Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Elimo elukalukaka na kati ya . . . makambo mozindo ya Nzambe”

“Elimo elukalukaka na kati ya . . . makambo mozindo ya Nzambe”

 “Elimo elukalukaka na kati ya . . . makambo mozindo ya Nzambe”

“Elimo elukalukaka na kati ya makambo nyonso, ata na makambo mozindo ya Nzambe.”​—1 KO. 2:10.

1. Mosala nini ya elimo santu Paulo alobelaki na 1 Bakorinti 2:10, mpe yango ebimisi mituna nini?

TOSENGELI kozala na botɔndi mpenza mpo na mosala oyo elimo santu ya Yehova esalaka! Biblia elobi ete elimo ezali mosungi, likabo, motatoli, mpe elobelaka biso. (Yoa. 14:16; Mis. 2:38; Rom. 8:16, 26, 27) Ntoma Paulo amonisaki mosala mosusu ya ntina oyo elimo santu esalaka; alobaki boye: “Elimo elukalukaka na kati ya makambo nyonso, ata na makambo mozindo ya Nzambe.” (1 Ko. 2:10) Ya solo, Yehova asalelaka elimo santu na ye mpo na komonisa mateya mozindo ya Biblia. Soki tozalaki na lisungi yango te, tolingaki mpenza koyeba mikano ya Yehova te. (Tángá 1 Bakorinti 2:9-12.) Nzokande, yango ebimisi mituna mingi: Ndenge nini ‘elimo elukalukaka na kati ya makambo mozindo ya Nzambe’? Na nzela ya nani Yehova amonisaki makambo yango na ekeke ya liboso T.B.? Ndenge nini mpe na nzela ya nani elimo ezali kolukaluka na kati ya makambo mozindo ya Nzambe na mikolo na biso?

2. Wapi ndenge mibale oyo Yesu amonisaki ete elimo ekosala?

2 Yesu amonisaki ndenge mibale oyo elimo ekosala. Mwa moke liboso akufa, ayebisaki bantoma na ye ete: “Mosungi yango, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye nde akoteya bino makambo nyonso mpe akozongisa na makanisi na bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.” (Yoa. 14:26) Elimo santu esengelaki kozala moteyi mpe kokundwela biso  makambo. Lokola moteyi, ekosalisa bakristo bákanga ntina ya makambo oyo bayebaki liboso te. Na oyo etali kokundwela makambo, ekosalisa bango bákanisa makambo oyo esilaki kolimbolama mpe básalela yango malamu.

Na ekeke ya liboso

3. Maloba nini ya Yesu emonisaki ete “makambo mozindo ya Nzambe” ekomonisama mokemoke?

3 Yesu ye moko ateyaki bayekoli na ye makambo mingi oyo ezalaki sika mpo na bango. Atako bongo, bazalaki naino na makambo mingi ya koyekola. Yesu ayebisaki bantoma na ye boye: “Nazali naino na makambo mingi ya koloba na bino, kasi bokoki komema yango sikoyo te. Nzokande, ntango ye akoya, elimo yango ya solo, akokamba bino na kati ya solo nyonso.” (Yoa. 16:12, 13) Na ndenge yango, Yesu amonisaki ete na lisalisi ya elimo santu, makambo mozindo ya elimo ekomonisama mokemoke.

4. Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ndenge nini elimo santu esalaki lokola moteyi mpe ekundolaki makambo?

4 Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., “elimo yango ya solo” eyaki, esopamaki likoló ya bakristo soki 120 oyo bayanganaki na Yerusaleme. Bato bayokaki mpe bamonaki bilembeteli na yango. (Mis. 1:4, 5, 15; 2:1-4) Bayekoli balobaki “makambo minene ya Nzambe” na minɔkɔ ndenge na ndenge. (Mis. 2:5-11) Ekómaki ntango mpo na komonisa likambo moko ya sika. Mosakoli Yoele asakolaki kosopama yango ya elimo santu. (Yoe. 2:28-32) Bato oyo bazalaki wana bamonaki kokokisama ya esakweli yango na ndenge oyo bakanisaki te, mpe Petro azwaki maloba mpe alimbolaki makambo yango. (Tángá Misala 2:14-18.) Elimo santu esalaki lokola moteyi na ndenge esalisaki Petro amona polele ete makambo oyo ekómelaki bayekoli ezalaki kokokisa esakweli wana ya kala. Elimo ekundwelaki mpe Petro makambo, mpo azongelaki kaka esakweli ya Yoele te kasi mpe nzembo mibale ya Davidi. (Nz. 16:8-11; 110:1; Mis. 2:25-28, 34, 35) Makambo oyo bato nyonso oyo bayanganaki bamonaki mpe bayokaki ezalaki mpenza makambo mozindo ya Nzambe.

5, 6. (a) Nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., mituna nini ya ntina etali kondimana ya sika esengelaki kozwa biyano? (b) Banani babimisaki mituna yango, mpe ndenge nini bikateli ezwamaki?

5 Kasi, esengelaki kokómisa makambo mosusu polele mpo na bakristo ya ekeke ya liboso. Na ndakisa, mituna ezalaki naino na ntina etali kondimana ya sika oyo ebandaki na mokolo yango ya Pantekote. Kondimana ya sika ezalaki kaka mpo na Bayuda mpe Baprozelite? Bato ya bikólo mpe bakokaki kokɔta na kondimana yango mpe kotyama mafuta na elimo? (Mis. 10:45) Mibali oyo bazalaki bato ya bikólo basengelaki naino kokatama ngenga mpe kotosa Mibeko ya Moize? (Mis. 15:1, 5) Ezalaki mituna ya ntina mingi. Bazalaki na mposa ya elimo ya Yehova mpo na kolukaluka na kati ya makambo wana mozindo. Kasi, elimo yango esengelaki kosala na nzela ya nani?

6 Bandeko oyo bazalaki na mikumba nde bazalaki kobimisa mituna nyonso oyo esengelaki kozwa biyano. Petro, Paulo, mpe Barnabasi bazalaki na likita ya lisangani ya mikóló-bakambi mpe bayebisaki ndenge Yehova akómaki kotya likebi epai ya bato ya bikólo oyo bakatamá ngenga te. (Mis. 15:7-12) Nsima ya kotalela elembeteli yango na kolanda makambo oyo Makomami ya Ebre elobaki mpe na lisalisi ya elimo santu, lisangani ya mikóló-bakambi ezwaki ekateli. Na nsima, bakomelaki masangá mpo na koyebisa bango ekateli yango.​—Tángá Misala 15:25-30; 16:4, 5; Ef. 3:5, 6.

7. Makambo mozindo ya Nzambe emonisamaki na nzela ya nini?

7 Makambo mosusu mingi elimbolamaki polele na nzela ya makomi oyo Yoane, Petro, Yakobo, mpe Paulo bakomaki na litambwisi ya elimo santu. Kasi ntango Makomami ya Grɛki ya bokristo esilaki kokomama, na nsima, makabo ya bisakweli mpe ya koyeba makambo na ndenge ya likamwisi esukaki. (1 Ko. 13:8) Elimo elingaki nde kokoba kosala lokola moteyi mpe kokundwela makambo? Elingaki kokoba kosalisa bakristo bálukaluka na kati ya makambo mozindo ya Nzambe? Esakweli emonisaki ete ezali bongo.

 Na ntango ya nsuka

8, 9. Banani balingaki ‘kongɛnga’ mpo na mayele ya kososola makambo ya elimo na ntango ya nsuka?

8 Wana azalaki kolobela ntango ya nsuka, anzelu moko asakolaki ete: “Baoyo bazali na mayele ya kososola bakongɛnga lokola kongɛnga ya etando; mpe baoyo bazali komema ebele epai ya boyengebene, bakongɛnga lokola minzoto mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko. . . . Mpe boyebi ya sikisiki ekokóma mingi.” (Dan. 12:3, 4) Banani balingaki kozala na mayele ya kososola mpe balingaki kongɛnga? Yesu asalisi biso tóyeba yango na ndakisa na ye ya blé mpe matiti mabe. Ntango alobelaki “bosukisi ya makambo ya ntango moko boye,” alobaki ete: “Na ntango yango bayengebene bakongɛnga makasi lokola moi na kati ya bokonzi ya Tata na bango.” (Mat. 13:39, 43) Na ndimbola oyo apesaki, Yesu amonisaki ete “bayengebene” bazali nde “bana ya bokonzi,” bakristo oyo batyami mafuta na elimo.​—Mat. 13:38.

9 Bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo balingaki nde ‘kongɛnga’? Tokoki koloba bongo, mpo bakristo nyonso basengelaki komipesa na mosala ya kosakola, ya kokómisa bato bayekoli, mpe kolendisana na makita. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengelaki kozala ndakisa. (Zek. 8:23) Kasi longola yango, makambo mozindo esengelaki komonisama na  ntango ya nsuka. Esakweli yango ya Danyele ‘ekangamaki na elembo’ tii na ntango ya nsuka. (Dan. 12:9) Ndenge nini mpe na nzela ya nani elimo elingaki kolukaluka na kati ya makambo mozindo yango?

10. (a) Na nzela ya nani elimo emonisaka mateya mozindo na mikolo ya nsuka? (b) Limbolá ndenge mateya mozindo oyo etali tempelo monene ya elimo ya Yehova emonisamaki.

10 Na mikolo na biso, soki ekómi ntango ya kolimbola likambo moko, elimo santu esalisaka bamonisi ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo bazali na biro monene ya Batatoli ya Yehova básosola mateya mozindo oyo kala, bazalaki kokanga ntina na yango te. (Mat. 24:45; 1 Ko. 2:13) Bandeko nyonso ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi batalelaka bandimbola ya sika. (Mis. 15:6) Makambo oyo bayekoli, babimisaka yango na mikanda mpo bato nyonso bátánga. (Mat. 10:27) Nsima ya mikolo, makambo mosusu ekoki kosɛnga esembolama lisusu, oyo wana mpe bayebisaka yango na bosembo nyonso.​—Talá etanda  “Ndenge elimo santu emonisaki ndimbola ya tempelo ya elimo.”

Ndenge ya kozwa matomba na mosala ya elimo santu lelo

11. Ndenge nini bakristo nyonso bazwaka litomba na mosala oyo elimo santu esalaka mpo na komonisa makambo mozindo ya Nzambe lelo?

11 Bakristo nyonso ya sembo bazwaka matomba na mosala oyo elimo santu esalaka mpo na komonisa makambo mozindo ya Nzambe. Ndenge moko na bakristo ya ekeke ya liboso, biso mpe lelo toyekolaka, na nsima tomikundolaka mpe tosalelaka makambo oyo elimo santu esalisaka biso tóyeba. (Luka 12:11, 12) Tozali na mposa te ya kosala bakelasi ya milaimilai mpo tókanga ntina ya makambo mozindo ya Nzambe oyo ebimisami na mikanda. (Mis. 4:13) Ndenge nini tokoki kokolisa boyebi na biso ya makambo mozindo ya Nzambe? Tótala mwa makanisi.

12. Ntango nini tosengeli kobondela mpo na kozwa elimo santu?

12 Kobondela mpo na kozwa elimo santu. Soki tolingi kotánga mikanda oyo elimbolaka Biblia, tosengeli libosoliboso kobondela mpo elimo santu etambwisa biso. Tosengeli kosala bongo ata soki tozali kaka biso moko to soki tozali na ntango mingi te. Mabondeli ya komikitisa ya ndenge wana ekozanga te kosepelisa Tata na biso ya likoló. Ndenge Yesu amonisaki yango, Yehova akopesa biso elimo santu na ye kozanga kokakatana soki tosɛngi ye na motema moko.​—Luka 11:13.

13, 14. Ndenge nini kobongisa makita esalisaka biso tókanga ntina ya makambo mozindo ya Nzambe?

13 Kobongisa makita. Moombo ya sembo apesaka biso “bilei na ntango oyo ebongi.” “Moombo” azali kokokisa mokumba na ye na ndenge azali kopesa biso mikanda oyo elimbolaka Makomami mpe na ndenge azali kobongisa baprogramɛ mpo na boyekoli mpe makita. Ntango basɛngi “lisangá mobimba ya bandeko” bátalela likambo boye to boye, ezalaka mpamba te. (1 Pe. 2:17; Kol. 4:16; Yuda 3) Tokolanda litambwisi ya elimo santu soki tozali kosala makasi mpo na kotosa makambo oyo basɛngi biso.​—Em. 2:29.

14 Ntango tozali kobongisa makita, ekozala malamu tótángaka bavɛrsɛ oyo maloba na yango etyami na lisolo te mpe tóluka koyeba ndenge vɛrsɛ mokomoko eyokani na likambo oyo bazali kolobela. Kosala bongo ekobakisa mokemoke boyebi na biso ya Biblia. (Mis. 17:11, 12) Soki tozali kotánga bavɛrsɛ ndenge wana, ekokɔta na makanisi na biso mpe elimo santu  ekoki kosalisa biso tókanisa yango lisusu. Longola yango, soki tomoni vɛrsɛ ndenge ekomami na Biblia, tokokanga esika oyo yango ezali mpe ekoki kosalisa biso tómona yango soki tozali na mposa na yango.

15. Mpo na nini tosengeli kotikala nsima te na botángi ya mikanda oyo ezali kobima, mpe osalaka nini mpo na yango?

15 Kotikala nsima te. Makambo mosusu oyo ebimaka na mikanda na biso, toyekolaka yango na makita te, kasi babongisaka yango mpo na litomba na biso. Ata masolo oyo ebimaka na bazulunalo oyo tokabolaka na mosala ya kosakola ebongisamaka mpe mpo na biso. Na mokili oyo etondi na makambo kilikili, mbala mingi esɛngaka tózela moto to eloko na esika moko boye. Soki tomemi mokanda moko oyo totángi naino te to oyo totángá kaka ndambo, tokoki kosalela mabaku ya ndenge wana mpo na kotánga mwa moke. Mpo na kotikala nsima te na botángi na bango, bandeko mosusu bayokaka mikanda na biso na bakasɛti mpe na ba-CD ntango bazali kotambola na makolo to na motuka. Mpo na kobimisa mikanda yango, bolukiluki esalemaka mingi. Kasi mikanda yango ekomamaka na ndenge oyo ekosepelisa moto nyonso mpe yango nyonso esalisaka biso tósepela mingi na makambo ya elimo.​—Hab. 2:2.

16. Kokoma mituna oyo eyeli biso na makanisi mpe kolandela yango nsima ezali na litomba nini?

16 Komanyola. Ntango ozali kotánga Biblia to mikanda oyo elimbolaka yango, zwáká ntango ya kokanisa. Wana ozali kolanda na likebi lisolo oyo ozali kotánga, mituna ekoki koyela yo. Okoki kokoma mituna yango mpe kolandela yango na nsima. Mbala mingi, ezalaka ntango tozali koluka koyeba likambo oyo ebendi likebi na biso nde toyekolaka na mozindo mpenza. Boyebi oyo tokozwa ekokóma biloko na biso ya motuya oyo tokoki kosalela ntango tozali na mposa na yango.​—Mat. 13:52.

17. Programɛ na bino ya boyekoli na libota to ya boyekoli na yo moko ezalaka ndenge nini?

17 Kosala programɛ mpo na losambo na libota. Lisangani ya Mikóló-Bakambi elendisi biso nyonso tópona mpokwa moko to ntango mosusu pɔsɔ nyonso mpo na koyekola biso moko to na libota. Lokola mbongwana ekɔtá na programɛ ya makita na biso, epesi biso nzela ya kolanda toli wana. Makambo nini boyekolaka na ntango ya Losambo na libota na bino? Mabota mosusu batángaka Biblia, basalaka bolukiluki ya bavɛrsɛ oyo ebimisi mituna na makanisi na bango mpe bakomaka mwa ndimbola na Biblia na bango. Mabota mingi bazwaka ntango ya kotala ndenge bakoki kosalela makambo oyo bayekoli. Baboti mosusu baponaka makambo oyo bamoni ete libota na bango ezali na mposa ya kotalela, to mpe oyo eyokani na makambo mpe mituna oyo libota esɛngaki ete bátalela. Ntembe ezali te ete bokomona makambo mosusu oyo bokoki kotalela mikolo mosusu. *

18. Mpo na nini tosengeli te kobanga koyekola makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe?

18 Yesu alobaki ete elimo santu ekosala lokola mosungi. Na yango, tosengeli kobanga te koyekola makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe. Makambo yango ezali mpe na “boyebi [kitoko] ya Nzambe,” mpe basɛngi biso tólukaluka na kati na yango. (Tángá Masese 2:1-5.) Elakisaka biso “makambo oyo Nzambe abongisá mpo na baoyo balingaka ye.” Soki tozali kosala milende mpo na koyeba malamu Liloba ya Nzambe, elimo santu ekosalisa biso, mpo “elukalukaka na kati ya makambo nyonso, ata na makambo mozindo ya Nzambe.”​—1 Ko. 2:9, 10.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 17 Talá mpe Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 2008, lokasa 8.

Okopesa eyano nini?

• Wapi ndenge mibale oyo elimo esalisaka biso tólukaluka na kati ya “makambo mozindo ya Nzambe”?

• Na ekeke ya liboso, elimo santu emonisaki makambo mozindo ya Nzambe na nzela ya nani?

• Ndenge nini elimo santu esalaka mpo na kokómisa makambo polele na mikolo na biso?

• Okoki kosala nini mpo na kozwa litomba na mosala ya elimo santu?

[Mituna ya boyekoli]

[Etanda na lokasa 22]

 Ndenge elimo santu emonisaki ndimbola ya tempelo ya elimo

Moko ya “makambo mozindo ya Nzambe” oyo emonisamaki na ekeke ya liboso ezalaki ete tabernakle mpe batempelo oyo eyaki nsima ezalaki elilingi ya makambo minene ya solo. Paulo abengaki yango “hema ya solosolo, oyo Yehova atongaki, kasi moto te.” (Ebr. 8:2) Yango ezalaki tempelo monene ya elimo, ebongiseli mpo na kopusana penepene na Nzambe na lisalisi ya mbeka ya Yesu Kristo mpe mosala na ye ya nganga-nzambe.

“Hema ya solosolo” esalemaki na mobu 29 T.B. ntango Yesu azwaki batisimo mpe Yehova andimaki ete ye nde akokóma mbeka ya kokoka. (Ebr. 10:5-10) Nsima ya liwa mpe lisekwa na ye, Yesu akɔtaki na Esika oyo Eleki Bosantu ya tempelo ya elimo mpe alakisaki motuya ya mbeka na ye “liboso ya Nzambe mpenza.”​—Ebr. 9:11, 12, 24.

Na mokanda mosusu, ntoma Paulo akomaki ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali “komata mpo na kokóma tempelo mosantu ya Yehova.” (Ef. 2:20-22) Tempelo yango ezali kaka “hema ya solosolo” oyo ayaki kolobela na nsima, na mokanda na ye epai ya Baebre? Basaleli ya Yehova bakanisaki bongo na boumeli ya bambula. Bazalaki kokanisa ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazalaki kobongisama awa na mabele mpo bákóma “mabanga” ya tempelo ya Yehova oyo ezali na likoló.​—1 Pe. 2:5.

Nzokande, pene ya 1971, bamonisi ya moombo ya sembo babandaki kososola ete tempelo oyo Paulo alobelaki na mokanda ya Baefese ekokaki te kozala tempelo monene ya elimo. Soki “hema ya solosolo” ezalaki nde bakristo batyami mafuta na elimo oyo basekwi, boye hema yango elingaki kobanda kosalema nsima ya lisekwa na bango oyo ebandaki na ntango ya “kozala ya Nkolo.” (1 Tes. 4:15-17) Kasi ntango alobelaki tabernakle, Paulo akomaki boye: “Hema yango mpenza ezali ndakisa mpo na ntango oyo etyamá oyo ekoki sikoyo.”​Ebr. 9:9.

Nsima ya kokokanisa na likebi bavɛrsɛ yango mpe bavɛrsɛ mosusu, emonanaki polele ete tempelo ya elimo ezali kotongama te mpe ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali te “mabanga” oyo ezali kobongisama awa na mabele mpo na kokɔta na tempelo yango. Kasi, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali nde kosala na lopango mpe na Esika Mosantu ya tempelo ya elimo; bazali kopesa Nzambe “mbeka ya lisanzoli” mokolo na mokolo.​—Ebr. 13:15.

[Elilingi na lokasa 23]

Ndenge nini tokoki kokolisa boyebi na biso ya “makambo mozindo ya Nzambe”?