Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Komipekisa—​Ezali na ntina mpo Nzambe andima biso

Komipekisa—​Ezali na ntina mpo Nzambe andima biso

“Ntango ndeko na ngai ya mobali abundisaki ngai, nakangaki ye na nkingo, mpe nafinaki ye. Nalingaki naboma ye.”​—Paul.

“Na ndako, nazalaki kosilika mpambampamba. Nazalaki kopanza eloko nyonso oyo ezali na lobɔkɔ na ngai, ezala biloko ya kosakana.”​—Marco.

Mingi kati na biso tosalaka ndenge wana te. Kasi, biso nyonso tozalaka na mokakatano ya komipekisa na bantango mosusu. Ntina ya liboso, ezali mpo na ezaleli ya kozanga kokoka oyo tozwá epai ya Adama. (Rom. 5:12) Lokola Paul mpe Marco, bato mosusu bazalaka na mokakatano ya komipekisa. Basusu bakokaka te kopekisa makanisi na bango. Na ndakisa, bakanisaka mingi makambo oyo ebangisaka mpe oyo elɛmbisaka bango nzoto. Basusu bazalaka na mokakatano mpo na koboya kosala pite, kolangwa masanga, to kosalela drɔgɛ.

Bato oyo bakokaka te kopekisa makanisi, bamposa, mpe misala na bango bakoki kobebisa bomoi na bango. Kasi tokoki kokima likama yango. Ndenge nini? Soki toloni ezaleli ya komipekisa. Mpo na kosala yango, tólobela mituna misato oyo elandi: (1) Komipekisa elimboli nini? (2) Mpo na nini ezali na ntina? (3) Mpe ndenge nini tokoki kolona ezaleli yango oyo ezali moko ya bizaleli ya “mbuma ya elimo?” (Ga. 5:22, 23) Na nsima, tokolobela oyo tokoki kosala soki tozangi ezaleli yango.

KOMIPEKISA ELIMBOLI NINI?

Moto oyo azali na komipekisa, akokisaka te mposa nyonso oyo eyeli ye. Kutu aboyaka koloba to kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe te.

Yesu amonisaki na ndenge ya polele soki komipekisa elimboli nini

Yesu amonisaki soki komipekisa elimboli nini. Biblia elobi ete: “Ntango azalaki konyokwama, azalaki kokanela moto te, kasi azalaki ntango nyonso komitika na mabɔkɔ ya moto oyo asambisaka na bosembo.” (1 Pe. 2:23) Yesu amonisaki ezaleli yango ntango banguna bazalaki kosɛka ye liboso akufa na nzete ya mpasi. (Mat. 27:39-44) Amonisaki ezaleli yango liboso, ntango bakonzi ya mangomba bazalaki kotuna ye mituna ebele mpo na kotinda ye aloba likambo moko ya mabe. (Mat. 22:15-22) Kanisá mpe ndakisa oyo atikaki ntango Bayuda mosusu basilikaki mpe balɔkɔtaki mabanga mpo na kobamba ye? Na esika asala bango mabe, “Yesu abombanaki mpe abimaki na tempelo.”​—Yoa. 8:57-59.

Mbala mosusu, tokoki mpe komekola ndakisa ya Yesu. Ntoma Petro akomaki boye: “Kristo mpe anyokwamaki mpo na bino, atikeli bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Pe. 2:21) Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kolanda malamumalamu ndakisa ya Yesu ya komipekisa. Yango ezali na ntina nini?

KOMIPEKISA EZALI NA NTINA NINI?

Komipekisa ezali na ntina mpo na kosepelisa Yehova. Ata soki tozali kosalela Yehova na  bosembo banda bambula mingi, tokoki kobebisa boyokani na biso na ye soki topekisi te maloba to misala na biso.

Tólobela Moize, oyo “azalaki na komikitisa mingi koleka bato nyonso oyo bazalaki na mabele.” (Mit. 12:3) Nsima ya kokanga motema na kolelalela ya Bayisraele bambula mingi, mokolo moko Moize azangaki komipekisa. Asilikaki ntango bamilelalelaki lisusu ndenge bazangaki mai. Na nkanda nyonso, alobaki na bango boye: “Bóyoka, sikoyo, bino batomboki! Tóbimisela bino mai na libanga oyo?”​—Mit. 20:2-11.

Moize azangaki komipekisa. Apesaki Yehova lokumu te ndenge abimiselaki bango mai na ndenge ya likamwisi. (Nz. 106:32, 33) Mpo na yango, Yehova apesaki Moize libaku te ya kokɔta na mokili oyo alakaki bango. (Mit. 20:12) Ekoki kozala ete liboso akufa, Moize ayokaki mawa ndenge azangaki komipekisa.​—Mib. 3:23-27.

Yango eteyi biso nini? Ata soki tozali kosalela Yehova banda bambula mingi, tosengeli te koloba mabe mpo na baoyo bapesi biso nkanda to mpo na baoyo basengeli kosembolama. (Ef. 4:32; Kol. 3:12) Ntango mbula na biso ezali kopusana, ekoki kozala mpasi tómonisa motema molai na bantango mosusu. Kasi tókanisa lisusu Moize. Tokolinga soki moke te kobebisa lokumu na biso epai ya Yehova mpo tozangi komipekisa. Tokoki kosala nini mpo tólona ezaleli yango ya ntina mingi?

NDENGE YA KOLONA EZALELI YA KOMIPEKISA

Bondelá mpo na kosɛnga elimo santu. Mpo na nini? Mpo komipekisa ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe, mpe Yehova apesaka elimo na ye na baoyo basɛngaka ye yango. (Luka 11:13) Na nzela ya elimo na ye, Yehova akoki kopesa biso nguya oyo esengeli mpo na komonisa ezaleli ya komipekisa. (Flp. 4:13) Akoki mpe kosalisa biso tólona bizaleli mosusu ya mbuma ya elimo na ndakisa, bolingo; ezaleli oyo ekosalisa biso tómonisa komipekisa.​—1 Ko. 13:5.

Boyá eloko nyonso oyo ekoki kolɛmbisa ezaleli na yo ya komipekisa

Boyá eloko nyonso oyo ekoki kolɛmbisa ezaleli na yo ya komipekisa. Na ndakisa, boyá basite internet ya mabe mpe masano ya mbindo. (Ef. 5:3, 4) Kutu, tosengeli koboya eloko nyonso oyo ekotinda biso tósala oyo ezali mabe. (Mas. 22:3; 1 Ko. 6:12) Na ndakisa, moto oyo azali kobunda mpo na koboya kosala pite, asengeli koboya kotánga babuku mpe kotala bafilme oyo elobeli makambo ya bolingo.

 Ekoki kozala mpasi kosalela toli yango. Kasi, soki tosali milende, Yehova akoki kopesa biso nguya oyo tosengeli na yango mpo tómipekisa. (2 Pe. 1:5-8) Akosalisa biso tópekisa maloba, makanisi, mpe makambo oyo tosalaka. Mpo na yango, Paul mpe Marco oyo tolobelaki na ebandeli basalaki makasi bátika kosala makambo na ndenge ya mobulu. Tólobela mpe ndeko mobali moko mokumbi-motuka, oyo azalaki kosilikela ata mpe koswanisa bakumbi-mituka mosusu. Asalaki nini mpo na kotika ezaleli yango? Alobi boye: “Nazalaki kobondela mingi mokolo na mokolo. Nayekolaki masolo oyo elobeli komipekisa mpe nakangaki na motó mwa bavɛrsɛ oyo ekokaki kosalisa ngai. Atako nazali kosala bongo esili koleka bambula mingi, namonaka ete ezali na ntina nabanda mokolo na mokano ya kobatela kimya. Na nsima, nalongwaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kokende na esika oyo nalingi kokende. Yango esalaka ete nasala makambo mbangumbangu te.”

SOKI TOZALI KOKOKA KOMONISA KOMIPEKISA TE

Na bantango mosusu, biso nyonso tozangaka komipekisa. Na ntango yango, tokoki koyoka nsɔni mpo na kobondela Yehova. Kasi, ekoki kosɛnga ete na ntango ya boye nde tóbondela mingi. Yango wana, bondelá Yehova mbala moko. Sɛngá ye alimbisa yo, asalisa yo, mpe zwá ekateli ya kozongela lisusu te libunga ya ndenge wana. (Nz. 51:9-11) Kokanisa te ete Yehova akoboya koyoka libondeli na yo oyo euti mpenza na motema. (Nz. 102:17) Kutu, ntoma Yoane akundweli biso ete makila ya Mwana ya Nzambe “ezali kopɛtola biso na lisumu nyonso.” (1 Yoa. 1:7; 2:1; Nz. 86:5) Kobosana te ete Yehova asɛngi basaleli na ye bálimbisaka mbala na mbala. Yango wana, tokoki kotya motema ete akosala mpe bongo mpo na biso.​—Mat. 18:21, 22; Kol. 3:13.

Ntango Moize abungisaki ezaleli na ye ya komipekisa mpo na mwa ntango na esobe, Yehova asepelaki te. Atako bongo, Yehova alimbisaki Moize. Mpe Liloba ya Nzambe elobeli Moize lokola moto ya sembo oyo tosengeli komekola. (Mib. 34:10; Ebr. 11:24-28) Yehova apesaki Moize nzela te ya kokɔta na mokili oyo alakaki. Kasi, akopesa ye likoki ya kozala na bomoi libela na libela na paradiso awa mabele. Tokoki mpe kozala na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele soki tosali makasi tókolisa komipekisa, ezaleli wana ya ntina mingi.​—1 Ko. 9:25.