Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Obongwaná?

Obongwaná?

“Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika.”​—ROM. 12:2.

1, 2. Ndenge oyo tobɔkwamá mpe esika oyo tofandi esalaka nini na bomoi na biso?

BISO nyonso tosalaka makambo mosusu na kolanda ndenge oyo tobɔkwamá mpe esika oyo tofandi, elingi koloba na kolanda baninga, mimeseno ya bonkɔkɔ, mpe bongo na bongo. Yango emonanaka na ndenge na biso ya kolata, biloko oyo tolyaka, mpe bizaleli na biso.

2 Nzokande, ezali na makambo oyo ezali na ntina mingi koleka lolenge na biso ya kolata to kopona biloko ya kolya. Na ndakisa, ntango tozali kokola, balakisaka biso makambo ya malamu, oyo tosengeli kondima, mpe makambo ya mabe, oyo tosengeli koboya. Kasi, moto na moto atalelaka mabe to malamu na ndenge na ye. Kutu, tokoki kosala makambo mosusu na kolanda lisosoli na biso. Biblia elobi ete mbala mingi ‘bato ya bikólo oyo bazali na mibeko te basalaka makambo ya mibeko kaka mpo bazali bato.’ (Rom. 2:14) Kasi, yango elingi nde koloba ete na makambo oyo mibeko ya Nzambe ezali polele te tokoki kaka kolanda mimeseno mpe makanisi oyo babɔkɔlá biso na yango to kosala makambo oyo bato nyonso basalaka na esika oyo tofandi?

3. Mpo na bantina nini mibale bakristo balandaka kaka mbala moko te makanisi oyo endimami na bato mingi?

3 Ezali na bantina mibale ya minene oyo mpo na yango bakristo basalaka bongo te. Ya liboso, Biblia ekundweli biso ete: “Nzela mosusu emonanaka na miso ya moto ete ebongi, kasi na nsima, nsuka na yango nde banzela ya liwa.” (Mas. 16:25) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozali te na likoki ya komitambwisa biso moko. (Mas. 28:26; Yir. 10:23) Ya mibale, Biblia emonisi ete mimeseno mpe makanisi ya mokili oyo eutaka nde epai ya Satana, “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” (2 Ko. 4:4; 1 Yoa. 5:19) Yango wana, mpo Yehova apambola biso mpe andima biso, tosengeli kotosa toli oyo ezali na Baroma 12:2.​Tángá.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Baroma 12:2 elobeli makambo mingi ya ntina oyo esengeli kobenda likebi na biso. (1) Mpo na nini  tosengeli ‘kobongwana’? (2) Kobongwana elimboli nini? mpe (3) Ndenge nini tokoki kobongwana? Tótalela mituna yango.

MPO NA NINI TOSENGELI KOBONGWANA?

5. Maloba ya Paulo oyo ezali na Baroma 12:2 etalaki mpenza banani?

5 Makambo oyo ntoma Paulo akomaki na mokanda na ye epai ya Baroma, ezalaki te mpo na bapakano to bato nyonso ya engumba, kasi ezalaki nde mpo na bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo lokola ye. (Rom. 1:7) Alendisaki bango ete: “Bóbongwana” mpe “bótika kolanda makambo ya ntango oyo.” Na ntango wana, na mobu soki 56 T.B., “makambo ya ntango oyo,” oyo Paulo ayebisaki bakristo ya Roma bátika kolanda ezalaki makanisi, bonkɔkɔ, bizaleli mpe molato ya Baroma. Liloba “bótika” oyo Paulo asalelaki emonisi ete bakristo mosusu bazalaki naino kolanda makambo ya ntango wana. Makambo yango ezalaki kosala bango nini?

6, 7. Na mikolo ya Paulo, ndenge nini bomoi ya bato mpe makambo ya losambo na Roma ezalaki mokakatano mpo na bakristo?

6 Lelo oyo, bapaya oyo bakendaka kotala engumba Roma bamonaka mingimingi batempelo ya kala, malita, bisika ya masano, bamonima, mpe biloko mosusu ndenge na ndenge. Biloko yango mosusu etongamaki banda na siɛklɛ ya liboso. Biloko wana ya kala ezali kosalisa biso tóyeba mwa moke ndenge bomoi ya bato mpe makambo ya losambo ezalaki na Roma na ntango ya kala. Ezali mpe na babuku oyo elobeli masano ya bitumba, mimekano ya kopota mbangu, miziki ndenge na ndenge, oyo mosusu ezalaki kolobela makambo ya nsɔni. Roma ezalaki mpe esika malamu ya kosala mombongo; na yango bato bazalaki na mabaku mingi ya kokóma na bozwi.​—Rom. 6:21; 1 Pe. 4:3, 4.

7 Atako Baroma bazalaki na batempelo ebele mpe bazalaki kosambela banzambe ndenge na ndenge, bazalaki koluka mpenza te kokangama na banzambe oyo bazalaki kosambela. Mpo na bango, losambo ezalaki mingimingi kaka mpo na milulu ya mbotama, ya libala, mpe ya kokunda ebembe. Na ntembe te, omoni mokakatano oyo bakristo ya Roma bazalaki na yango. Lokola mingi kati na bango bazalaki liboso kosala makambo wana, ezali polele ete basengelaki kobongwana mpo bákóma bakristo ya solo, mpe mbongwana yango esukaki kaka na mokolo ya batisimo te.

8. Na ndenge nini mokili ezali esika ya likama mpo na bakristo lelo oyo?

8 Ndenge moko na Roma, mokili ya lelo ezali mpe esika ya likama mpo na bakristo. Mpo na nini? Mpamba te elimo ya mokili ezali komonana na ndenge mingi. (Tángá Baefese 2:2, 3; 1 Yoane 2:16.) Lokola tofandi na mokili oyo ezali kolendisa bamposa, makanisi, mitinda, mpe bizaleli na yango, soki tokebi te, makambo yango ekoki kokɔtela biso. Yango wana, ezali na ntina mingi tólanda toli oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, ete “bótika kolanda makambo ya ntango oyo” mpe “bóbongwana.” Tosengeli kosala nini mpo tóbongwana?

 KOBONGWANA ESƐNGI NINI?

9. Liboso moto azwa batisimo, mbongwana nini bato mingi basalaki?

9 Wana moto azali koyekola Biblia mpe kosalela makambo oyo azali koyekola, akómaka kokola na elimo. Mpo na yango, abongolaka bomoi na ye na kolanda makambo oyo azali koyekola. Atikaka mimeseno ya mangomba ya lokuta mpe bizaleli mosusu ya mabe oyo azalaki na yango liboso mpe alataka bomoto ya sika mpo na komekola Kristo. (Ef. 4:22-24) Tosepelaka mingi komona ete mbula na mbula bankama ya bankóto ya bato bazali kokola na elimo ndenge wana, mpe bazali kozwa batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova Nzambe. Kozanga ntembe, yango esepelisaka motema ya Yehova. (Mas. 27:11) Kasi, motuna yango oyo: Mbongwana oyo moto asengeli kosala esuki kaka wana?

Bato ebele basengeli kobima na mokili ya Satana mpe kobongwana (Talá paragrafe 9)

10. Na ndenge nini kobongwana ekeseni na kobongisa?

10 Mpo na koloba solo, kobongwana esuki kaka te na kobongisa. Na ndakisa, bakoki kotya elembo na eloko moko to kosala piblisite ete “babongisi” yango, nzokande eloko yango ebongwani te. Ekoki kozala ete babakisi kaka mwa malasi to mwa nkisi moko mpe batye yango na molangi to na kartɔ ya sika. Diksionɛrɛ moko (Vine’s Expository Dictionary) oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete “kobongwana” oyo Baroma 12:2 elobeli elimboli kokómisa sika to kobongola makanisi na lisalisi ya elimo santu. Na yango, kobongwana oyo mokristo asengeli kobongwana esuki kaka te na kotika bizaleli ya mabe, maloba ya mabe, to etamboli ya mbindo. Bato mosusu oyo bayebi Biblia te basalaka mpe makasi báboya makambo wana ya mabe. Kasi, kobongwana oyo mokristo asengeli kobongwana esɛngi nini?

11. Paulo alobaki ete kobongwana esɛngi nini?

11 Paulo akomaki ete: “Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika.” Na Biblia, “makanisi” to makoki ya kokanisa elimbolaka elimo oyo moto amonisaka to mposa ya motema na ye. Na ebandeli ya mokanda na ye epai ya Baroma, Paulo alobelaki bato oyo bazalaki na “makanisi oyo [Nzambe] andimaka te.” Bato yango bamipesaki “na makambo nyonso ya kozanga boyengebene, na mabe, na bilulela, na motema mabe, na likunya, na ezaleli ya koboma bato, na koswana, na bokosi,” mpe na makambo mosusu ya mabe. (Rom. 1:28-31) Nyonso wana emonisi ntina oyo Paulo alendisaki bato oyo bakolaki na esika ya ndenge wana, oyo na nsima bakómaki basaleli ya Nzambe, ete ‘bábongwana mpe bákómisa makanisi na bango makanisi ya sika.’

“Nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongwa mosika na bino.”​—Ef. 4:31

12. Makanisi ya bato mingi ezali ndenge nini lelo oyo, mpe ndenge nini yango ekoki kozala likama mpo na bakristo?

12 Nzokande, lelo oyo, bato mingi na mokili bakokani na bato oyo Paulo alobelaki. Bakanisaka ete kotosa mibeko ezali makambo ya kala mpe ete moto moko te asengeli kotinda basusu bátosa mibeko. Balakisi mpe baboti mingi batikaka bana básala oyo balingi mpe balobaka ete moto na  moto azali na bonsomi ya kokanisa makambo oyo alingi. Mpo na bango, moto moko te akoki mpenza koyeba nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Ata bato mingi oyo balobaka ete basambelaka bamonaka ete bazali na bonsomi ya kosala oyo bango moko bakanisi ete ezali malamu; bamonaka te ete basengeli kotosa Nzambe mpe mibeko na ye. (Nz. 14:1) Makanisi ya ndenge wana ekoki kozala mpenza likama mpo na bakristo ya solo. Baoyo bazali ekɛngɛ te bakoki kokanisa ete ezali mpe bongo mpo na bibongiseli oyo ezwamaka na lisangá ya Nzambe. Bakoki kobanda koboya kolanda bibongiseli oyo ezali kozwama na lisangá to kutu koimaima mpo na likambo oyo esepelisi bango te. To bakoki kobanda kotya ntembe mpo na batoli ya Biblia oyo bapesaka biso na ntina etali kominanola, kosalela Internet, to kotánga bakelasi ya milaimilai.

13. Mpo na nini tosengeli komitalela na bosembo?

13 Mpo tólanda te makanisi ya bato ya mokili oyo, tosengeli komitalela na bosembo mpo tóyeba makambo nini mpenza ezalaka na kati ya motema na biso. Tosengeli koluka koyeba makanisi, mayoki, bamposa, mpe mikano nini ezali na kati ya motema na biso. Bato mosusu bakoki te komona oyo ezali na kati ya motema na biso. Bakoki koyebisa biso ete tozali na bizaleli malamu. Kasi, biso moko toyebi soki totikaka mpenza ete makambo oyo toyekolaka na Biblia ebongola biso mpe ekoba kobongola biso.​—Tángá Yakobo 1:23-25.

NDENGE NINI TOKOKI KOBONGWANA?

14. Nini ekoki kosalisa biso tóyeba makambo oyo tosengeli kobongola?

14 Mpo tóbongwana, tosengeli kobongola bomoto na biso ya kati; mpo na yango, tosengeli na eloko moko oyo ekosuka kaka libándá te, kasi oyo ekokɔta mpenza tii na kati. Nini ekoki kosalisa biso? Ntango toyekoli Biblia mpe toyebi makambo oyo Yehova azali kosɛnga biso, ndenge oyo tokosala mpo na makambo oyo totángi ekomonisa oyo ezali mpenza na motema na biso mpe ekosalisa biso tóyeba makambo nini tosengeli kobongisa mpo tósala “mokano ya Nzambe oyo . . . ezali ya kokoka.”​—Rom. 12:2; Ebr. 4:12.

15. Kobongisa oyo Yehova abongisaka biso esalisaka biso tóbongwana ndenge nini?

15 Tángá Yisaya 64:8. Elilingi oyo mosakoli Yisaya asaleli ezali koteya biso likambo moko ya ntina mingi. Yehova azali Moyemi, mpe biso tozali mabele ya lima. Ndenge nini abongisaka biso? Kobongisa oyo Yehova abongisaka biso ezali ya nzoto te, ntango mosusu kobongisa biso mpo tómonana to tókóma kitoko koleka. Yehova abongisaka biso nde na elimo. Soki totiki ye abongisa biso, asalisaka biso tóbongwana na kati ya motema na biso: yango nde eloko oyo tosengeli na yango mpo tótɛmɛla makambo mabe ya mokili. Mosala yango ya kobongisa biso esalemaka ndenge nini?

16, 17. (a) Moyemi-mbɛki asalaka nini na mabele ya lima oyo alingi kosala na yango mbɛki? (b) Ndenge nini Liloba ya Nzambe esalisaka biso tóbongwana mpo tókóma na motuya mingi na miso ya Yehova?

16 Mpo na kosala mbɛki moko ya kitoko mpenza, moyemi-mbɛki asalelaka mabele ya lima oyo ezali malamu. Kasi, ezali na makambo mibale oyo asengeli naino kosala. Ya liboso, asengeli kosukola mabele ya lima mpo na kolongola yango bosɔtɔ nyonso. Na nsima, asengeli kosangisa mabele yango na mai oyo ekoki mpo ekauka te mpe epanzana te ntango azali kosala na yango mbɛki.

17 Tomoni ete moyemi-mbɛki atyaka mai na mabele ya lima kaka mpo na kolongola yango salite te, kasi mpe mpo ezala pɛtɛɛ ntango azali kosala na yango mbɛki, ata mbɛki ya motuya mingi. Omoni mosala oyo Liloba ya Nzambe ekoki kosala na bomoi na biso? Ekoki kosalisa biso tólongola  makanisi oyo tozalaki na yango liboso ete tóyeba Nzambe mpe tóbongwana mpo na kokóma na motuya mingi na miso na ye. (Ef. 5:26) Kanisá mbala boni balendisaka biso tótángaka Biblia mokolo na mokolo mpe tóyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita, epai toyekolaka Liloba ya Nzambe. Mpo na nini balendisaka biso tósalaka makambo yango? Ezali mpo ntango tozali kosala bongo, tozali kotika Yehova abongisa biso.​—Nz. 1:2; Mis. 17:11; Ebr. 10:24, 25.

Kobongwana ekosalisa yo oyeba kosilisa makambo na kimya (Talá paragrafe 18)

18. (a) Mpo na nini tosengeli komanyola Liloba ya Nzambe soki tolingi ete ebongola biso? (b) Mituna nini ekoki kosalisa biso?

18 Mpo Liloba ya Nzambe ebongola biso mpenza, tosengeli kosuka kaka te na kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe koyekola yango. Bato mingi batángaka Biblia mbala na mbala, mpe na bongo, bayebi makambo mingi oyo yango elobaka. Mbala mosusu osilá kokutana na bato ya ndenge wana na mosala ya kosakola. Basusu kutu bakangá bavɛrsɛ mingi ya Biblia na motó. * Atako bongo, mbala mosusu ebongolá mpenza te makanisi mpe bomoi na bango. Mpo na nini? Mpamba te Liloba ya Nzambe ebongolaka mpenza moto kaka soki atiki yango ekɔta to ‘eteya’ motema na ye. (Gal. 6:6) Na yango, tosengeli kozwaka ntango ya komanyola makambo oyo tozali koyekola. Osengeli komituna boye: ‘Nandimi mpenza ete yango ezali kaka te mateya ya lingomba? Ngai moko namonaka mpenza ete ezali mateya ya solo? Nasalelaka yango na bomoi na ngai moko, to namonaka ete ezali kaka makambo oyo nakoki koteya basusu? Nandimi mpenza ete Yehova azali koloba nde na ngai?’ Kokanisa mpe komanyola mituna ya ndenge wana ekoki kobongisa lisusu boyokani na biso na Yehova. Tokokóma kolinga ye mingi koleka. Soki makambo oyo tozali koyekola esimbi mpenza motema na biso, tokobongwana mpe tokosepelisa Nzambe.​—Mas. 4:23; Luka 6:45.

19, 20. Kotosa toli nini ya Biblia ekoki komemela biso matomba?

19 Kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe komanyola yango ekosalisa biso tókoba kosala makambo oyo Paulo alobaki: “Bólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango, mpe bólata bomoto ya sika, oyo na nzela ya boyebi ya solosolo ezali kokómisama sika.” (Kol. 3:9, 10) Soki tozali mpenza kokanga ntina ya makambo oyo Biblia ezali koteya mpe tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola, yango ekotinda biso tólata bomoto ya sika oyo ekobatela biso na mitambo ya Satana.

20 Ntoma Petro akundwelaki biso ete: “Lokola bana ya botosi, bótika kolanda bamposa oyo bozalaki na yango kala . . . [kasi] bókóma basantu na etamboli na bino mobimba.” (1 Pe. 1:14, 15) Na lisolo oyo elandi, tokomona mapamboli oyo tokoki kozwa soki tosali nyonso mpo tótika makanisi mpe bizaleli ya kala mpe tóbongwana.

^ par. 18 Talá ndakisa moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/1994, lokasa 10, paragrafe 7.