LISOLO YA BOYEKOLI 11
Okoki mpo na kozwa batisimo?
“Eloko oyo . . . ezali mpe sikoyo kobikisa bino, elingi koloba, batisimo.”—1 PE. 3:21.
LOYEMBO 28 Tózala baninga ya Yehova
NA MOKUSE *
1. Moto oyo akani kotonga ndako asengeli kosala nini liboso?
KANISÁ ete moto moko akani kotonga ndako, mpe ayebi lolenge ya ndako oyo alingi kotonga. Asengeli kokende mbala moko na zando kosomba mwa bisaleli mpe kobanda kotonga? Te. Liboso abanda, asengeli kosala likambo moko ya ntina mingi: asengeli koyeba oyo mosala yango ekosɛnga ye. Mpo na nini? Mpo ayeba soki azali na mbongo oyo ekoki mpo na kosilisa ndako yango. Soki akanisi malamumalamu mbongo oyo ekosɛnga, na ntembe te akolonga kotonga ndako na ye tii na nsuka.
2. Na kotalela Luka 14:27-30, nini osengeli kokanisa malamu liboso ya kozwa batisimo?
2 Bolingo mpe botɔndi na yo mpo na Yehova etindi yo okana kozwa batisimo? Soki ɛɛ, yebá ete ekateli oyo olingi kozwa ezali lokola ya moto oyo akani kotonga ndako. Mpo na nini tokoki koloba bongo? Talá maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 14:27-30. (Tángá.) Yesu azalaki komonisa soki kozala moyekoli na ye elimboli nini. Mpo na kozala moyekoli na ye, tosengeli kondima oyo mokumba yango esɛngi, elingi koloba mikakatano mpe makambo oyo tosengeli komipimela. (Luka 9:23-26; 12:51-53) Na yango, liboso ozwa batisimo, osengeli kokanisa malamu makambo nyonso oyo yango esɛngi. Na ndenge yango, okozala moto oyo amibongisi malamu mpo na kosalela Nzambe na bosembo lokola mokristo oyo azwá batisimo.
3. Tokotalela nini na lisolo oyo?
3 Ebongi mpenza kosala nyonso oyo esengeli mpo na kokóma moyekoli ya Kristo? Ɛɛ. Kozwa batisimo ememaka ebele ya mapamboli, ezala sikoyo to mpe na mikolo oyo ezali koya. Tótalela
mwa mituna ya ntina mingi oyo etali batisimo. Mituna yango ekosalisa yo oyanola na motuna oyo: “Nakoki mpo na kozwa batisimo?”MAKAMBO OYO OSENGELI KOYEBA NA OYO ETALI KOMIPESA MPE BATISIMO
4. (a) Komipesa na Yehova elakisi nini? (b) ‘Komiboya’ oyo Matai 16:24 elobeli, elimboli nini?
4 Komipesa ezali nini? Liboso ozwa batisimo, osengeli komipesa. Komipesa elimboli kosala libondeli na motema mobimba epai ya Yehova, mpe koyebisa ye ete opesi ye bomoi na yo mpo na kosalela ye libela na libela. Ntango omipesi na Nzambe, ‘omiboyi.’ (Tángá Matai 16:24.) Soki osali bongo, okómi moto ya Yehova, mpe yango ezali lokumu monene. (Rom. 14:8) Oyebisi ye ete kobanda mokolo yango, okotya makanisi nyonso na kosalela ye, kasi te na koluka komisepelisa. Soki osali libondeli ya komipesa elimboli ete osali elako, to opesi Nzambe elaka. Yehova asɛngi biso na makasi te ete tósala elako yango. Kasi, ntango tosali yango, azelaka ete tókokisa yango.—Nz. 116:12, 14.
5. Bokeseni nini ezali kati na komipesa mpe batisimo?
5 Bokeseni nini ezali kati na komipesa mpe batisimo? Komipesa esalemaka na miso ya bato te; etali kaka moto ye moko ná Yehova. Batisimo esalemaka na miso ya bato, mbala mingi na liyangani ya zongazonga to ya etúká. Ntango ozwi batisimo, omonisi basusu ete osilaki komipesa na Yehova. * Na yango, batisimo na yo ekosalisa basusu báyeba ete olingi Yehova Nzambe na yo na motema mpe na molimo na yo mobimba, na makanisi mpe na makasi na yo nyonso, mpe ete ozwi ekateli ya kosalela ye libela na libela.—Mrk. 12:30.
6-7. Na kotalela 1 Petro 3:18-22, wapi ntina mibale oyo moto asengeli kozwa batisimo?
6 Esengeli kaka kozwa batisimo? Talá maloba oyo ezali na 1 Petro 3:18-22. (Tángá.) Ndenge kaka masuwa ezalaki komonisa bato polele ete Noa azalaki na kondima epai ya Nzambe, batisimo na yo ekomonisa bato polele ete omipesi na Yehova. Kasi, esengeli kaka kozwa batisimo? Ɛɛ. Petro amonisaki ntina oyo ezali bongo. Ya liboso, batisimo ‘ezali kobikisa.’ Batisimo ekoki kobikisa biso soki tozali komonisa na misala na biso ete tondimeli Yesu, mpe tondimi ete akufaki mpo na biso, asekwaki mpe akendaki na likoló, mpe ete sikoyo azali “na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.”
7 Ya mibale, batisimo epesaka moto “lisosoli ya malamu.” Ntango tomipesi na Nzambe mpe tozwi batisimo, tokómi na boyokani ya penepene na ye. Lokola tobongoli mpenza motema mpe tomonisi kondima na lisiko, Nzambe alimbisi masumu na biso. Na yango, tokoki kozala na lisosoli ya malamu liboso na ye.
8. Nini esengeli kotinda yo ozwa ekateli ya kozwa batisimo?
8 Nini esengeli kotinda yo ozwa ekateli ya kozwa batisimo? Boyekoli na yo ya Biblia esalisi yo oyeba makambo mingi oyo etali Yehova—bizaleli na ye mpe ndenge oyo asalaka makambo. Makambo oyo oyekoli na ntina na ye esimbi motema na yo mpe etindi yo olinga ye mingi. Kolinga Yehova nde likambo ya liboso oyo esengeli kotinda yo ozwa ekateli ya kozwa batisimo.
9. Matai 28:19, 20 elobi ete esengeli kozwa batisimo na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu; yango elimboli nini?
9 Likambo ya mibale oyo esengeli kotinda yo ozwa ekateli ya kozwa batisimo ezali mateya ya Biblia oyo oyekoli mpe ondimi. Talá makambo oyo Yesu alobaki ntango apesaki etinda ya kokómisa bato bayekoli. (Tángá Matai 28:19, 20.) Na kotalela maloba ya Yesu, baoyo bazali kozwa batisimo basengeli kosala yango “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” Yango elimboli nini? Yango elimboli ete osengeli kondima na motema mobimba mateya ya Biblia na ntina etali Yehova, Mwana na ye Yesu, mpe elimo santu. Mateya yango ezali na nguya mpe ekoki kosimba mpenza motema na yo. (Ebr. 4:12) Tiká tólobela mwa ndambo ya mateya yango.
10-11. Mateya nini oyo etali Tata oyekoli mpe ondimi?
10 Kanisá mateya ya Biblia oyo oyekoli na ntina etali Tata: ‘Nkombo na ye ezali Yehova,’ azali “Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba,” mpe ye moko nde azali “Nzambe ya solo.” (Nz. 83:18; Yis. 37:16) Azali Mozalisi na biso, mpe “lobiko ezali ya [Ye].” (Nz. 3:8; 36:9) Azwi bibongiseli mpo na kobikisa biso na lisumu mpe na liwa, mpe apesi biso elikya ya bomoi ya seko. (Yoa. 17:3) Soki omipesi na Nzambe mpe ozwi batisimo, ekomonisa ete okómi Motatoli ya Yehova. (Yis. 43:10-12) Okokɔta na libota ya bandeko na mokili mobimba, oyo bazali na esengo ya kobengama na nkombo ya Nzambe mpe ya koyebisa yango basusu.—Nz. 86:12.
11 Ezali mpenza lokumu monene koyeba makambo oyo Biblia eteyaka mpo na Tata! Ntango ondimi mateya yango ya motuya mingi, motema na yo ekotinda yo omipesa na Yehova mpe ozwa batisimo.
12-13. Mateya nini oyo etali Mwana oyekoli mpe ondimi?
12 Oyokaki ndenge nini ntango oyekolaki mateya ya solo oyo etali Mwana? Yesu azali moto ya mibale oyo aleki ntina na molɔ́ngɔ́ mobimba. Azali Mosikoli na biso. Andimaki kopesa bomoi na ye mpo na biso. Soki tomonisi na misala na biso ete tondimeli lisiko, masumu na biso ekoki kolimbisama, tokoki kokóma baninga ya Nzambe, mpe kozwa bomoi ya seko. (Yoa. 3:16) Yesu azali Nganga-nzambe monene na biso. Alingi kosalisa biso tózwa matomba ya lisiko mpe tózala na boyokani ya penepene na Nzambe. (Ebr. 4:15; 7:24, 25) Yesu azali mpe Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Na nzela na ye, Yehova akosantisa nkombo na Ye, akolongola mabe, mpe akopesa biso mapamboli ya seko na Paradiso oyo ezali koya. (Mat. 6:9, 10; Em. 11:15) Lisusu, Yesu azali ndakisa na biso. (1 Pe. 2:21) Apesaki bomoi na ye mpo na kosala mokano ya Nzambe, mpe yango ezali ndakisa mpo na biso.—Yoa. 4:34.
13 Ntango ondimi makambo oyo Biblia eteyaka mpo na Yesu Mwana ya Nzambe, okokóma kolinga ye mingi. Bolingo yango ekotinda yo opesa bomoi na yo mpo na kosala mokano ya Nzambe, kaka ndenge Yesu asalaki. Na nsima, yango ekotinda yo omipesa na Yehova na libondeli mpe ozwa batisimo.
14-15. Mateya nini ya solo oyekoli na oyo etali elimo santu?
14 Okanisaki nini ntango oyekolaki solo ya Biblia na oyo etali elimo santu? Na ndakisa, oyekolaki ete ezali moto te, kasi nguya ya Nzambe. Yehova asalelaki elimo santu mpo na kokomisa Biblia, mpe elimo yango esalisaka biso tókanga ntina ya makambo oyo totángi na Biblia mpe tósalela yango. (Yoa. 14:26; 2 Pe. 1:21) Na nzela ya elimo na ye, Yehova apesaka biso “nguya oyo eleki makasi.” (2 Ko. 4:7) Elimo santu epesaka biso makasi ya kosakola, ya kotɛmɛla komekama, ya kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto, mpe ya koyika mpiko na mikakatano. Esalisaka biso tómonisa bizaleli kitoko oyo ezali na kati ya “mbuma ya elimo.” (Gal. 5:22) Nzambe akakatanaka te kopesa elimo na ye na baoyo batyelaka ye motema mpe basɛngaka ye yango na motema mobimba.—Luka 11:13.
15 Koyeba ete tokoki kotyela elimo santu motema mpo esalisa biso tókoba kosalela Nzambe, ezali mpenza likambo ya kolendisa! Ntango ondimi mateya ya Biblia oyo oyekoli na ntina etali elimo santu, okoyoka mpenza
mposa ya komipesa na Nzambe na libondeli mpe kozwa batisimo.16. Toyekoli nini na baparagrafe oyo eleki?
16 Ekateli oyo olingi kozwa ya komipesa na Nzambe mpe ya kozwa batisimo ezali na ntina mingi. Ndenge toyekoli yango, osengeli kozala pene ya kondima nyonso oyo ekateli yango esɛngi, elingi koloba mikakatano mpe komipimela makambo mosusu. Kasi mapamboli oyo okozwa eleki mosika makambo oyo omipimeli. Batisimo ekoki kobikisa yo, mpe esalisaka moto azala na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe. Osengeli kozwa ekateli ya kozwa batisimo libosoliboso mpo olingi Yehova Nzambe. Osengeli mpe kondima na motema na yo mobimba mateya oyo oyekoli na ntina etali Tata, Mwana, mpe elimo santu. Nsima ya kotalela makambo oyo touti kolobela, okopesa eyano nini na motuna, “Nakoki mpo na kozwa batisimo?”
OYO OSENGELI KOSALA LIBOSO OZWA BATISIMO
17. Makambo nini moto asengeli kosala liboso ya kozwa batisimo?
17 Soki omoni ete okoki sikoyo kozwa batisimo, na ntembe te osili kosala makambo mingi mpo okóma na boyokani malamu na Yehova. * Boyekoli na yo ya Biblia esalisi yo oyeba makambo mingi na ntina etali Yehova mpe Yesu. Okómi sikoyo na kondima. (Ebr. 11:6) Okómi kotyela bilaka ya Yehova motema, mpe omindimisi ete kondima na yo na mbeka ya Yesu ekoki kobikisa yo na lisumu mpe liwa. Obongoli motema; elingi koloba oyoki mawa mingi mpo na makambo ya mabe oyo osalá, mpe osɛngi Yehova alimbisa yo. Obongwani; elingi koloba otiki na motema moko bomoi na yo ya kala mpe obandi kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe. (Mis. 3:19) Okómi na mposa makasi ya koyebisa basusu makambo oyo okómi kondima. Okokisaki masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te mpe okómaki kosakola elongo na bandeko ya lisangá. (Mat. 24:14) Yehova azali kosepela ndenge osali makambo wana ya ntina.—Mas. 27:11.
18. Wapi makambo mosusu oyo osengeli kosala liboso ya kozwa batisimo?
18 Liboso ozwa batisimo, ezali na mwa makambo mosusu osengeli kosala. Ndenge tomonaki yango liboso, osengeli komipesa na Nzambe. Salá libondeli oyo euti mpenza na motema, na esika oyo ozali yo moko, mpe yebisá Yehova ete okosalela bomoi na yo mpo na kosala mokano na ye. (1 Pe. 4:2) Na nsima, yebisá mokambi-misala ya bankulutu mposa na yo ya kozwa batisimo. Ye akoyebisa bankulutu mosusu básolola na yo. Kozala motema likoló te ntango okosolola na bankulutu yango. Bandeko yango bayebi yo malamu mpe balingaka yo. Bakotalela elongo na yo mateya ya moboko oyo oyekolaki. Bakoluka komindimisa ete okangi ntina ya mateya yango mpe ete oyebi ntina ya komipesa mpe kozwa batisimo. Soki bamoni ete okoki, bakoyebisa yo ete okoki kozwa batisimo na liyangani oyo ekoya.
OYO OSENGELI KOSALA NSIMA YA KOZWA BATISIMO
19-20. Osengeli kosala nini nsima ya kozwa batisimo, mpe ndenge nini okosala yango?
19 Osengeli kosala nini nsima ya kozwa batisimo? * Kobosana te ete komipesa ezali elako mpe Yehova azelaka ete okokisa yango. Na yango, nsima ya kozwa batisimo, osengeli kotosa elaka oyo opesaki Nzambe. Ndenge nini okosala yango?
20 Zalá ntango nyonso pene ya lisangá. Soki ozwi batisimo, okɔti na “lisangá mobimba ya bandeko.” (1 Pe. 2:17) Bandeko mibali mpe bandeko basi ya lisangá bazali libota na yo ya elimo. Soki ozali koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita, boninga na yo ná bango ekokóma makasi. Tángáká Liloba ya Nzambe mpe manyoláká yango mokolo na mokolo. (Nz. 1:1, 2) Nsima ya kotánga eteni moko ya Biblia, zwá mwa ntango ya kokanisa na mozindo makambo oyo otángi. Na ndenge yango nde makambo yango ekosimba motema na yo. ‘Bondelaká ntango nyonso.’ (Mat. 26:41) Mabondeli na yo oyo euti na motema ekosalisa yo ozala penepene na Yehova. ‘Kobá koluka liboso bokonzi.’ (Mat. 6:33) Okomonisa yango soki ozali kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na yo. Soki ozali kosakola sanza na sanza, kondima na yo ekozala ntango nyonso makasi, mpe okoki kosalisa basusu bákɔta na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.—1 Tim. 4:16.
21. Batisimo na yo ekosalisa yo na nini?
21 Ekateli na yo ya komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo ezali ekateli oyo eleki ntina na bomoi na yo. Ezali solo ete yango esɛngi omipimela makambo mingi. Kasi, ebongi ondima komipimela ndenge wana? Ɛɛ! Mikakatano nyonso oyo okoki kokutana na yango na mokili oyo ezali ya “ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ.” (2 Ko. 4:17) Kasi, batisimo na yo ekopesa yo nzela ya kozala na bomoi ya esengo lelo oyo mpe “bomoi ya solosolo” na mikolo ezali koya. (1 Tim. 6:19) Yango wana, kanisá malamu mpe bondelá mpo opesa eyano na motuna oyo: “Nakoki mpo na kozwa batisimo?”
LOYEMBO 50 Libondeli na ngai ya komipesa
^ par. 5 Ozali kokana kozwa batisimo? Soki bongo, lisolo oyo ebongisami mpenza mpo na yo. Elobeli mwa mituna ya ntina oyo etali batisimo. Biyano na yo na mituna yango ekosalisa yo oyeba soki okoki mpo na kozwa batisimo.
^ par. 5 Talá etanda “ Mituna mibale oyo okoyanola mokolo ya batisimo na yo.”
^ par. 19 Soki osilisi naino te koyekola buku Makambo oyo Biblia eteyaka mpe buku Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, osengeli kokoba koyekola babuku yango elongo na ndeko moko tii okosilisa yango.