Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 LISOLO YA BOYEKOLI 35

Yehova azwaka na motuya basaleli na ye ya komikitisa

Yehova azwaka na motuya basaleli na ye ya komikitisa

“Yehova . . . amonaka moto ya komikitisa.”​—NZ. 138:6.

LOYEMBO 48 Tótambola na Yehova mokolo na mokolo

NA MOKUSE *

1. Ndenge nini Yehova atalelaka bato ya komikitisa? Limbolá.

YEHOVA alingaka bato ya komikitisa. Kaka bato oyo bazali mpenza na komikitisa nde bakoki kozala baninga na ye ya motema. Kasi, “moto ya lolendo, [Yehova] ayebaka ye kaka na mosika.” (Nz. 138:6) Biso nyonso tolingaka kosepelisa Yehova mpe kozala baninga na ye; yango wana tolingaka koyekola kozala na komikitisa.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Na lisolo oyo, tokopesa biyano na mituna misato oyo elandi: (1) Komitikisa elimboli nini? (2) Mpo na nini tosengeli kolona ezaleli ya komikitisa? (3) Makambo nini ekoki komeka komikitisa na biso? Ndenge tokomona yango, soki toloni ezaleli ya komikitisa, tokosepelisa motema ya Yehova mpe biso moko tokozwa matomba.​—Mas. 27:11; Yis. 48:17.

KOMIKITISA ELIMBOLI NINI?

3. Komikitisa elimboli nini?

3 Komikitisa elimboli kozala na lolendo te mpe komitombola te. Biblia emonisi ete moto ya komikitisa amonaka ete boyokani na ye na Yehova Nzambe mpe basusu nde likambo eleki ntina. Moto ya komikitisa andimaka ete moto nyonso aleki ye ata na likambo moko boye.​—Flp. 2:3, 4.

4-5. Mpo na nini tokoki koloba ete komikitisa ya solosolo ezali kaka te ndenge oyo moto amonanaka na libándá?

4 Bato mosusu bakoki komonana lokola bazali na komikitisa. Mbala mosusu balobaka mingi te to bazalaka nsɔninsɔni. Mbala mosusu mpe bamonisaka limemya mpe bonkonde mpo ezali momeseno ya mboka na bango to ndenge oyo babɔkwamá. Kasi, na kati ya motema na bango, bakoki kozala na lolendo makasi. Kendekende, bomoto na bango ya solosolo eyaka komonana polele.​—Luka 6:45.

 5 Nzokande, bato mosusu bazalaka bibangabanga te, balobaka makambo polele mpe bayebi makambo mingi, kasi yango elimboli te ete bazali bato ya lolendo. (Yoa. 1:46, 47) Atako bongo, bato ya ndenge wana basengeli kokeba ete bátya motema te na makoki oyo bazali na yango. Tózala bato oyo balobaka makambo polele to bato ya nsɔninsɔni, biso nyonso tosengeli koluka kokolisa ezaleli ya komikitisa na mitema na biso.

Ntoma Paulo azalaki moto ya komikitisa (Talá paragrafe 6) *

6. Na kotalela 1 Bakorinti 15:10, ndakisa ya ntoma Paulo ekoki koteya biso nini?

6 Tótalela ndakisa ya ntoma Paulo. Yehova asalelaki ye mingi mpo na kofungola masangá ya sika na bingumba ndenge na ndenge. Ekoki kozala ete ye nde asalaki mingi na mosala ya kosakola koleka bantoma nyonso ya Yesu Kristo. Kasi, ntoma Paulo amitombolaki te likoló ya bandeko na ye bakristo. Na komikitisa nyonso, alobaki ete: “Nazali moto oyo aleki moke mpenza na kati ya bantoma, mpe nabongi kutu te kobengama ntoma, mpamba te nanyokolaki lisangá ya Nzambe.” (1 Ko. 15:9) Na nsima, Paulo alobaki polele ete soki azalaki na boyokani malamu na Yehova, ezalaki te mpo na bizaleli oyo azalaki na yango to mosala oyo asalaki, kasi ezalaki nde mpo na boboto monene ya Nzambe. (Tángá 1 Bakorinti 15:10.) Ntoma Paulo azalaki mpenza moto ya komikitisa. Na mokanda na ye epai ya bakristo ya Korinti​—amikumisaki te, atako mibali mosusu na lisangá yango bazalaki koluka kolakisa ete baleki ye!​—2 Ko. 10:10.

Karl Klein, ndeko ya komikitisa oyo asalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi (Talá paragrafe 7)

7. Ndenge nini ndeko moko oyo azalaki na mikumba minene na mikolo na biso amonisaki komikitisa? Pesá ndakisa.

7 Lelo oyo, basaleli mingi ya Yehova balendisamaka ntango batángaka lisolo ya bomoi ya Ndeko Karl Klein, oyo azaláká na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Na lisolo ya bomoi  na ye, Ndeko Klein andimaki na komikitisa nyonso mikakatano oyo abundanaki na yango mpe mabunga oyo asalaki na bomoi na ye. Na ndakisa, na bambula ya 1920, azalaki komona ete mosala ya kosakola ya ndako na ndako ezali mpasi mingi, yango wana, nsima ya kobima kaka mbala ya liboso, elekaki mbula soki mibale mpo asala yango lisusu. Na nsima, ntango azalaki na Betele, ndeko moko apesaki ye toli, kasi akangelaki ndeko yango nkanda na motema mpo na mwa ntango. Lisusu, abɛlaki maladi ya motó, kasi na nsima ayokaki malamu. Nzokande, azwaki mpe mikumba mingi ya minene na mosala ya Nzambe. Kanisá ndenge esɛngaki komikitisa mpo Ndeko Klein, oyo azalaki na mikumba minene, alobela polele bolɛmbu na ye. Bandeko mingi babosanaka ye te mpe lisolo ya bomoi na ye, oyo ekomamá malamu mpe na bosembo. *

MPO NA NINI TOSENGELI KOLONA EZALELI YA KOMIKITISA?

8. Ndenge nini 1 Petro 5:6 ezali kosalisa biso tómona ete komikitisa esepelisaka Yehova?

8 Ntina monene oyo tosengeli kolona komikitisa ezali ete ezaleli yango esepelisaka Yehova. Ntoma Petro amonisaki yango polele. (Tángá 1 Petro 5:6.) Mpo na kolimbola maloba yango ya Petro, buku “Yaká, landá ngai,” elobi boye: “Lolendo ezali lokola pwazɔ. Makambo oyo yango ebimisaka ezalaka mabe. Lolendo ekoki kosala ete moto ya makoki ata ndenge nini akóma mpamba na miso ya Nzambe. Nzokande, komikitisa ekoki kosala ete ata moto mpamba akóma mpenza na ntina na miso ya Yehova. . . . Akopesa . . . yo mbano mpo na komikitisa na yo.” * Ya solo, kosepelisa motema ya Yehova nde likambo eleki malamu oyo tokoki kosala!​—Mas. 23:15.

9. Mpo na nini basusu bakosepela na biso soki tozali na komikitisa?

9 Soki toloni komikitisa, biso moko mpe tokozwa matomba mingi. Komikitisa ekosala ete bato básepela kozala pene na biso. Mpo na nini? Yo moko kanisá lolenge ya bato oyo osepelaka kozala na bango. (Mat. 7:12) Tosepelaka mpenza te na bato oyo balingaka ete makambo esalema kaka ndenge bango balingi, mpe oyo baboyaka kondima makanisi ya basusu. Kasi, toyokaka malamu kozala na bandeko oyo bayebaka ‘komitya na esika ya bamosusu, bazali na bolingo ya bondeko, bayokelaka basusu mawa mpenza, mpe bazali na komikitisa.’ (1 Pe. 3:8) Soki tosepelaka na  bato ya ndenge wana, na ntembe te bango mpe bakosepela na biso​—soki tozali na komikitisa.

10. Mpo na nini ezalaka mpasi te mpo bato ya komikitisa báyikela mitungisi ya bomoi mpiko?

10 Lisusu, komikitisa ekosalisa biso tóyikela mitungisi ya bomoi mpiko. Na bomoi, tokoki komona makambo oyo emonani ete ezali sembo te. Mokonzi Salomo alobaki: “Namoná basaleli bazali kotambola na bampunda kasi bankumu bazali kotambola na makolo, na mabele, lokola basaleli.” (Mos. 10:7) Yango elimboli ete bato oyo bazali na mayele mingi, bazwaka ntango nyonso te lokumu oyo esengeli. Mpe mbala mosusu bato oyo bazali na mayele mingi te bazwaka lokumu mingi koleka. Kasi, Salomo amonaki ete ezali likambo ya bwanya kondima makambo oyo ezali kosalema, na esika ya kokóma nkandankanda. (Mos. 6:9) Soki tozali na komikitisa, ekozala mpasi te tóndima makambo ya bomoi ndenge ezali, ata soki tosepeli na yango te.

MAKAMBO NINI EKOKI KOMEKA KOMIKITISA NA BISO?

Mpo na nini makambo lokola oyo ekoki komeka komikisa na biso? (Talá paragrafe 11-12) *

11. Mpo na nini tosengeli kozala na komikitisa ntango bapesi biso toli?

11 Mokolo na mokolo, tozalaka na mabaku mingi ya komonisa komikitisa. Tótalela makambo yango mosusu. Ya liboso, ntango bapesi biso toli. Tosengeli koyeba ete soki ndeko moko asali makasi apesa biso toli, mbala mosusu tobandi kolongwa na nzela, kasi tozali koyeba te. Na ntango yango, likanisi ekoki koyela biso mbala moko ete tóboya toli yango. Tokoki kotyola ndeko oyo apesi biso toli to mpe lolenge oyo apesi yango. Kasi soki tozali na komikitisa, tokosala makasi tózongela makanisi oyo ebongi.

12. Na kotalela Masese 27:5, 6, mpo na nini tosengeli kosepela na moto oyo apesi biso toli? Pesá ndakisa.

12 Moto ya komikitisa asepelaka na toli. Tozwa ndakisa. Kanisá ete ozali na makita. Nsima ya kosolola na bandeko ebele, ndeko moko abendi yo pembeni mpe ayebisi yo ete biloko oyo olyaki ekangami yo na mino. Na ntembe te, okoyoka mwa nsɔni. Kasi okosepela te ndenge ayebisi yo yango? Kutu, okomona ete esengelaki bato oyo osololaki na bango liboso báyebisa yo! Ndenge moko mpe, tosengeli kozala na komikitisa mpe kosepela na ndeko oyo azwi mpiko ya kopesa biso toli oyo tosengeli na yango. Tosengeli komona ye moninga na biso, kasi monguna te.​—Tángá Masese 27:5, 6; Gal. 4:16.

Mpo na nini tosengeli kozala na komikitisa ntango basusu bazwi mikumba na lisangá? (Talá paragrafe 13-14) *

13. Ndenge nini tokoki komonisa komikitisa ntango basusu bazwi mikumba na lisangá?

13 Ya mibale, ntango basusu bazwi mikumba na lisangá. Nkulutu moko na nkombo Jason alobi boye: “Ntango namonaka basusu bazali  kozwa mikumba, ntango mosusu namitunaka: Mpo na nini ngai te?” Ekómelá yo mpe omiyoka bongo? Ezali mabe te “koluka” kozwa mikumba na lisangá. (1 Tim. 3:1) Kasi, tosengeli kokeba na makanisi na biso. Soki tokebi te, tokoki kobanda kokolisa lolendo na kati ya motema na biso. Na ndakisa, ndeko mobali mosusu akoki kobanda kokanisa ete ye nde abongi mpenza kozwa mokumba moko boye. To ndeko mwasi moko akoki kokanisa ete: ‘Mobali na ngai akokokisa mokumba oyo malamu koleka ndeko songolo!’ Nzokande, soki tozali mpenza na komikitisa, tokoboya makanisi wana ya lolendo.

14. Ndenge oyo Moize asalaki ntango basusu bazwaki mikumba ezali koteya biso nini?

14 Ndenge Moize asalaki ntango basusu bazwaki mikumba ekoki koteya biso. Moize azalaki kosepela mingi na mokumba na ye ya kokamba ekólo Yisraele. Moize asalaki nini ntango Yehova apesaki mpe basusu likoki ya kosala makambo mosusu oyo azalaki kosala? Moize ayokaki zuwa te. (Mit. 11:24-29) Lisusu, amonisaki komikitisa na ndenge andimaki ete basusu básalisa ye na mosala ya kosambisa bato. (Kob. 18:13-24) Likambo yango ezalaki malamu mpo Bayisraele bazwaki bato mingi oyo bakokaki kosambisa makambo, na esika bázela kaka Moize. Yango emonisi ete Moize azalaki koluka liboso kosalisa basusu, kasi te kozala na mikumba mingi. Ezali mpenza ndakisa malamu mpo na biso! Tóbosana te ete mpo Yehova asalela biso malamu, tosengeli kotya komikitisa na esika ya liboso, mayele na biso na nsima. Biblia elobi, “Yehova atombwani, mpe atako bongo amonaka moto ya komikitisa.”​—Nz. 138:6.

15. Mbongwana nini esalemi na bomoi ya bandeko mingi?

15 Ya misato, ntango makambo ebongwani. Na bambula oyo eleki, bandeko oyo basali mingi na mosala ya Yehova batikaki mikumba na bango. Na ndakisa, na 2014, mokumba ya mokɛngɛli ya etúká esilaki, mpe basɛngaki bakɛngɛli  ya etúká ná basi na bango básala lolenge mosusu ya mosala ya ntango nyonso. Lisusu, kobanda na mbula yango, ebongiseli ya Yehova ezwaki ekateli ete soki mokɛngɛli ya zongazonga akokisi mbula 70, asengeli kotika mokumba yango. Mpe ndeko mobali oyo akokisi mbula 80 to koleka akosala lisusu te lokola mokambi misala ya bankulutu na lisangá. Lisusu, eleki mwa bambula, babimisaki bandeko ebele na Betele mpo bázongela mosala ya mobongisi-nzela. Bandeko mosusu basengelaki kotika mikumba oyo bazalaki na yango na mosala ya ntango nyonso mpo na maladi, mikumba ya libota, to makambo mosusu ya bomoi.

16. Ndenge nini bandeko na biso bamonisi komikitisa mpo na komesana na makambo ya sika?

16 Komesana na mbongwana yango ezalaki pɛtɛɛ te mpo na bandeko yango. Emonani ete bazalaki kaka kokanisa mokumba na bango ya kala, mpe mpo na bandeko mingi, ezalaki mokumba oyo bakokisaki bambula ebele. Bandeko mosusu bazalaki na mawa mingi ntango bazalaki komesana na bomoi na bango ya sika. Kasi nsukansuka, bamesanaki. Nini esalisaki bango? Balingaki libosoliboso Yehova. Bayebaki ete bamipesaki nde na Nzambe, kasi te na mosala, na titre, to mokumba moko boye. (Kol. 3:23) Na komikitisa nyonso, bazali kokoba kosalela Yehova na esengo esika nyonso oyo bazali. Bazali “kobwakela ye mitungisi” na bango mpo bayebi ete atyelaka bango likebi.​—1 Pe. 5:6, 7.

17. Mpo na nini tozali na botɔndi ndenge Liloba ya Nzambe elendisaka biso tólona ezaleli ya komikitisa?

17 Tozali mpenza na botɔndi ndenge Liloba ya Nzambe elendisi biso tólona ezaleli ya komikitisa. Soki toloni ezaleli yango ya ntina mingi, tokozala na esengo mpe basusu bakosepela na biso. Ekosalisa biso tóyika mpiko na mitungisi ya bomoi. Oyo eleki ntina, tokozala baninga ya Tata na biso ya likoló, Yehova. Tozali mpenza na esengo koyeba ete atako azali “Moto oyo azali likoló mpe Moto oyo atombwani,” alingaka basaleli na ye oyo bazali na komikitisa mpe azwaka bango na motuya!​—Yis. 57:15.

LOYEMBO 45 Komanyola ya motema na ngai

^ par. 5 Moko ya bizaleli ya ntina mingi oyo tosengeli kokolisa ezali komikitisa. Komikitisa elimboli nini? Mpo na nini tosengeli kolona komikitisa? Na ndenge nini mbongwana oyo esalemi na bomoi na biso ekoki komeka komikitisa na biso? Lisolo oyo ekopesa biyano na mituna yango ya ntina mingi.

^ par. 7 Talá lisolo “Jéhovah m’a traité d’une manière salutaire,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/1985, na Français, mpe lisolo “Yehova asaleli ngai boboto mingi!” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2001.

^ par. 8 Talá mok. 3, par. 23.

^ par. 53 ELILINGI: Na ndako ya ndeko moko, ntoma Paulo azali kosolola na bandeko na komikitisa nyonso, ata mpe bana mike.

^ par. 57 ELILINGI: Ndeko moko oyo akoli azali kondima ndeko mosusu ya elenge apesa ye toli.

^ par. 59 ELILINGI: Ndeko moko ya mokóló ayoki zuwa te mpo na mikumba oyo ndeko mosusu ya elenge azwi na lisangá.