Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

Mokonzi asepelaki mingi!

Mokonzi asepelaki mingi!

LIKAMBO yango esalemaki na sanza ya mwambe 1936, na Kraal, lopango ya mokonzi ya ekólo Swaziland. Ndeko Robert Nisbet ná ndeko George Nisbet, oyo bazalaki na kati ya vuatire oyo ezalaki na bikóliseli-loláká, bautaki kobɛta diskɛ ya miziki ya Bokonzi mpe na nsima bayokisaki bato badiskur ya ndeko Joseph Rutherford. Mokonzi Sobhuza II asepelaki mingi. Ndeko George alobaki boye: “Likambo oyo ekamwisaki biso koleka ezali ete mokonzi yango alingaki kosomba fono, badiskɛ, mpe bikóliseli-loláká oyo tozalaki kosalela mpo na kosakola nsango malamu!”

Ndeko Robert ayebisaki ye ete alimbisa bango mpo biloko wana ezalaki ya kotɛka te. Mpo na nini? Mpamba te biloko yango ezalaki ya moto mosusu. Mokonzi alukaki koyeba soki moto yango ezalaki nani.

Robert azongisaki ete: “Ezali biloko ya Mokonzi mosusu.” Na nsima, Sobhuza atunaki soki Mokonzi yango ezalaki nani. Robert alobaki ete: “Ezali Yesu Kristo, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe.”

Sobhuza alobaki na limemya nyonso ete: “Ye azali Mokonzi monene mpenza! Nakolinga te kozwa eloko oyo ezali ya ye.”

Robert akomaki boye: ‘Ezaleli ya mokonzi wana monene, Mokonzi Sobhuza, ekamwisaki ngai mingi. Atako azalaki koloba Lingelesi malamu, azalaki na lolendo te mpe azalaki komikumisa te; azalaki koloba polele mpe bato bazalaki kobanga te koya epai na ye. Nafandaki ná ye na biro na ye na boumeli ya miniti soki 45, wana George azalaki kobɛta miziki libándá.’

Robert abakisaki ete: ‘Mwa moke na nsima, kaka mokolo yango, tokendaki kotala eteyelo moko ya ekólo Swaziland, esika tokutanaki na likambo moko oyo esepelisaki biso mingi koleka. Topesaki mokambi ya eteyelo yango litatoli, mpe andimaki koyoka biso. Ntango toyebisaki ye ete tozali na fono mpe tolingi ete bana-kelasi nyonso ya eteyelo yango báyoka badiskur, asepelaki mingi mpe ayebisaki bana-kelasi pene na 100 báfanda na matiti mpo báyoka. Bayebisaki biso ete ezalaki eteyelo moko ya ntei oyo ezalaki koteya bana mibali mosala ya bilanga, mosala ya kolona mpe kobongisa bafololo, mosala ya mabaya, mosala ya kotonga, Lingelesi mpe matematiki; mpe ezalaki koteya bana basi ndenge ya kosalisa bato ya maladi, misala ya ndako, mpe misala mosusu ya ntina. Eteyelo yango ezalaki ya nkɔkɔ ya Mokonzi Sobhuza.’ *

Bana-kelasi oyo balandaki diskur ya bato nyonso na Swaziland na 1936

Kobanda na mobu 1933, Mokonzi Sobhuza azalaki kosepela koyoka babongisi-nzela oyo bazalaki koya na lopango na ye. Mokolo  moko, ayanganisaki basoda 100 oyo bazalaki kobatela ye mpo báyoka diskɛ ya nsango malamu ya Bokonzi. Asalaki abonema mpo azwaka bazulunalo na biso mpe andimaki kozwa mikanda oyo bandeko bapesaki ye. Eumelaki te, mokonzi yango akómaki na mikanda na biso mingi. Lisusu, abatelaki mikanda yango malamu, atako guvɛrnema ya Angleterre epekisaki mikanda na biso na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba!

Mokonzi Sobhuza II akobaki koyamba Batatoli ya Yehova na lopango na ye oyo ezalaki na engumba Lobamba; azalaki kobenga ata bakonzi ya mangomba mpo baya koyoka badiskur na biso. Mokolo moko, ntango Helvie Mashazi, ndeko moko ya Swaziland, azalaki kolimbola Matai mokapo 23, etuluku moko ya bakonzi ya mangomba oyo bazalaki na nkanda makasi bakɔtaki na mbalakaka mpe balukaki kofandisa ndeko yango na makasi. Kasi mokonzi apekisaki bango, mpe asɛngaki ndeko Mashazi akoba na lisolo na ye. Lisusu, mokonzi ayebisaki bato oyo bazalaki kolanda lisolo yango bákoma bavɛrsɛ oyo molobi azalaki kopesa!

Mokolo mosusu, nsima ya koyoka diskur oyo mobongisi-nzela moko asalaki, bapastɛrɛ minei oyo bazalaki wana babalolaki mwa biloko ya mpɛmbɛ oyo balataka na nkingo, mpe balobaki ete: “Tozali lisusu bapastɛrɛ te, tokómi Batatoli ya Yehova.” Na nsima, batunaki mobongisi-nzela wana soki azali na babuku mosusu lokola oyo mokonzi azalaki na yango.

Kobanda na bambula 1930 tii na liwa na ye na 1982, mokonzi wana azalaki na limemya mingi mpo na Batatoli ya Yehova mpe apesaki nzela te ete bányokola bango atako bazalaki koboya kolanda mimeseno ya bonkɔkɔ ya ekólo Swaziland. Yango wana, Batatoli ya Yehova bazalaki na botɔndi mingi epai na ye, mpe liwa na ye esalaki bango mpasi mingi na mitema.

Na ebandeli ya mobu 2013, basakoli ya Bokonzi bazalaki koleka 3 000 na Swaziland. Na ekólo yango, oyo ezali kaka na bato mwa moke koleka milio moko, mosakoli moko azali na mokumba ya kopesa litatoli na bato 384. Babongisi-nzela koleka 260, na masangá 90, bazali kosakola na molende, mpe bato koleka 7 496 bayanganaki na Ekaniseli na 2012. Yango emonisi polele ete bokoli monene ekosalema na mikolo ezali koya. Na ntembe te, basakoli ya liboso oyo bakendaki na Swaziland na bambula 1930 basalaki mosala monene.​—Biloko oyo tosalelá kala na Afrika ya Sudi.

^ par. 8 Zulunalo L’Âge d’Or, 30/06/1937, lokasa 629 na Lingelesi.