Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yehova alingi bózala “malamu”

Yehova alingi bózala “malamu”

 Yehova alingi bózala “malamu”

NTANGO likambo oyo ekozala na likama monene koleka ekosalema, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akosala nyonso oyo esengeli mpo bato nyonso oyo bandimami na ye ‘bábika.’ (Yoe. 2:32) Nzokande, likambo ya solo ezali ete banda kala, Yehova alingaka kobatela bato na makama. Lokola azali “liziba ya bomoi,” amonaka ete bato nyonso bazali na motuya, babongi kobatelama.​—Nz. 36:9.

Bato ya sembo oyo bazalaki kosalela Nzambe na ntango ya kala bazalaki mpe kotalela bomoi ndenge wana. Ebandeli 33:18 emonisi ete Yakobo ná libota na ye bakómaki “malamu” nsima ya kosala mobembo moko ya likama. Yakobo atyelaki Yehova motema ete akobatela ye, kasi asalaki mpe makambo oyo esengeli mpo na kobatela bato nyonso oyo basalaki mobembo na ye elongo. (Eba. 32:7, 8; 33:14, 15) Soki tozali kosalela mitinda ya Biblia, tokoki komibatela na makama mpe kobatela mpe bato mosusu. Tótala ndenge likambo yango etali bato oyo basalaka mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe misala mosusu ya ndenge wana mpe oyo bapesaka lisungi na ntango ya makama.

Kokeba na makama na Mibeko ya Moize

Mibeko ya Moize elobaki ete na makambo nyonso, basaleli ya Nzambe basengeli kokeba na makama. Na ndakisa, Moyisraele oyo azalaki kotonga ndako asengelaki kotya mwa lopango to efelo ya libateli na nsamba, pembenipembeni. Lokola mbala mingi bato bazalaki kofanda na nsamba ya bandako na bango, mapango to bifelo yango ezalaki kobatela bango mpo bákwea te. (1 Sa. 9:26; Mat. 24:17) Soki likama ebimi mpo mitindo ya kokeba na makama etosamaki te, Yehova azalaki komona ete nkolo ndako yango azali na ngambo.​—Mib. 22:8.

Bitumbu ya Mibeko ezalaki mpe kopesama soki banyama ya mboka ebimisi makama. Soki ngɔmbɛ-mobali ebomi moto na maseke na yango, nkolo na yango asengelaki koboma yango mpo na kobatela bato mosusu. Lokola akokaki te kolya mosuni ya nyama yango to kotɛkela yango bato mosusu, koboma nyama yango ezalaki mpenza kobungisa eloko moko monene. Bongo soki nyama yango ezokisaki moto, kasi nkolo na yango abatelaki yango te, nini ezalaki kosalema? Soki na nsima ngɔmbɛ-mobali yango ebomi lisusu moto, ná nyama ná nkolo na yango basengelaki kobomama. Mobeko yango ezalaki kotinda moto oyo azalaki na bopɔtu na kobatela banyama na ye akanisa mbala mibale.​—Kob. 21:28, 29.

Mibeko ezalaki mpe kolendisa bato básalelaka bisaleli na ndenge esengeli. Bayisraele mingi bazalaki kosalela basóka (haches) mpo na kokata nkoni. Soki motó ya sóka elongwe na mbalakaka mpe ebomi moto oyo azali pembeni, moto oyo azalaki kokata nkoni asengelaki kokima na engumba ya ekimelo. Asengelaki kotikala kuna tii na liwa ya nganga-nzambe monene; elingi koloba ete moto oyo abomi moninga kozanga kokana akokaki kokabwana na libota na ye mpe na ndako na ye bambula ebele. Ebongiseli yango eteyaki ekólo mobimba  ete bomoi ezali mosantu na miso ya Yehova. Moto oyo azalaki kotalela bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango azalaki kobongisa malamu bisaleli na ye mpe kosalela yango na ndenge oyo ekobimisa makama te.​—Mit. 35:25; Mib. 19:4-6.

Ntango apesaki mibeko ya ndenge wana, Yehova amonisaki polele ete alingaki basaleli na ye bázala na mimeseno ya komibatela na makama, ezala na bandako na bango ezala mpe libándá. Bato oyo bazalaki koboma to kozokisa basusu, ata soki bakanaki yango te, basengelaki kozongisa monɔkɔ epai na ye. Likanisi ya Yehova na likambo etali kokeba na makama ebongwani te. (Mal. 3:6) Tii lelo alingaka bato bákeba noki bámizokisa bango moko mpe bato mosusu. Likambo yango ezali solo mingimingi ntango tozali kotonga to kobongisa  bandako oyo esalelamaka mpo na losambo na ye ya pɛto.

Kokeba na makama na bisika oyo bazali kotonga

Tomonaka ete kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani, mpe babiro ya filiale ezali lokumu monene. Tokoki mpe koloba bongo mpo na mosala oyo tosalaka mpo na kopesa lisungi na bisika oyo makama ebimi. Tolingi ntango nyonso kokokisa mosala na biso na mayele mpo kozanga koyeba mosala malamu, ata soki tozali kosala misala ya mikemike, ekoki kozala likama mpo na biso mpe mpo na basusu. (Mos. 10:9) Ya solo mpenza, soki tokolisi momeseno ya kosala malamu, tokoki kokima makama mingi.

Biblia elobi boye: “Kitoko ya bilenge ezali nguya na bango, mpe nkembo ya mibange ezali nsuki mpɛmbɛ na bango.” (Mas. 20:29) Makasi ya bolenge ezali na ntina mpo na kosala misala ya makasi. Kasi, basali oyo bazali na nsuki mpɛmbɛ​—baoyo baumeli na mosala ya kotonga—​basalaka misala mikemike ya nsuka na mabɔkɔ to na bisaleli na bango. Mpe baoyo bazali lelo mibange basalelaki makasi ya bolenge mpo na kosala misala ya makasi. Soki oyei sika, taláká ndenge bato oyo bamesaná na mosala basalaka, mpe landáká malako na bango. Soki olingi koyekola mosala, bandeko oyo bamesaná na mosala ya kotonga bakoteya yo makambo mingi. Na ndakisa, ndenge ya kosalela malamu bisaleli oyo ekoki kobimisa makama mpe ndenge ya kotombola biloko ya kilo. Boye,  okoyeba kosala malamu, kozanga likama, mpe na esengo.

Bato oyo bazali kosala na esika oyo bazali kotonga basengeli ntango nyonso kozala ekɛngɛ. Makambo ebongwanaka noki. Esika oyo kala ezalaki mabele ya makasi ekoki sikoyo kokóma libulu. Mbala mosusu basali mosusu balongoli eskalye, libaya moko, to katini ya langi. Soki otyaki likebi te, okoki kozwa likama kaka boye. Mbala mingi, mibeko mpo na kosala kozanga likama esɛngaka ete na esika ya mosala, basali balataka biloko na bango ya komibatela. Manɛti ya komibatela, ekɔti ya makasi, mpe sapato ya mosala ekoki kobatela yo na makama mingi na esika oyo bozali kotonga. Kasi, okobatelama kaka soki biloko yango ebebi te mpe olati yango.

Atako bisaleli mingi emonanaka lokola ezali mpasi te kosalela yango, esɛngaka kozwa formasyo mpe komesana na yango mpo osalela yango kozanga likama mpe na mayele. Soki oyebi malamu te ndenge ya kosalela esaleli oyo ozali na yango mposa, yebisá ndeko oyo azali kokamba mosala. Akozwa bibongiseli mpo ozwa formasyo oyo ebongi. Kozala na bopɔlɔ, elingi koloba koyeba esika makoki na yo esuki, ezali ezaleli moko ya malamu mingi. Kutu, osengeli kozala na yango mpo obimisa makama te mpo na yo moko mpe mpo na bato mosusu na esika oyo bozali kotonga.​—Mas. 11:2.

Kokwea ezali likambo oyo ebimisaka makama mingi na mosala ya kotonga. Liboso omata na eskalye to na motalaka (échafaudage), osengeli kotala malamu ete ezali na biloko nyonso oyo ekoki kobatela yo mpe ete ebebi te. Soki osengeli kotɛlɛma likoló ya motalaka to ya nsamba ntango ozali kosala, mibeko ya mosala ekoki kosɛnga olata nsinga oyo ekangisami na eloko mosusu mpo ebatela yo mpo okwea te to mpe bátya mwa lopango mpo ebatela yo. Soki ozali na mituna na ndenge ya kosala na bisika oyo ekosɛnga omata na likoló, tuná ndeko oyo azali kokɛngɛla misala. *

Ndenge motángo ya bato oyo bazali kosalela Yehova ezali kokola na mokili mobimba, ndenge mpe mposa ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe bandako mosusu oyo esalelamaka mpo na kotombola losambo ya pɛto ezali kokola. Bandeko oyo batambwisaka mosala na bisika oyo bazali kotonga Ndako ya Bokonzi mpe bandako mosusu mpo na losambo na biso bazali na mokumba ya kobatela bampate oyo bazali kosala na nse ya bokonzi na bango, bampate oyo bazali na motuya mingi na miso ya Yehova. (Yis. 32:1, 2) Soki ozwi libaku ya kotambwisa bandeko mibali mpe bandeko basi na mosala ya kotonga, kobosana soki moke te ete kokeba na makama ezali na ntina mingi. Talá soki esika oyo bozali kotonga ezali pɛto mpe ete etondi na biloko te. Soki esengeli kokundwela basusu ntina ya kokeba na makama, yebisá bango na boboto kasi polelepolele. Kotika te bilenge to bato oyo bameseni na mosala te bákɔta na bisika oyo makama ekoki kobima mingi. Kanisá liboso makama oyo basali bakoki kokutana na yango, mpe yebisá bango ndenge bakoki kosala mpo makama ebima te. Kobosana te: mokano na biso ezali ya kosilisa mosala kozanga makama.

Ntina ya bolingo

Kotonga Bandako ya Bokonzi mpe bandako mosusu oyo esalelamaka mpo na losambo ya pɛto esɛngaka kosala misala oyo ekoki kobimisa makama. Na yango, baoyo basalaka misala ya ndenge wana basengeli kozala ekɛngɛ. Soki ozali kotosa mitinda ya Biblia, kolanda mibeko oyo etyami mpo na mosala, mpe ozali na bososoli malamu, okokima likama, okobatela mpe bandeko oyo bozali kosala na bango.

Ezaleli nini ya libosoliboso ekotinda biso tóluka mpenza kokeba na makama? Ezali bolingo. Ya solo, bolingo mpo na Yehova etindaka biso tózwa bomoi na motuya, lokola ye. Mpe bolingo mpo na bato epekisaka biso tózala na bopɔtu ntango tozali kosala likambo nyonso oyo ekoki kozala likama mpo na bango. (Mat. 22:37-39) Na yango, tósala nyonso mpo bato oyo bazali kosala mosala ya kotonga bázala “malamu.”

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 14 Talá etanda “Ndenge ya kosala na baeskalye na ekɛngɛ” na lokasa 30.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 30]

Ndenge ya kosala na baeskalye na ekɛngɛ

Kala mingi te, na mbula moko na États-Unis, basali koleka 160 000 bazokaki mpo bakweaki na baeskalye. Longola yango, basali soki 150 bakufaki mpo bakweaki ndenge wana. Ata soki ofandi wapi to osalaka esika nini, talá malako oyo ekoki kosalisa yo mpo okwea te na eskalye.

◇ Kosalela eskalye oyo ezali koningananingana to oyo ebebá te, mpe kobongisa eskalye ya ndenge wana te. Kosalela yango lisusu te.

◇ Eskalye nyonso ezalaka na kilo oyo ekoki komema. Talá malamu soki kilo na yo bakisá kilo ya biloko na yo ya mosala eleki te kilo oyo eskalye ekoki komema.

◇ Tyá eskalye na esika oyo ezali patatalu mpe makasi. Kotɛlɛmisa yango te na esika oyo ekoki koningana, na ndakisa likoló ya motalaka (échafaudage), ya bakatini to ya bakɛsi.

◇ Ntango nyonso, miso na yo etalana na eskalye, ezala ntango ozali komata to kokita.

◇ Kotɛlɛma te mpe kofanda te na matambe mibale ya nsuka ya eskalye.

◇ Ntango ozali kosalela eskalye mpo na komata to kokita na nsamba to na esika oyo ezali likoló, eskalye esengeli kozala na molai ya mɛtrɛ soki moko longwa na nsamba to na esika oyo yango efandi. Mpo makolo ya eskalye eningana te, kangá yango na bansinga to kangisá yango na mabaya. Soki okokoka kosala bongo te, sɛngá moto mosusu asimbela yo yango ntango ozali kosala likoló na yango. Kangisá malamu eskalye na likoló mpo eselumwa te.

◇ Kofandisa mabaya ya motalaka ya mosala likoló ya matambe ya eskalye te.

◇ Soki otomboli mabɔkɔ to makolo na yo ntango ozali kosala na likoló, eskalye ekoki koningana. Kosala bongo te mpo ezali likama. Pusáká ntango nyonso eskalye pene ya esika oyo ozali kosala mosala.

◇ Soki esɛngi otya eskalye liboso ya porte oyo ekangami, tyá mwa elembo na porte mpe kangá porte yango na fungola. Soki mwaye ya kokanga porte na fungola ezali te, tyá moto moko wana mpo akebisaka bato oyo balingi koleka.

◇ Kaka moto moko nde asengeli komata na eskalye, lobá kaka soki esalemá mpo na bato mibale. *

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 33 Okoki komona makambo mosusu oyo osengeli koyeba mpo na ndenge ya kosalela eskalye na Lamuká! ya 8 Augusto 1999, nkasa 22-24, na Lifalanse.

[Elilingi na lokasa 29]

Mibeko ya Moize esɛngaki ete nsamba ezala na efelo ya libateli, pembenipembeni