Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 Biloko oyo tosalelá kala

“Okoki kobosana yango ata moke te”​—Eyaki na ntango oyo ebongi

“Okoki kobosana yango ata moke te”​—Eyaki na ntango oyo ebongi

“OKOKI kobosana yango ata moke te!” Ezali na maloba wana nde bato mingi balobelaki “Drame ya Bozalisi.” Drame yango eyaki mpenza na ntango oyo ebongi mpe etikalá libela na makanisi ya bato oyo batalaki yango. Na ntembe te, “Drame ya Bozalisi” epesaki litatoli monene mpo na lokumu ya Yehova, mwa moke liboso ete boyangeli ya Hitler ebanda konyokola makasi basaleli ya Yehova na Mpoto. Kasi, “Drame ya Bozalisi” ezalaki nini?

Nkombo ya drame ya sika eutaki na buku Schöpfung (Création)

Na mobu 1914, biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na etúká ya New York, na États-Unis, ebimisaki “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Ezalaki filme oyo ezalaki koumela ngonga mwambe, ezalaki na bafɔtɔ mpe na bililingi oyo eninganaka, ezalaki langilangi mpe ezalaki na maloba. Bamilio ya bato batalaki “Fɔtɔ-Drame” yango na mokili mobimba. “Drame Eureka,” oyo ezongelaki na mokuse lisolo ya Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi, ebimaki mpe na mobu 1914. Kasi na bambula 1920, bafɔtɔ oyo eninganaka, bafilme, mpe bamasini oyo elakisaka bililingi esilaki ngala. Atako bongo, bato mingi bazalaki kaka kosɛnga ete bálakisa bango bililingi ya “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Na ndakisa, bato ya engumba Ludwigsburg, na Allemagne, batunaki ete: “Mokolo nini bokolakisa lisusu ‘Fɔtɔ-Drame’?” Na yango, bandeko basalaki nini?

Mpo na kokokisa mposa ya bato oyo bazalaki koluka kotala lisusu Drame yango, na bambula 1920, bandeko mosusu ya libota ya Betele na Magdebourg, na Allemagne, batindamaki mpo na kosomba bafilme na Agence de presse moko na engumba Paris, na France, mpe basombaki bililingi oyo eninganaka na bakompanyi oyo esalaka mayemi, na bingumba Leipzig mpe Dresden. Basangisaki yango na bililingi mosusu ya kala ya “Fɔtɔ-Drame” oyo bazalaki naino kosalela.

Ndeko Erich Frost, oyo azalaki mobɛti monene ya miziki, asalaki miziki oyo esengelaki kobɛtama nzela moko na bafilme mpe bafɔtɔ oyo basombaki. Maloba oyo ezalaki kolimbola yango eutaki mingimingi na buku Création. Yango wana, bakómaki kobenga “Fɔtɔ-Drame” yango oyo babongisaki lisusu ete “Drame ya Bozalisi.”

Drame yango ya sika ezalaki koumela ngonga mwambe, ndenge moko na “Fɔtɔ-Drame,” mpe bato bazalaki kotala eteni na yango mokomoko na bampokwa oyo elandanaki. Ezalaki kolakisa bililingi kitoko ya mikolo ya bozalisi, kolobela istware ya Biblia mpe ya mokili, mpe komonisa ndenge oyo mangomba ya lokuta ebungisá bato nzela. Balakisaki “Drame ya Bozalisi” na Autriche, Allemagne, Luxembourg, mpe Suisse, mpe na bisika mosusu oyo bakokaki kokuta bato oyo balobaka Allemand.

Erich Frost mpe banɔti ya miziki ya “Drame ya Bozalisi”

Erich Frost alobi boye: “Na bisika oyo tozalaki kolanda Drame yango, nazalaki kolendisa baninga na ngai babɛti-miziki, mingimingi baoyo tozalaki na bango na orkɛstrɛ, ete na ntango ya bopemi,  bákabolela bato oyo bayei kotala Drame yango babuku mpe mwa babuku na biso. Na lolenge wana, tokabolaki mikanda ebele koleka oyo tokokaki kokabola na mosala ya ndako na ndako.” Johannes Rauthe, oyo alakisaki Drame yango na Pologne mpe na ekólo oyo ebengamaka lelo République tchèque, azali komikundola ete bato mingi oyo bayaki kotala yango batikaki baadrɛsi na bango mpo bandeko bákende kotala bango. Baadrɛsi wana esalisaki bandeko bázongela bato yango mpo na kosalisa bango bákola na elimo.

Na bambula 1930, bisika oyo bazalaki kolakisa “Drame ya Bozalisi” ezalaki kotonda na bato, mpe na bingumba yango bato bazalaki kolobela mingi Batatoli ya Yehova. Tii na mobu 1933, pene na bato milio moko basilaki kotala Drame yango na bisika oyo biro ya filiale ya Allemagne elakisaki yango. Käthe Krauss alobi boye: “Kaka mpo na kotala Drame yango, na boumeli ya mikolo mitano, tozalaki kotambola kilomɛtrɛ 10 na mokolo, na banzela ya zamba oyo ezalaki na bangomba mpe na mabwaku.” Else Billharz alobi ete: “‘Drame ya Bozalisi’ nde esalisaki ngai nasepela na mateya ya solo.”

Alfred Almendinger alobi ete nsima ya kotala Drame yango, mama na ye “asepelaki mingi mpe asombaki Biblia, mpe afungolaki yango mpo na koluka liloba ‘epongelo.’” Lokola amonaki liloba yango na kati ya Biblia te, atikaki kokende na lingomba oyo azalaki, mpe na nsima azwaki batisimo. Erich Frost alobi ete: “‘Drame ya Bozalisi’ esalisaki bato mingi báyamba solo.”​—3 Yoa. 1-3.

Kaka na ntango wana oyo bato mingi bazalaki kotala “Drame ya Bozalisi,” bikólo mingi ya Mpoto ekómaki kopesa mabɔkɔ na boyangeli ya Banazi mpe yango ebimisaki yikiyiki. Kobanda na mobu 1933, mosala ya Batatoli ya Yehova na Allemagne epekisamaki. Kobanda na ntango wana tii na nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba na mobu 1945, banyokolaki mingi Batatoli ya Yehova na Mpoto. Erich Frost alekisaki mbula soki mwambe na bolɔkɔ. Kasi nsukansuka abimaki; na nsima asalaki na Betele ya Wiesbaden, na Allemagne. Ezali mpenza malamu ndenge “Drame ya Bozalisi,” oyo bato babosanaka te, eyaki na ntango oyo ebongi mpo na kopesa mpiko na bakristo mingi oyo mosika te balingaki kokutana na minyoko oyo emekaki kondima na bango na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba!​—Biloko oyo tosalelá kala, na Allemagne.