Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 10

Bolingo mpe botɔndi mpo na Yehova ekotinda yo ozwa batisimo

Bolingo mpe botɔndi mpo na Yehova ekotinda yo ozwa batisimo

“Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?”​—MIS. 8:36.

LOYEMBO 37 Nakosalela Yehova na molimo mobimba

NA MOKUSE *

1-2. Ndenge emonisami na Misala 8:27-31, 35-38, nini etindaki mobali moko ya lokumu ya Etiopi azwa batisimo?

OZALI kolinga kozwa batisimo mpe kokóma moyekoli ya Kristo? Bolingo mpe botɔndi etindá bato mingi bázwa ekateli yango. Tótalela ndakisa ya mobali moko ya lokumu oyo azalaki kosalela mokonzi-mwasi ya bato ya Etiopi.

2 Moto yango ya Etiopi azwaki batisimo mbala moko nsima ya koyekola na Makomami ete asengeli kosala yango. (Tángá Misala 8:27-31, 35-38.) Nini etindaki ye azwa ekateli yango? Emonani ete azalaki kozwa Liloba ya Nzambe na motuya; kutu, azalaki kotánga eteni moko ya esakweli ya Yisaya wana azalaki kotambola na likalo na ye. Mpe ntango Filipe asololaki na ye, moto yango akómaki na botɔndi mpo na oyo Yesu asalaki mpo na ye. Kasi mpo na nini moto yango ya lokumu asalaki mobembo na Yerusaleme? Mpo asilaki kokolisa bolingo mpo na Yehova na motema na ye. Ndenge nini toyebi yango? Moto yango autaki kosambela Yehova na Yerusaleme. Emonani ete atikaki lingomba ya baboti na ye mpe akómaki moto ya ekólo kaka moko oyo emipesaki na Nzambe ya solo. Ezalaki mpe kaka bolingo mpo na Yehova nde etindaki ye asala likambo mosusu ya ntina mingi: kozwa batisimo mpe kokóma moyekoli ya Kristo.​—Mat. 28:19.

3. Nini ekoki kopekisa moto azwa batisimo? (Talá etanda “ Motema na yo ezali lokola mabele ya ndenge nini?”)

3 Bolingo mpo na Yehova ekoki kotinda yo ozwa batisimo. Kasi, bolingo ekoki mpe kopekisa yo osala yango. Na ndenge nini? Tótala mwa bandakisa. Mbala mosusu olingaka mingi bandeko ya libota mpe baninga na yo oyo bazali Batatoli te, mpe okoki kobanga ete soki ozwi batisimo, bakoyina yo. (Mat. 10:37) Mbala mosusu mpe olingaka mimeseno mosusu oyo Nzambe ayinaka, mpe okoki komona ete ezali mpasi otika kosala yango. (Nz. 97:10) To mbala mosusu banda bomwana osalaka bafɛti oyo ezali na boyokani na mangomba ya lokuta. Ekoki kozala ete okanisaka na esengo makambo oyo bosalá na bafɛti yango. Na yango, okoki komona ete ezali mpasi otika kosangana na bafɛti oyo esepelisaka Yehova te. (1 Ko. 10:20, 21) Osengeli komituna boye: “Nini to nani nde nalingaka mingi?”

MOTO OYO TOSENGELI KOLINGA MINGI

4. Nini mpenza ekotinda yo ozwa batisimo?

4 Ezali na makambo mingi ya malamu oyo olingaka mpe osepelaka na yango. Na ndakisa, liboso kutu obanda koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, ekoki kozala ete okómaki na limemya mingi mpo na Biblia. Ekoki mpe kozala ete okolisi bolingo mpo na Yesu. Sikoyo lokola oyebi Batatoli ya Yehova malamu, na ntembe te okómi kolinga kozala elongo na bango. Kasi, ata soki ozali kolinga makambo wana ya malamu, yango mpenza te nde ekotinda yo omipesa na Yehova mpe ozwa batisimo. Eloko mpenza oyo ekotinda yo ozwa batisimo ezali bolingo mpo na Yehova Nzambe ye moko. Soki olingi Yehova mingi koleka biloko mosusu nyonso, okotika eloko to moto moko te apekisa yo kosalela ye. Kolinga Yehova ekotinda yo ozwa batisimo mpe ekosalisa yo otikala sembo epai na ye nsima ya kozwa batisimo.

5. Tokolobela nini na lisolo oyo?

5 Yesu alobaki ete tosengeli kolinga Yehova na motema mpe molimo na biso mobimba, mpe na makanisi mpe makasi na biso nyonso. (Mrk. 12:30) Nini ekoki kosalisa yo olinga Yehova mpe omemya ye makasi ndenge wana? Kokanisa bolingo oyo Yehova alingaka biso etindaka biso mpe tólinga ye. (1 Yoa. 4:19) Na lisolo oyo, tokotalela mwa makanisi oyo ekosalisa yo osala yango. Tokomona mpe makambo oyo motema na yo ekotinda yo osala soki okómi kolinga Yehova mingi koleka nyonso. *

6. Na kotalela Baroma 1:20, nini ekoki kosalisa yo oyekola bizaleli ya Yehova?

6 Yekolá bizaleli ya Yehova na nzela ya bozalisi. (Tángá Baroma 1:20; Em. 4:11) Kanisáká ndenge oyo kitoko ya milona mpe banyama emonisaka bwanya ya Yehova. Yekoláká mwa makambo oyo emonisi ete nzoto na yo esalemá na ndenge ya kokamwa. (Nz. 139:14) Kanisá mpe nguya oyo Yehova atyá na moi, nzokande moi ezali kaka moko ya bamiliare ya minzoto. * (Yis. 40:26) Ntango ozali komanyola biloko oyo Yehova akelá, okomemya ye lisusu mingi. Kasi, koyeba ete Yehova azali na bwanya mpe na nguya mingi ezali kaka ndambo ya makambo oyo ekosalisa yo okóma na boyokani malamu na ye. Mpo olinga Yehova mingi, osengeli koyeba mpe makambo mosusu oyo etali ye.

7. Mpo olinga Yehova makasi, likambo nini osengeli komindimisa?

7 Osengeli komindimisa ete Yehova atyelaka yo mpenza likebi. Ozalaka na mokakatano ya kondima ete Mozalisi ya likoló mpe ya mabele mobimba amonaka yo mpe atyelaka yo likebi? Soki bongo, yebá ete Yehova azali “mosika te na mokomoko na biso.” (Mis. 17:26-28) ‘Atalatalaka mitema nyonso.’ Mpe kaka ndenge Davidi ayebisaki Salomo, Yehova alaki yo ete “soki oluki ye, akosala ete omona ye.” (1 Nt. 28:9) Kutu, soki ozali koyekola Biblia lelo oyo na Batatoli ya Yehova, ezali mpo Yehova ‘abendi yo’ epai na ye. (Yir. 31:3) Kokanga ntina ya makambo nyonso oyo Yehova asali mpo na yo ekotinda yo olinga ye lisusu makasi.

8. Ndenge nini okoki komonisa Yehova ete yo mpe olingi ye?

8 Lolenge moko ya komonisa Yehova ete yo mpe olingi ye ezali ya kosolola na ye na nzela ya libondeli. Okolinga lisusu Nzambe makasi soki ozali koyebisa ye mabanzo na yo mpe kopesa ye matɔndi mpo na nyonso oyo asalelaka yo. Longola yango, boyokani na yo ná Yehova ekokóma makasi ntango ozali komona ndenge azali koyanola na mabondeli na yo. (Nz. 116:1) Yango ekondimisa yo ete ayebi makambo oyo ozali na yango. Kasi mpo ozala na boninga ya penepene ná Yehova, osengeli koyeba ntina oyo alingaka, aboyaka, to asalaka likambo boye to boye. Osengeli mpe koyeba makambo oyo alingi osala. Okoyeba makambo yango kaka soki oyekoli Liloba na ye, Biblia.

Koyekola Biblia nde ekoki kosalisa biso tópusana penepene na Nzambe mpe tóyeba makambo oyo alingaka (Talá paragrafe 9) *

9. Ndenge nini okoki komonisa ete olingaka Biblia?

9 Yekolá kolinga Liloba ya Nzambe, Biblia. Kaka Biblia nde elobi makambo ya solo na ntina etali Yehova mpe mokano na ye mpo na yo. Okomonisa ete olingaka Biblia soki otángaka yango mokolo na mokolo, obongisaka mokanda na yo ya boyekoli liboso ndeko oyo ayekolaka na yo aya, mpe soki osalelaka makambo oyo ozali koyekola. (Nz. 119:97, 99; Yoa. 17:17) Ozalaka na programɛ na yo moko ya kotánga Biblia? Otosaka programɛ yango mpe otángaka Biblia mokolo na mokolo?

10. Mpo na nini Biblia ekeseni mpenza na babuku mosusu nyonso?

10 Biblia ekeseni mpenza na babuku mosusu nyonso mpo ezali na masolo ya Yesu, mpe bato oyo bamonaki ye na miso nde bakomaki masolo yango. Kaka Biblia nde elobeli na bosikisiki makambo oyo Yesu asalá mpo na yo. Ntango ozali koyekola makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki, na ntembe te okoyoka mposa ya kokóma moninga na ye.

11. Nini ekosala ete olinga Yehova lisusu mingi?

11 Koyekola kolinga Yesu ekosala ete olinga Yehova lisusu mingi. Mpo na nini? Mpo Yesu amekolaki bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. (Yoa. 14:9) Na yango, ntango ozali koyekola makambo ya Yesu mingi, okokóma mpe koyeba Yehova malamu mpe kosepela na ye. Kanisá mawa oyo Yesu ayokelaki bato oyo bazalaki kotyolama, na ndakisa babola, bato ya maladi mpe baoyo bazangaki moto ya kosalisa bango. Kanisá mpe toli ya malamu oyo apesi yo mpe ndenge oyo bomoi na yo ya mokolo na mokolo ekómaka malamu soki olandi toli yango.​—Mat. 5:1-11; 7:24-27.

12. Koyeba makambo oyo Yesu asalaki mpo na yo ekoki kotinda yo osala nini?

12 Na ntembe te, okolinga Yesu lisusu mingi ntango ozali kokanisa na mozindo mbeka oyo apesaki mpo masumu na biso ekoka kolimbisama. (Mat. 20:28) Soki okangi ntina ete Yesu andimaki kokufa mpo na yo, yango ekoki kotinda yo obongola motema mpe osɛnga Yehova bolimbisi. (Mis. 3:19, 20; 1 Yoa. 1:9) Mpe ntango okómi kolinga Yehova ná Yesu, okosepela kozala elongo na bato oyo balingaka mpe bango.

13. Yehova akoki kopesa yo banani?

13 Yekolá kolinga baoyo balingaka Yehova. Mbala mosusu bato ya libota na yo oyo bayebi Yehova te mpe baninga na yo ya kala bakomona te ntina oyo olingi komipesa na Yehova. Bakoki kutu kotɛmɛla yo. Kasi, Yehova akosalisa yo na ndenge akopesa yo libota ya elimo. Soki okangami na bandeko ya libota yango ya elimo, bakolinga yo mpe bakosalisa yo na ndenge oyo esengeli. (Mrk. 10:29, 30; Ebr. 10:24, 25) Na nsima, bato ya libota na yo bakoki mpe kobanda kosalela Yehova mpe kotosa mibeko na ye.​—1 Pe. 2:12.

14. Ndenge 1 Yoane 5:3 elobi yango, likambo nini omoni na oyo etali mibeko ya Yehova?

14 Yekolá kolinga mpe kotosa mibeko ya Yehova. Liboso oyekola koyeba Yehova, mbala mosusu ozalaki kolanda mibeko oyo yo moko omityelaki, kasi sikoyo omoni ete mibeko ya Yehova nde eleki malamu. (Nz. 1:1-3; tángá 1 Yoane 5:3.) Kanisá toli oyo Biblia epesi mibali, basi, baboti, mpe bana. (Ef. 5:22–6:4) Ntango osalelaka toli yango, omonaka te ete libota na yo ekómaka na esengo? Ndenge ozali kotosa malako oyo Yehova apesi na oyo etali kopona baninga esalisi yo okóma na bomoto ya malamu? Okómi na esengo koleka? (Mas. 13:20; 1 Ko. 15:33) Na ntembe te, biyano na yo na mituna yango ezali ɛɛ.

15. Okoki kosala nini soki ozali koyeba te ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia?

15 Na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi oyeba ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia oyo ozali koyekola. Yango wana, Yehova azali kosalela ebongiseli na ye mpo ebimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo esalisa yo oyeba kokesenisa mabe ná malamu. (Ebr. 5:13, 14) Ntango ozali kotánga mpe koyekola makambo yango, okomona ete ezali na batoli ya malamu mpe ya polele, mpe ekoki kotinda yo olinga kokɔta na ebongiseli ya Yehova.

16. Ndenge nini Yehova abongisi basaleli na ye?

16 Yekolá kolinga ebongiseli ya Yehova mpe kopesa yango mabɔkɔ. Yehova abongisi basaleli na ye na masangá; mpe Mwana na ye Yesu nde mokonzi ya masangá nyonso. (Ef. 1:22; 5:23) Yesu atye mwa etuluku moke ya bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo mpo bátambwisa mosala oyo alingi esalema lelo. Yesu abengaki mwa etuluku ya bandeko yango ete “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpe bazwaka na lisɛki te mokumba na bango ya koleisa mpe kobatela yo na elimo. (Mat. 24:45-47) Moko ya makambo oyo emonisi ete moombo ya sembo atyelaka yo likebi ezali ndenge abongisi ete bandeko mibali oyo bakokisi masɛngami bátyama bankulutu na lisangá mpo na kokɛngɛla yo. (Yis. 32:1, 2; Ebr. 13:17; 1 Pe. 5:2, 3) Bankulutu bazalaka pene ya kosala nyonso mpo na bolamu na yo, mpo na kobɔndisa yo, mpe kosalisa yo opusana lisusu mingi penepene na Yehova. Kasi, moko ya makambo oyo eleki ntina oyo bakoki kosala mpo na yo ezali kosalisa yo mpo oteya basusu makambo ya Yehova.​—Ef. 4:11-13.

17. Na kotalela Baroma 10:10, 13, 14, mpo na nini toyebisaka basusu makambo ya Yehova?

17 Salisá basusu báyekola kolinga Yehova. Yesu ayebisaki bayekoli na ye báteya basusu makambo ya Yehova. (Mat. 28:19, 20) Tokoki kotosa etinda yango mpo toyebi ete tosengeli kaka kotosa yango. Kasi, wana ozali se kolinga Yehova mingi, okoyoka lokola ntoma Petro ná ntoma Yoane, oyo balobaki: “Tokoki kotika te kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.” (Mis. 4:20) Kosalisa moto akóma kolinga Yehova epesaka esengo mingi. Kanisá esengo oyo Filipe, mopalanganisi ya nsango malamu ayokaki ntango asalisaki mobali wana ya Etiopi ayeba solo ya Makomami mpe azwa batisimo! Soki omekoli Filipe mpe otosi etinda oyo Yesu apesaki biso ya kosakola, okomonisa ete olingi kokóma Motatoli ya Yehova. (Tángá Baroma 10:10, 13, 14.) Na ntango yango, mbala mosusu yo mpe okomituna lokola mobali wana ya Etiopi ete: “Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?”​—Mis. 8:36.

18. Mituna nini tokolobela na lisolo oyo elandi?

18 Ekateli na yo ya kozwa batisimo ekozala likambo eleki ntina oyo okosala na bomoi na yo. Lokola ezali likambo ya kozwa na lisɛki te, osengeli kokanisa malamu soki yango elimboli nini. Makambo nini osengeli koyeba mpo na batisimo? Makambo nini osengeli kosala liboso mpe nsima ya kozwa batisimo? Tokolobela mituna yango na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 2 Yehova nde nkombo na yo

^ par. 5 Bato mosusu oyo balingaka Yehova bamitunaka soki bakoki mpo na kozwa batisimo mpe kokóma Batatoli ya Yehova. Soki ezali mpe bongo mpo na yo, lisolo oyo ekosalisa yo otalela lisusu mwa makambo oyo okoki kosala mpo ozwa batisimo.

^ par. 5 Lokola bato bakeseni, bato mosusu bakoki kosalela makanisi oyo tolobeli na lisolo oyo na molɔngɔ oyo elandani awa te.

^ par. 6 Mpo omona bandakisa mosusu, talá mwa buku La vie a-t-elle été créée ? mpe mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie.

^ par. 61 NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mwasi moko azali kopesa mwasi moko trakte na wenze.