Lakisá makambo oyo ezali na kati

Teyá bana na yo

Mwana ya ndeko ya Paulo abikisaki nɔkɔ na ye

Mwana ya ndeko ya Paulo abikisaki nɔkɔ na ye

OYEBI ete ntoma Paulo azalaki na bandeko oyo bazalaki mpe bayekoli ya Yesu? *— Emonani ete ndeko na ye ya mwasi ná mwana na ye ya mobali bazalaki bayekoli ya Yesu. Mpe mwana yango abikisaki bomoi ya Paulo! Biblia epesi biso nkombo na bango te, ezala ya mwana yango to ya mama na ye, kasi toyebi likambo oyo mwana yango asalaki. Okolinga koyeba yango?—

Nsima ya kosilisa mobembo na ye ya misato ya misionɛrɛ, Paulo azongaki na Yelusaleme. Emonani ete ezalaki na mobu 56 T.B. Bakangaki Paulo mpe esengelaki akende kosamba. Kasi, banguna ya Paulo balingaki te asamba. Bazalaki na mposa akufa! Na yango, babongisaki mibali soki 40 bákende kozela na nzela mpe báboma Paulo.

Toyebi te ndenge nini mwana ya ndeko ya Paulo ayebaki likambo yango. Oyebi likambo oyo asalaki?— Akendaki epai ya Paulo mpe ayebisaki ye likambo yango. Na ntango yango, Paulo ayebisaki soda moko boye: “Memá mwana mobali oyo epai ya komanda ya basoda, mpo azali na mwa likambo ya koyebisa ye.” Soda yango amemaki ye epai ya komanda, Klode Lisiasi, mpe ayebisaki ye ete mwana yango azali na likambo moko ya ntina ya koyebisa ye. Klode abendaki mwana yango na pembeni, mpe elenge yango ayebisaki ye makambo nyonso.

Klode alobaki na mwana ya ndeko ya Paulo boye: “Kobɛtela moto lisolo te ete oyebisi ngai makambo oyo.” Na nsima, abengaki bakonzi mibale ya basoda mpe ayebisaki bango bázwa basoda 200, batambwisi-mpunda 70, mpe basoda ya makɔnga 200, bátambola tii na Kaisalia. Na butu, na ngonga ya libwa mibali yango 470 bakendaki elongo na Paulo tii epai ya Guvɛrnɛrɛ Felikisi, na Kaisalia. Na mokanda oyo Klode akomelaki Felikisi, ayebisaki ye ndenge bato bazalaki kokana koboma Paulo.

Na yango, Bayuda basengelaki kokende kokutana na Paulo kuna na Kaisalia mpo na kofunda ye. Kasi, bazalaki ata na elembeteli moko te mpo na komonisa ete Paulo asalaki mabe. Atako bongo, Paulo akangamaki kaka mpamba na bolɔkɔ na boumeli ya mbula mibale. Yango wana, asɛngaki akende kosamba na Loma, mpe batindaki ye kuna.​—Misala 23:16–24:27; 25:8-12.

Liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango ya mwana ya ndeko ya Paulo?— Esɛngaka kozala na mpiko mpo na koloba oyo ezali sembo, mpe soki tosali yango, tokoki kobikisa bomoi ya bato. Ata ntango Yesu ayebaki ete banguna bazali “koluka koboma ye,” akobaki koyebisa bato nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Yesu asɛngaki biso tósalaka mpe bongo. Tokosala yango? Tokosala yango soki tozali na mpiko lokola mwana ya ndeko ya Paulo.​—Yoane 7:1; 15:13; Matai 24:14; 28:18-20.

Paulo alendisaki Timote boye: “Kebá ntango nyonso mpo na yo moko mpe mpo na mateya na yo. Kangamá na makambo yango, mpamba te na kosaláká bongo okobikisa ná yo moko ná baoyo bazali koyoka yo.” (1 Timote 4:16) Na ntembe te, mwana ya ndeko ya Paulo asalelaki toli yango na likambo ya nɔkɔ na ye. Okolanda ndakisa na ye?

^ par. 3 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.