Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi . . .

Nzambe afandaka esika moko kaka?

Nzambe afandaka esika moko kaka?

Mangomba ndenge na ndenge eteyaka ete Nzambe azalaka bisika nyonso. Na ndakisa, buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete Nzambe “azali mpenza na bisika mpe na biloko nyonso.” Ndenge moko mpe, John Wesley, moto oyo abandisá Lingomba ya Metodiste, akomaki lisolo moko oyo motó ya likambo na yango ezalaki: “Nzambe azalaka na bisika nyonso,” kati na yango alobaki ete “ezali ata na esika moko te epai Nzambe azali te.”

Biblia eteyaka nini? Nzambe azalaka mbala moko na bisika nyonso: na likoló, na mabele, ata mpe na kati ya bato?

Biblia elobi ete Nzambe azali mpenza na esika oyo afandaka: na likoló. Elobeli libondeli ya Mokonzi Salomo oyo ayebisaki Nzambe ete: “Yo yoká kuna na likoló, esika na yo ya kofanda ya libela.” (1 Bakonzi 8:43) Ntango Yesu Kristo ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela, ayebisaki bango balobaka ete “Tata na biso na likoló.” (Matai 6:9) Biblia elobi ete nsima ya kosekwa, Kristo akɔtaki “na likoló mpenza, mpo amonana sikoyo liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso.”​—Baebre 9:24.

Bavɛrsɛ yango emonisi polele ete Yehova Nzambe afandaka kaka na likoló, kasi te bisika nyonso. Ya solo, “likoló” oyo elobelami na bavɛrsɛ oyo ezali te etando oyo ekaboli mabele na mapata to oyo ezali likoló ya mapata. Likoló oyo tomonaka ekoki te kokoka Mozalisi na biso oyo akelá molɔ́ngɔ́. (1 Bakonzi 8:27) Biblia eyebisi biso ete “Nzambe azali Elimo.” (Yoane 4:24) Afandaka na likoló oyo bato bakoki komona yango na miso te.​—1 Bakorinti 15:44.

Kasi ezali boni mpo na mikapo ya Biblia oyo ekoki kopesa likanisi ete Nzambe azalaka bisika nyonso? Na ndakisa, ndenge Nzembo 139:7-10 emonisi yango, Davidi alobi boye mpo na Nzambe: “Epai wapi nakoki kokende mpo nakima elimo na yo, mpe epai wapi nakoki kokima elongi na yo? Soki namati na likoló, ozali kuna; mpe soki natandi mbeto na ngai na Nkunda, talá! ozali kuna. Soki nazwi mapapu ya kotana ya ntɔngɔ, mpo nafanda na mbu ya mosika koleka, kuna mpe, lobɔkɔ na yo ekokamba ngai.” Bavɛrsɛ yango emonisi ete Nzambe azalaka to afandaka na bisika wana nyonso?

Simbá ete Davidi atunaki liboso boye: “Epai wapi nakoki kokende mpo nakima elimo na yo?” * Na nzela ya elimo na ye, Nzambe akoki komona eloko nyonso mpe kosalela nguya na ye bisika nyonso, kozanga ete akende mpenza to afanda kuna. Tózwa ndakisa: Na bambula oyo euti koleka, bato ya siansi bazwaki likoki ya kotala mabele oyo ezalaka na planɛti babengi Mars, oyo ezali na bamilio ya bakilomɛtrɛ longwá awa na mabele. Ndenge nini? Basalaki mobembo kuna te, kasi bayekolaki bafɔtɔ oyo emonisi makambo ya planɛti yango, oyo bazwaki na nzela ya fize, oyo batindaki kuna.

Ndenge moko mpe, ezali na ntina te ete Yehova Nzambe azala bisika nyonso mpo amona makambo oyo ezali koleka ata na esika nini na molɔ́ngɔ́. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso na ye.” (Baebre 4:13) Ya solo, elimo santu to nguya oyo Yehova asalaka na yango mosala ekoki kokóma bipai nyonso, kosala ete amona makambo nyonso mpe akokisa mokano na ye uta na esika oyo afandaka, ‘efandelo na ye mosantu,’ na likoló.​—Kolimbola Mibeko 26:15.

^ par. 8 Liloba ya Ebre oyo ebongolami awa na “elimo” elakisi nde nguya ya Nzambe oyo asalaka na yango mosala; nguya oyo asalelaka mpo na kokokisa mokano na ye.