo. Na maloba ya nsuka ya buku na ye (Christianity and the World Religions), Hans Küng moto moko ya teoloji akomaki boye: “Mangomba nde elendisá, endimá mpe ebimisá bitumba ya politiki oyo eleki mabe.”

Longola yango, bakonzi ya mangomba mingi bakangaka mpenza miso na makambo lokola pite,  ekobo mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. Yango esalaka ete maladi mabe epalangana, basi básopa bazemi, to bázwa bazemi oyo ekanami te, mabala mpe mabota epanzana, mpe yango ebimisaka bampasi mpe mawa ya koloba te.

EZALELI YA KOZANGA KOKOKA MPE YA KOLUKA MATOMBA NA BISO MOKO

“Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu.”​—Yakobo 1:14, 15.

Biso nyonso tosalaka mabunga mpo tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosengeli kobundisa bamposa ya ‘kosala makambo oyo nzoto . . . elingaka.’ (Baefese 2:3) Kasi, ezalaka mpasi koboya kokokisa mposa mabe mingimingi soki okutani na libaku ya kokokisa yango. Soki topesi nzela na bamposa mabe, makambo oyo yango ekobimisa na nsima ekoki kozala mabe mpenza.

Mokomi moko na nkombo Phiroz Mehta, akomaki boye: “Bamposa na biso moko, koluka bisengo koleka ndelo, komisepelisa, lokoso mpe koluka lokumu nde esalaka ete bampasi ezala mingi boye.” Kozala na mposa makasi to kokóma moombo ya biloko lokola masanga, drɔgɛ, masano ya mbongo, kosangisa nzoto, mpe bongo na bongo, ebebisá bomoi ya bato mingi “ya lokumu” mpe ememelá mabota, baninga na bango mpe bato mosusu mpasi. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tosengeli kondima likanisi oyo ya Biblia: “Mpo toyebi ete biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kokimela elongo mpe konyokwama elongo tii sikoyo.”​—Baroma 8:22.

NGUYA YA BILIMO MABE

Biblia emonisi ete Satana azali “nzambe ya makambo ya ntango oyo” mpe bilimo mabe oyo bazali na nguya mingi, oyo babengami bademo bapesaka ye mabɔkɔ.​—2 Bakorinti 4:4; Emoniseli 12:9.

Ndenge moko na Satana, bademo bamipesá mpenza na kokonza mpe kokosa bato. Ntoma Paulo andimaki likambo yango ntango alobaki boye: “Tozali kobunda etumba ná makila mpe mosuni te, kasi ná baguvɛrnema, ná bakonzi, ná bayangeli ya mokili ya molili oyo, ná mampinga ya bilimo mabe na bisika ya likoló.”​—Baefese 6:12.

Atako bilimo mabe basepelaka konyokola bato, kasi yango ezalaka mokano na bango ya libosoliboso te. Mposa na bango ezalaka nde ete bato bápesa Yehova, Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, mokɔngɔ. (Nzembo 83:18) Makambo lokola astroloji, maji, bonganga-nkisi, mpe kotala mabɔkɔ mpo na kosakola makambo oyo ebombamá, ezali kaka mwa mayele oyo bademo basalelaka mpo na kokosa mpe kokonza bato. Yango nde ntina oyo Yehova akebisaka biso na makama yango mpe abatelaka baoyo nyonso batɛmɛlaka Satana mpe bademo.​—Yakobo 4:7.

TOZALI NA “MIKOLO YA NSUKA”

Eleki sikoyo mbula soki 2 000, Biblia elobaki boye: “Yebá likambo oyo: mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.”

Mpo na komonisa makambo oyo ekosala ete ntango yango ezala mpasi, ebakisi boye: “Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, . . . oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.” Ya solo, soki tozali komona bampasi oyo nyonso ezali mpo tozali na “mikolo ya nsuka.”​—2 Timote 3:1-4.

Na kolanda makambo oyo totaleli, omoni polele ntina oyo bato bakokoka te kosukisa bampasi ata soki bazali na makanisi ya malamu? Kasi, epai wapi tokoki kozwa lisalisi? Tosengeli kotalela Mozalisi na biso, oyo alaki “kobukabuka misala ya Zabolo” mpe ya baoyo bapesaka ye mabɔkɔ. (1 Yoane 3:8) Lisolo oyo elandi ekomonisa oyo Nzambe akosala mpo na kolongola makambo nyonso oyo ebimisaka bampasi.