Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Luká libateli na kati ya basaleli ya Nzambe

Luká libateli na kati ya basaleli ya Nzambe

 Luká libateli na kati ya basaleli ya Nzambe

“Nakokumisa yo na kati ya lisangá monene.”​—NZ. 35:18.

1-3. (a) Nini ekoki komema bakristo mosusu na likama ya elimo? (b) Epai wapi basaleli ya Nzambe bakoki kozwa libateli?

NTANGO bazalaki na konje, Joe ná mwasi na ye balataki masque ya kopemela mpe bazindaki na nse ya mai oyo etondi na mbisi ya langi mpe minene ndenge na ndenge. Bakitaki lisusu na nse koleka mpo na kotala malamu. Ntango bakitaki mpenza na nse esika mai ezali mozindo mingi, mwasi ya Joe alobaki boye: “Nakanisi tozali kokende mosika mingi.” Joe azongisaki ete: “Kobanga te. Nayebi oyo nazali kosala.” Joe azali kokanisa lisusu ndenge, nsima ya mwa ntango, amitunaki: ‘Mbisi nyonso ekei wapi?’ Ntango ayebaki ntina oyo mbisi ezalaki lisusu komonana te, ayokaki nsɔmɔ. Na mozindo wana, requin moko ezalaki koya liboso na ye. Akokaki kosala eloko te. Ntango requin ekómaki na mɛtrɛ soki moko mpamba liboso na ye, ebalukaki mpe ekendaki nzela mosusu.

2 Mokristo akoki kobendama mingi na bisengo ya mokili ya Satana​—kominanola, mosala, biloko ya mokili—​kozanga ayeba ete azali kozinda tii esika likama ezali. Joe azali nkulutu na lisangá mpe alobi boye: “Likambo wana etindaki ngai nakanisa baninga nini tozali na bango. Tosengeli kobɛta mai na esika oyo ezali na likama te mpe ezali malamu​—na lisangá!” Kobɛta mai te na esika oyo ezali mozindo makasi, epai okoki kotikala yo moko mosika na lisangá mpe kokutana na likama. Soki esalemi ete okómi kuna, zongá nokinoki na esika oyo likama ezali te. Soki te, okoki kolyama na elimo.

3 Lelo, mokili ezali esika ya likama mpo na bakristo. (2 Tim. 3:1-5) Satana ayebi ete mikolo na ye etikali ya kotánga, mpe azali koluka kolya baoyo bazali ekɛngɛ te na elimo. (1 Pe. 5:8; Em. 12:12, 17) Kasi, tozangi libateli te. Yehova apesi basaleli na ye esika ya malamu mpo bábatelama na elimo: lisangá ya bokristo.

4, 5. Bato bayokaka ndenge nini mpo na mikolo oyo ezali koya, mpe mpo na nini?

4 Mokili ezali kobatela mpenzampenza te, ezala na nzoto to na makanisi. Bato mingi bazali koyoka ete bomoi na bango ezali na kimya te mpo koboma bato eleki, mobulu, biloko ezali komata ntalo, mpe mabele mpe mopɛpɛ ezali kobeba. Bobange mpe maladi ezwaka bato nyonso. Ata bato mosusu oyo bazali na misala, na bandako, na mbongo mwa mingi mpe babɛlaka mpambampamba te bakoki komituna soki ekoumela lisusu ntango boni.

5 Makanisi ya bato mingi mpe ezali na kimya te. Likambo ya mawa, bato mingi oyo bazalaki na elikya ya kozwa kimya mpe esengo soki babali mpe basali libota bamoni ete bilikya na bango ekokisami te. Na makambo ya elimo, bato mingi oyo bakendaka na bandako-nzambe babulungani, bazali komituna soki litambwisi oyo bazali kopesa bango ebongi mpenza. Ezali bongo mingimingi ntango bazali komona etamboli ya mbindo ya bakonzi ya mangomba mpe mateya na bango oyo euti na Biblia te. Na yango, bato mingi bazali komona ete likambo mosusu ya kosala ezali te, kaka kotya elikya na siansi to na motema malamu ya baninga na bango bato. Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki bato na mokili bazali koyoka ete bazali mpenza na likama to mpe balingi kutu kokanisa mpenza te bomoi na bango ya mikolo oyo ezali koya.

6, 7. (a) Mpo na nini lolenge oyo basaleli ya Nzambe batalelaka makambo ekeseni na oyo ya bato oyo basalelaka Nzambe te? (b) Tokolobela nini?

 6 Ndenge bato oyo bazali na lisangá ya bokristo batalelaka makambo ekeseni mpenza na ndenge bato oyo bazali na lisangá te batalelaka yango. Atako biso basaleli ya Yehova tokutanaka na makambo mpe mikakatano ndenge moko na bazalani na biso, ndenge oyo tosalaka ntango tokutani na makambo yango ekeseni na oyo ya bango. (Tángá Yisaya 65:13, 14; Malaki 3:18.) Mpo na nini? Mpo na kati ya Biblia, tozali komona ndimbola ya solosolo ya makambo oyo ezali kokómela bato lelo, mpe tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kobunda na makambo mpe mikakatano ya bomoi. Na yango, tomitungisaka koleka ndelo te mpo na mikolo oyo ezali koya. Kozala basambeli ya Yehova ebatelaka biso mpo makanisi oyo ebongi te mpe eyokani te na Biblia ekɔtela biso te; ebatelaka biso na misala ya mbindo mpe na mabe oyo ebimisaka. Na yango, bato oyo bazali na lisangá ya bokristo bazali na kimya oyo bato mosusu bazali na yango te.​—Yis. 48:17, 18; Flp. 4:6, 7.

7 Mwa bandakisa ekoki kosalisa biso tómona libateli oyo basaleli ya Yehova bazali na yango na bokeseni na baoyo basalelaka ye te. Bandakisa yango ekoki kotinda biso tótalela makanisi mpe misala na biso, mpe tótala soki esengeli tósalela lisusu malamumalamu toli ya Nzambe, oyo ezali mpo na kobatela biso.​—Yis. 30:21.

“Makolo na ngai ezalaki pene na kolongwa na nzela”

8. Banda kala, esɛngaka basaleli ya Yehova básala nini?

8 Banda kalakala, baoyo baponaki kosalela mpe kotosa Yehova bazalaki koboya kozala baninga ya motema ya bato oyo basalelaka ye te. Kutu, Yehova amonisaki ete bonguna ekozala kati na basambeli na ye mpe baoyo balandaki Satana. (Eba. 3:15) Lokola bakangamaka na mitinda ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye, basaleli ya Nzambe basalaka makambo te lokola bato oyo bazali zingazinga na bango. (Yoa. 17:15, 16; 1 Yoa. 2:15-17) Kosala bongo ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kutu, basaleli mosusu ya Nzambe  bamitunaki soki kozala na bomoi ya komipimela ezali mpenza likambo ya bwanya.

9. Lobelá likambo oyo ezalaki kotungisa mokomi ya Nzembo 73.

9 Mosaleli moko ya Yehova oyo akómaki komituna soki azwaki bikateli ya malamu ezali mokomi ya Nzembo 73, oyo ntango mosusu azalaki mokitani ya Asafe. Mokomi ya nzembo yango amitunaki ntina oyo emonanaka mbala mingi ete bato mabe bazali kolonga, bazali na esengo mpe na bozwi, nzokande bato oyo basalaka milende mpo na kosalela Nzambe bakutanaka na mikakatano mpe bampasi.​—Tángá Nzembo 73:1-13.

10. Mpo na nini mituna oyo mokomi ya nzembo abimisaki ezali na ntina mpo na yo?

10 Osilá komituna mituna lokola oyo mokomi ya nzembo akomaki? Soki ezali bongo, ntina ezali te omiyoka ete omemi ngambo to mpe okanisa ete kondima na yo ezali kosila. Kutu, basaleli mingi ya Nzambe, ata mpe bamosusu oyo Yehova asalelaki mpo na kokoma Biblia, bazalaki na makanisi ya ndenge wana. (Yobo 21:7-13; Nz. 37:1; Yir. 12:1; Hab. 1:1-4, 13) Ya solo, moto nyonso oyo alingi kosalela Yehova asengeli kokanga ntina mpe kondima eyano ya motuna oyo: Kosalela mpe kotosa Nzambe ezali likambo oyo eleki malamu? Motuna yango etali likambo oyo Satana abimisaki na elanga ya Edene. Etali libosoliboso ntembe oyo abɛtelaki lotomo ya Nzambe ya koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba. (Eba. 3:4, 5) Na yango, mokomoko na biso asengeli kotalela motuna oyo mokomi ya nzembo abimisaki. Tosengeli nde kolula bato mabe oyo bamikumisaka, oyo bomoi na bango emonanaka lokola ezangi mikakatano? Tosengeli nde “kolongwa na nzela,” elingi koloba kotika kosalela Yehova mpe komekola bango? Yango nde Satana alingi tósala.

11, 12. (a) Ndenge nini mokomi ya nzembo alongolaki kokakatana oyo azalaki na yango, mpe yango eteyi biso nini? (b) Nini esalisaki yo okóma na makanisi malamu ndenge moko na mokomi ya nzembo?

11 Nini esalisaki mokomi ya nzembo alongola kokakatana oyo azalaki na yango? Atako andimaki ete akómaki pene na kolongwa na nzela ya boyengebene, makanisi na ye ebongwanaki ntango akɔtaki na “esika mosantu monene ya Nzambe”​—elingi koloba, ntango akendaki na tabernakle to tempelo ya Nzambe epai asanganaki na basaleli mosusu ya Yehova oyo batyaka losambo na ye na esika ya liboso mpe ntango akanisaki mokano ya Nzambe. Na nsima, mokomi ya nzembo amonaki polele ete alingi te kosuka ndenge moko na basali-mabe. Amonaki ete nzela mpe bikateli oyo bazalaki kozwa na bomoi etyaki bango na “mabele ya mosɛlu.” Mokomi ya nzembo amonaki ete bato nyonso oyo batikaki Yehova mpo na etamboli ya mbindo bakosuka mabe na “makambo ya nsɔmɔ ya pwasa” oyo ekokómela bango; nzokande baoyo basalelaka Yehova bakozwa lisungi na ye. (Tángá Nzembo 73:16-19, 27, 28.) Na ntembe te, osili komona ete maloba yango ezali solo. Mpo na bato mingi, koluka kaka matomba na bango moko kozanga kotya likebi na mibeko ya Nzambe ekoki komonana malamu, kasi ndenge ya kokima mabe oyo yango ebimisaka ezalaka te.​—Gal. 6:7-9.

12 Liteya mosusu nini tozwi na likambo ya mokomi ya nzembo? Azwaki libateli mpe bwanya ntango azalaki elongo na basaleli ya Nzambe. Akómaki na makanisi ya malamu mpe oyo ebongi ntango akendaki na esika oyo bazalaki kosambela Yehova. Ndenge moko mpe lelo, tokoki kozwa bapesi-toli ya bwanya mpe kolya bilei kitoko ya elimo na makita ya lisangá. Na yango, Yehova ayebi ntina oyo asɛngaka basaleli na ye báyanganaka na makita ya bokristo. Kuna bakozwa makasi mpe bakolendisama mpo na kosala makambo na bwanya.​—Yis. 32:1, 2; Ebr. 10:24, 25.

Poná baninga na yo malamu

13-15. (a) Likambo nini ekómelaki Dina, mpe eteyi biso nini? (b) Mpo na nini kosala boninga na bandeko na biso bakristo ezali libateli?

13 Dina, mwana mwasi ya Yakobo, azali moko ya bato oyo bazwaki mikakatano makasi mpo bazalaki na baninga ya mokili. Lisolo na ye oyo ezali na mokanda ya Ebandeli elobi ete amesanaki kokende kotala bana basi ya Kanana oyo bazalaki esika libota na ye ezalaki kofanda. Bakanana ná basambeli ya Yehova bazalaki  na mibeko ndenge moko te na oyo etali etamboli malamu. Kutu, biloko oyo bato ya arkeoloji bakundolaki emonisi ete nsukansuka etamboli ya Bakanana etondisaki mokili na bango na losambo ya bikeko, pite mpe ekobo, losambo mabe ya binama ya kosangisa nzoto, mpe mobulu. (Kob. 23:23; Lev. 18:2-25; Mib. 18:9-12) Kanisá likambo oyo ekómelaki Dina mpo na boninga oyo asalaki na bato wana.

14 Mobali moko ya mboka yango, Shekeme, oyo Biblia elobi ete azalaki “moto oyo alekaki na lokumu na ndako mobimba ya tata na ye” amonaki Dina “mpe na nsima azwaki ye mpe alalaki na ye mpe abebisaki ye.” (Eba. 34:1, 2, 19) Ezalaki likambo ya mawa mpenza! Dina akokaki mpenza kokanisa ete likambo ya ndenge wana ekokómela ye mokolo mosusu? Mbala mosusu alukaki kaka kozala moninga ya bilenge ya mboka yango, oyo azalaki komona ete bakosala ye mabe te. Nzokande, Dina amikosaki mpenza.

15 Lisolo yango eteyi biso nini? Eteyi biso ete tokoki te kosala boninga na bato ya mokili mpe kokanisa ete mabe moko te ekosalema. Biblia elobi ete “baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Ko. 15:33) Nzokande, kozala moninga ya bato oyo ozali na bango bindimeli moko, mibeko moko na oyo etali etamboli ya malamu, mpe oyo balingaka Yehova lokola yo, ezali libateli. Baninga malamu ndenge wana bakolendisa yo osala makambo na bwanya.​—Mas. 13:20.

“Bosukwami pɛɛ”

16. Ntoma Paulo alobaki nini mpo na bato mosusu ya lisangá ya Korinti?

16 Lisangá ya bokristo esalisi bato mingi bámipɛtola na misala ya mbindo. Ntango ntoma Paulo akomelaki lisangá ya Korinti mokanda ya liboso, alobelaki mbongwana oyo bakristo ya engumba yango basalaki mpo bázala na bomoi oyo eyokani na mitinda ya Nzambe. Basusu bazalaki bato ya pite, basambeli ya bikeko, bato ya ekobo, mibali oyo balalaka na mibali, miyibi, balangwi-masanga, mpe bongo na bongo. Paulo alobaki na bango ete: “Kasi bosukwami pɛɛ.”​—Tángá 1 Bakorinti 6:9-11.

17. Ndenge nini kolanda mitinda ya Biblia ebongoli bomoi ya bato mingi?

17 Bato oyo bazangi kondima bazali na mitinda ya malamu ya ndenge wana te mpo na kotambwisa bango. Baponá nzela na bango moko to mbala mosusu balandaka kaka bilandalanda etamboli ya mbindo, ndenge bato mosusu ya Korinti ya kala bazalaki liboso bákóma bandimi. (Ef. 4:14) Nzokande, boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe mpe makambo oyo akani kosala ezali na nguya ya kobongisa bomoi ya moto nyonso oyo azali kolanda malako oyo euti na Biblia. (Kol. 3:5-10; Ebr. 4:12) Bato mingi oyo bazali lelo na lisangá ya bokristo bakoki koyebisa yo ete liboso báyeba mpe bándima mitinda ya sembo ya Yehova, bazalaki na mibeko te na oyo etali etamboli. Atako bongo, bazalaki kaka mitema likoló mpe bazalaki na esengo te. Bazwaki kimya kaka ntango babandaki kosangana na basaleli ya Yehova mpe koyokanisa bomoi na bango na mitinda ya Biblia.

18. Elenge moko akutanaki na likambo nini, mpe emonisi nini?

18 Nzokande, bato mosusu oyo kala baponaki kobima ‘na mai oyo ezali na likama te,’ elingi koloba batikaki lisangá ya bokristo, bazali lelo koyoka mawa mpo na ekateli oyo bazwaki. Ndeko mwasi moko, oyo tokobenga Tanya, alobi ete “abɔkwamaki na libota oyo ezalaki na solo,” kasi ntango akómaki na mbula 16, atikaki lisangá mpo na “kolanda bisengo ya mokili.” Azwaki bampasi mingi, na ndakisa zemi oyo akanaki te mpe asopaki yango. Lelo alobi boye: “Mbula misato oyo nalekisaki libándá ya lisangá etiká ngai na bampota na motema oyo ekolongwa ata mokolo moko te.  Likambo moko oyo esalaka ngai mpasi tii lelo ezali ete nabomaki mwana na ngai oyo azalaki naino na libumu. . . . Nakoyebisa elenge nyonso oyo azali na mposa ya ‘komeka’ mokili ata mpo na mwa ntango moke ete: ‘Komeka te!’ Na ebandeli, ekoki kozala elɛngi, kasi na nsima, etikaka bololo moko ya koloba te. Mokili ezali na eloko moko te ya kopesa, kaka mpasi. Nayebi, mpo namekaki yango. Tikalá na ebongiseli ya Yehova! Ezali lolenge ya bomoi kaka moko oyo epesaka esengo.”

19, 20. Libateli nini tokoki kozwa na lisangá ya bokristo, mpe ndenge nini?

19 Kanisá ndenge okokóma soki otiki lisangá ya bokristo, esika oyo tobatelami. Soki kaka bakanisi bomoi oyo bazalaki na yango liboso bándima solo, bato mingi bayokaka nsɔmɔ. (Yoa. 6:68, 69) Kotikala penepene na bandeko na biso bakristo, ya mibali mpe ya basi, ekoki kobatela yo na banguna mpe na makambo mabe ya mokili ya Satana. Kosala boninga na bango mpe koyangana na makita ya lisangá ekokundwela yo ntango nyonso ete mitinda ya sembo ya Yehova ezali na bwanya mpe ekolendisa yo otosaka yango na bomoi na yo. Na yango, ezali mpenza na ntina ‘kokumisa Yehova na kati ya lisangá monene,’ ndenge mokomi ya nzembo asalaki.​—Nz. 35:18.

20 Ya solo, mpo na bantina ndenge na ndenge, ekómelaka mokristo nyonso amona ete ezali mpasi abatela bosembo na ye. Ekoki kosɛnga moto asalisa ye azonga na nzela ya malamu. Yo ná bandeko mosusu ya lisangá bokoki kosala nini mpo na kosunga bandeko na bantango ya ndenge wana? Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo okoki ‘kokoba kobɔndisa mpe kolendisa’ bandeko na yo.​—1 Tes. 5:11.

Okopesa eyano nini?

• Mateya nini tozwi na makambo oyo mokomi ya Nzembo 73 akutanaki na yango?

• Likambo oyo ekómelaki Dina eteyi biso nini?

• Mpo na nini okoki kozwa libateli na lisangá ya bokristo?

[Mituna ya boyekoli]

[Bililingi na lokasa 7]

Bɛtá mai na esika oyo ezali na likama te; tikalá na lisangá!