LISOLO YA BOYEKOLI 12
Ntango nini ebongi koloba?
“Ezali na . . . ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.”—MOS. 3:1, 7.
LOYEMBO 124 Tótikala sembo
NA MOKUSE *
1. Mosakoli 3:1, 7 ezali koteya biso nini?
BATO mosusu kati na biso balingaka koloba. Bato mosusu balingaka kofanda nyɛɛ. Ndenge mokapo oyo esimbi lisolo oyo emonisi yango, ezali na ntango ya koloba mpe ntango ya kofanda nyɛɛ. (Tángá Mosakoli 3:1, 7.) Atako bongo, mposa na biso ekoki kozala ete bandeko mibali mpe bandeko basi mosusu bálobaka mwa mingi. Mpe tokoki kolinga ete bamosusu bálobaka mingi te.
2. Nani azali na lotomo ya kotya mibeko na oyo etali ntango oyo tosengeli koloba mpe ndenge ya koloba?
2 Likoki ya koloba ezali likabo oyo euti na Yehova. (Kob. 4:10, 11; Em. 4:11) Na nzela ya Liloba na ye, asalisi biso tóyeba ndenge ya kosalela malamu likabo yango. Na lisolo oyo, tokolobela bandakisa ya Biblia oyo ekosalisa biso tóyeba ntango nini tóloba mpe ntango nini tófanda nyɛɛ. Tokomona mpe ndenge oyo Yehova ayokaka mpo na makambo oyo tolobaka na basusu. Kasi liboso, tólobela naino ntango oyo tosengeli koloba.
NTANGO NINI TOSENGELI KOLOBA?
3. Na kotalela Baroma 10:14, na libaku nini tosengeli koloba?
3 Tosengeli ntango nyonso kozala pene ya kolobela makambo etali Yehova mpe Bokonzi na ye. (Mat. 24:14; tángá Baroma 10:14.) Ntango tozali kosala bongo, tozali komekola Yesu. Moko ya bantina oyo Yesu ayaki awa na mabele ezalaki mpo na koyebisa bato solo na ntina etali Tata na ye. (Yoa. 18:37) Kasi tosengeli mpe koyeba ete ndenge oyo tolobaka ezali mpe na ntina mingi. Na yango, ntango tozali koyebisa basusu makambo etali Yehova, tosengeli kosala yango “na boboto mpe na limemya makasi.” (1 Pe. 3:15) Lisusu, tosengeli komonisa ete tozali kotya likebi na mayoki mpe bindimeli ya moto oyo tozali kosolola na ye. Na ndenge yango, tokosuka kaka te na koloba, kasi tokoteya ye mpe, mbala mosusu tokosimba motema ya moto yango.
4. Ndenge Masese 9:9 emonisi yango, ndenge nini koloba ekoki kosalisa basusu?
4 Bankulutu basengeli kokakatana te mpo na koloba ntango bamoni ete ndeko mobali to ndeko mwasi moko asengeli kozwa toli. Kasi, bakopona ntango ya malamu mpo na koloba mpo báyokisa ndeko yango nsɔni te. Bakoki kozela tii ntango bakozala kaka bango moko na ndeko yango. Bankulutu basalaka ntango nyonso makasi mpo báloba na ndenge oyo ekobatela lokumu ya moto oyo akoyoka bango. Kasi, bakakatanaka te komonisa mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa basusu básala makambo na bwanya. (Tángá Masese 9:9.) Mpo na nini ezali na ntina mingi tózala na mpiko ya koloba soki esengeli? Tólobela bandakisa mibale oyo ekeseni: Moko ya mobali oyo asengelaki kosembola bana ye, mpe mosusu ya mwasi oyo asengelaki koloba na moto oyo akokóma mokonzi.
5. Ntango nini Nganga-nzambe monene Eli azangaki mpiko ya koloba na ndenge oyo esengelaki?
5 Nganga-nzambe monene Eli azalaki na bana mibali mibale oyo azalaki kolinga mingi. Kasi, bana yango bazalaki na limemya te epai ya Yehova. Bazalaki na mikumba minene mpo bazalaki banganga-nzambe oyo basalaka na tabernakle. Kasi, bazalaki kosalela bokonzi na bango na ndenge ya mabe, bazalaki na limemya ata moke te mpo na bambeka oyo epesamaki epai ya Yehova, mpe bazalaki kosala pite na ndenge ya nko. (1 Sa. 2:12-17, 22) Na kotalela Mibeko ya Moize, bana ya Eli basengelaki kobomama, kasi lokola tata na bango Eli azalaki kokanga miso na mabe na bango, apamelaki bango kaka likolólikoló mpe atikaki bango bákoba kosala na tabernakle. (Mib. 21:18-21) Yehova akanisaki nini mpo na ndenge oyo Eli asalaki makambo? Alobaki na Eli boye: “Mpo na nini ozali se kokumisa bana na yo koleka ngai?” Na bongo, Yehova azwaki ekateli ya koboma bana mibale ya Eli mpo bazalaki bato mabe.—1 Sa. 2:29, 34.
6. Lisolo ya Eli ezali koteya biso nini?
6 Tokoki kozwa liteya ya ntina mingi na lisolo ya Eli. Soki toyebi ete moninga to ndeko na biso moko ya libota abuki mobeko ya Yehova, tosengeli koloba na ye na mpiko, mpe kokundwela ye mibeko ya Yehova. Na nsima, tosengeli komindimisa ete azwi lisalisi ya bato oyo Yehova apesi mokumba ya kosalisa basusu. (Yak. 5:14) Tólinga soki moke te kozala lokola Eli; tópesa te moninga to ndeko ya libota lokumu mingi koleka Yehova. Esɛngaka mpiko mpo na koloba na moto oyo asengeli kosembolama, kasi kosala yango ekoki kobimisa matomba. Tótala bokeseni kati na ndakisa ya Eli mpe ya mwasi Moyisraele moko na nkombo Abigaile.
7. Mpo na nini Abigaile alobaki na Davidi?
7 Abigaile azalaki mwasi ya Nabale, oyo azalaki nkolo-mabele mpe moto ya bozwi. Ntango Davidi ná bato na ye bazalaki kokima Mokonzi Saulo, balekisaki mwa ntango elongo na babateli ya bampate ya Nabale mpe babatelaki bitonga ya banyama ya Nabale mpo báyiba yango te. Nabale amonisaki botɔndi mpo na lisalisi yango? Te. Ntango Davidi atindaki bato na ye básɛnga Nabale mwa bilei mpe mai, Nabale asilikaki mpe apamelaki bango makasi. (1 Sa. 25:5-8, 10-12, 14) Na yango, Davidi akanaki koboma mibali nyonso ya ndako ya Nabale. (1 Sa. 25:13, 22) Esɛngaki nini mpo likama yango esalema te? Abigaile amonaki ete yango ezalaki ntango ya koloba. Na mpiko nyonso, akendaki kokutana na mibali 400 oyo bamemaki bibundeli mpe bazalaki na nzala ná nkanda, mpe alobaki na Davidi.
8. Ndakisa ya Abigaile ezali koteya biso nini?
8 Ntango Abigaile akutanaki na Davidi, alobaki na ye na mpiko, na limemya, mpe na ndenge ya kondimisa. Atako Abigaile te nde alukaki makambo, asɛngaki Davidi bolimbisi. Amonisaki ete ayebi bizaleli malamu ya Davidi mpe atyelaki Yehova motema mpo asalisa ye. (1 Sa. 25:24, 26, 28, 33, 34) Ndenge moko na Abigaile, tosengeli kozala na mpiko ya koloba soki tomoni ete moto moko azali kolanda nzela oyo ekoki kotinda ye asala libunga ya monene. (Nz. 141:5) Tosengeli kozala na limemya, kasi tosengeli mpe kozala na mpiko. Soki na boboto nyonso topesi moto toli oyo asengeli na yango, tokomonisa ete tozali moninga ya solosolo.—Mas. 27:17.
9-10. Likambo nini bankulutu basengeli kobosana te ntango bazali kopesa basusu toli?
9 Mingimingi bankulutu basengeli kozala na mpiko ya koloba na bandeko ya lisangá oyo bazali Gal. 6:1) Na komikitisa nyonso, bankulutu bayebaka ete bango moko mpe bazali bato ya kozanga kokoka, mpe ete mokolo mosusu bakoki kozala na mposa ya toli. Kasi, bankulutu batikaka te ete likanisi yango epekisa bango kopamela baoyo basengeli na disiplini. (2 Tim. 4:2; Tito 1:9) Ntango bazali kopesa moto toli, basalaka makasi básalela likabo ya koloba mpo na koteya moto yango na bokɛngi mpe na motema molai. Balingaka ndeko na bango, mpe bolingo yango nde etindaka bango básalisa ye. (Mas. 13:24) Kasi mposa na bango ya libosoliboso ezalaka ya kokumisa Yehova, kolongisa mibeko na ye mpe kobatela lisangá na makambo ya mabe.—Mis. 20:28.
kolanda nzela moko ya mabe. (10 Tii awa, tolobeli ntango oyo esengeli koloba. Nzokande, ezali na bantango mosusu oyo eleki malamu tóloba ata eloko te. Mikakatano nini tokoki kokutana na yango na bantango yango?
NTANGO NINI TOSENGELI KOFANDA NYƐƐ?
11. Ndakisa nini Yakobo asalelaki, mpe ndenge nini yango etali maloba na biso?
11 Ekoki kozala mpasi koyeba nini tóloba mpe ntango nini. Moyekoli Yakobo asalelaki ndakisa moko ya malamu mpo na kolobela mokakatano yango. Alobaki boye: “Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka, oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba. Soki totye bibende ya mbanga na minɔkɔ ya mpunda mpo etosa biso, tozali kotambwisa mpe nzoto na yango mobimba.” (Yak. 3:2, 3) Soki motambwisi akangisi nsinga na bibende yango, akoki kosala ete mpunda etambola to etɛlɛma. Soki motambwisi asaleli nsinga yango malamu te, mpunda ekoki kotomboka, komisala mabe mpe kosala mabe na motambwisi. Ndenge moko mpe, soki tozali kopekisa maloba na biso te, tokoki kosala mabe mingi. Tólobela mwa mabaku oyo ekoki kosɛnga tómipekisa mpe tóloba te.
12. Ntango nini tosengeli komipekisa mpe koloba te?
12 Osalaka nini soki oyebi ete ndeko mobali to ndeko mwasi moko ayebi makambo oyo asengeli koyebisa bato mosusu te? Na ndakisa, soki okutani na moto oyo afandaka na ekólo moko epai mosala na biso epekisami, oyokaka mposa ya kotuna ye ayebisa yo makambo nyonso oyo etali mosala na biso na ekólo yango? Ya solo, ozali na makanisi ya mabe te. Tolingaka bandeko na biso mpe tolingaka koyeba makambo oyo ezali kokómela bango. Tolingaka mpe kolobela makambo ya sikisiki ntango tozali kobondela mpo na bango. Nzokande, wana ezali ntango ya komipekisa mpe koboya koloba. Soki totye ndeko mbamba mpo ayebisa biso makambo oyo ezali sekele, ekomonisa ete tozangi bolingo—ezala epai ya ndeko yango to epai ya bandeko basi mpe bandeko mibali oyo batyeli ye motema ete akoloba te makambo oyo etali mosala na bango. Na ntembe te, moko te kati na biso akolinga kobakisela bandeko oyo bazali na ekólo oyo mosala na biso epekisami mpasi likoló ya mpasi. Ndenge moko mpe, ndeko moko te oyo azali kosala na ekólo ya ndenge wana asengeli kolobela lolenge oyo Batatoli ya ekólo yango basalaka mosala ya kosakola to makambo mosusu ya elimo.
13. Ndenge Masese 11:13 emonisi yango, bankulutu basengeli kosala nini, mpe mpo na nini?
13 Mingimingi bankulutu basengeli kosalela etinda oyo etali kobomba makambo, oyo ezali na Masese 11:13. (Tángá.) Yango ekoki kozala mokakatano, mingimingi mpo na nkulutu oyo abalá. Mwasi ná mobali bazalaka na boyokani makasi soki basololaka mingi mpe bayebisanaka basekele, mitungisi na bango mpe ndenge oyo bazali komiyoka. Kasi ndeko oyo azali nkulutu ayebaka ete asengeli te koyebisa mwasi na ye “makambo oyo elobami na nkuku,” oyo etali bandeko ya lisangá. Soki asali bongo, bandeko ya lisangá bakotyela ye lisusu motema te mpe lokumu na ye ekobeba. Baoyo bazali na mikumba na lisangá basengeli te kozala “bato ya minɔkɔ mibale” to ya bongolabongola. (1 Tim. 3:8) Yango elimboli ete basengeli te kozala nyamunyamu to kobimisa makambo ya basusu. Soki nkulutu alingaka mwasi na ye, akoboya koyebisa ye makambo oyo asengeli koyeba te mpo yango ekozala lokola komemisa ye kilo.
14. Ndenge nini mwasi ya nkulutu akoki kobatela lokumu ya mobali na ye?
14 Mwasi akoki kosalisa na kobatela lokumu ya mobali na ye soki azali te koluka kotya ye mpanzi likoló mpo ayebisa ye makambo ya bato. Ntango mwasi azali kosalela toli yango, azali kopesa mobali na ye mabɔkɔ, kasi azali mpe komonisa limemya mpo na bandeko oyo bayebisaki mobali na ye makambo. Oyo eleki ntina, mwasi yango akosepelisa Yehova mpo azali kopesa mabɔkɔ na kobatela kimya mpe bomoko ya lisangá.—Rom. 14:19.
YEHOVA AYOKAKA NDENGE NINI MPO NA MAKAMBO OYO TOLOBAKA?
15. Yehova ayokaki ndenge nini mpo na baninga misato ya Yobo, mpe mpo na nini?
15 Tokoki koyekola makambo mingi na oyo etali ndenge mpe ntango ya koloba soki totángi mokanda ya Yobo. Yobo akutanaki na makambo ebele ya mpasi: nsima na yango, mibali minei bayaki kobɔndisa ye mpe kopesa ye toli. Mibali yango bafandaki nyɛɛ ntango molai. Kasi, makambo oyo mibali misato—Elifaze, Biledade mpe Zofare—balobaki na nsima emonisi ete ntango bafandaki nyɛɛ, bazalaki te kokanisa ndenge oyo bakokaki kosalisa Yobo. Bazalaki nde kokanisa ndenge oyo bakokaki komonisa ete Yobo asalaki makambo ya mabe. Makambo mosusu oyo balobaki ezalaki lokuta te, kasi makambo mingi oyo balobaki mpo na Yobo mpe Yehova ezalaki ya boboto te mpe ya solo te. Bafundaki Yobo ete azali moto mabe. (Yobo 32:1-3) Yehova asalaki nini? Nkanda na ye engalelaki mibali yango misato. Abengaki bango bazoba mpe ayebisaki bango básɛnga Yobo abondela mpo na bango.—Yobo 42:7-9.
16. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa mabe ya Elifaze, Biledade, mpe Zofare?
16 Tokoki kozwa mateya ebele na ndakisa mabe ya Elifaze, Biledade, mpe Zofare. Ya liboso, tosengeli te kosambisa bandeko na biso. (Mat. 7:1-5) Kasi, tosengeli koyoka bango na likebi liboso ete tóloba. Soki tosali bongo nde tokoyeba makambo oyo bazali kokutana na yango. (1 Pe. 3:8) Ya mibale, ntango tozali koloba, tosengeli kopona maloba ya boboto mpe koloba makambo oyo ezali solo. (Ef. 4:25) Mpe ya misato, Yehova atyaka likebi mingi na makambo oyo tolobanaka na basusu.
17. Ndakisa ya Elihu ezali koteya biso nini?
17 Mobali ya minei oyo ayaki kotala Yobo ezalaki Elihu, oyo azalaki moto ya libota ya Abrahama. Ayokaki badiskur ya Yobo mpe ya mibali wana misato. Emonani ete atyaki likebi na makambo oyo balobaki mpo apesaki mwa toli ya boboto kasi ya polele, oyo esalisaki Yobo asembola makanisi na ye. (Yobo 33:1, 6, 17) Elihu alukaki libosoliboso kokumisa Yehova, kasi te komikumisa to kokumisa moto mosusu. (Yobo 32:21, 22; 37:23, 24) Ndakisa ya Elihu ezali koteya biso ete ezali na ntango ya kofanda nyɛɛ mpo na koyoka. (Yak. 1:19) Ezali mpe koteya biso ete ntango tozali kopesa toli, tosengeli libosoliboso koluka kokumisa Yehova, kasi te biso moko.
18. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka na motuya likabo ya koloba?
18 Tokomonisa ete tozwaka na motuya likabo ya koloba soki tozali kolanda toli ya Biblia na oyo etali ntango mpe ndenge ya koloba. Elimo ya Nzambe etindaki Mokonzi Salomo akoma ete: “Liloba oyo elobami na ntango na yango ezali lokola bapɔme ya wolo na kati ya eloko ya mayemi ya palata.” (Mas. 25:11) Soki tozali koyoka na likebi makambo oyo basusu bazali koloba mpe soki tozali kokanisa liboso ya koloba, maloba na biso ekozala lokola bapɔme ya wolo—ekozala na motuya mpe kitoko mingi. Na bongo, ezala tolobi mingi to te, maloba na biso ekolendisa basusu, mpe Yehova akosepela na biso. (Mas. 23:15; Ef. 4:29) Yango nde lolenge eleki malamu ya komonisa botɔndi mpo na likabo ya koloba, oyo Nzambe apesá biso!
LOYEMBO 82 “Tiká pole na bino engɛnga”
^ par. 5 Biblia ezali na mitinda oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ntango nini tóloba mpe ntango nini tófanda nyɛɛ. Soki toyebi oyo Biblia elobi mpe tosaleli yango, maloba na biso ekosepelisa Yehova.
^ par. 62 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mwasi moko amoni ete asengeli kopesa ndeko mwasi mosusu toli.
^ par. 64 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mobali moko azali kopesa ndeko mosusu toli na likambo etali bopɛto.
^ par. 66 NDIMBOLA YA BILILINGI: Na ntango oyo esengeli, Abigaile alobaki na Davidi, mpe yango ebongisaki makambo.
^ par. 68 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko moko ná mwasi na ye bauti na ekólo oyo mosala ya Batatoli epekisamá mpe baboyi koyebisa ndenge mosala na biso esalemaka kuna.
^ par. 70 NDIMBOLA YA BILILINGI: Nkulutu moko azali kosolola makambo ya lisangá na nkuku mpo moto moko te ayoka yango.