Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 13

Bólinganaka makasi

Bólinganaka makasi

“Bólinganaka makasi na motema moko.”​—1 PE. 1:22.

LOYEMBO 109 Tólingana makasi, na motema moko

NA MOKUSE *

Na butu na ye ya nsuka elongo na bantoma na ye, Yesu alobelaki bolingo mingi (Talá lisolo ya boyekoli 13, paragrafe 1-2)

1. Mobeko nini ya sikisiki Yesu apesaki bayekoli na ye? (Talá elilingi ya ezipeli.)

NA BUTU ya nsuka liboso Yesu akufa, apesaki bayekoli na ye mobeko moko ya sikisiki. Alobaki na bango: “Ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka.” Mpe abakisaki: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai​—soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoa. 13:34, 35.

2. Mpo na nini ezali na ntina tólinganaka?

2 Yesu alobaki ete bayekoli na ye ya solo bakoyebana polele soki bazali komonisa bolingo lokola oyo ye amonisaki. Maloba yango ezalaki solo epai ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso, ezali mpe solo mpo na biso lelo oyo. Yango wana ezali na ntina mingi tólinganaka, ata ntango ezali mpasi kosala yango!

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Lokola biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, ezalaka mpasi tólingana na motema moko. Kasi, tosengeli kosala makasi tómekola Kristo. Na lisolo oyo, tokomona ndenge bolingo esalisaka biso tózala bato oyo batyaka kimya, oyo baponaka bilongi te, mpe oyo bayambaka bapaya. Wana tozali koyekola makambo yango, omituna boye: ‘Mateya nini nakoki kozwa na ndakisa ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bakobi komonisa bolingo, ata na ntango oyo ezali mpasi?’

ZALÁ MOTO OYO ATYAKA KIMYA

4. Na kotalela Matai 5:23, 24, mpo na nini tosengeli kotya kimya na ndeko oyo azali na likambo ná biso?

4 Yesu ateyaki biso ete ezali na ntina mingi kotya kimya na ndeko oyo azali na likambo ná biso. (Tángá Matai 5:23, 24.) Amonisaki polele ete mpo Nzambe asepela na biso, tosengeli kobatela boyokani ya malamu na basusu. Yehova asepelaka ntango tozali kosala nyonso mpo tózala na kimya na bandeko na biso. Akondima losambo na biso te soki tobombeli moto nkanda na motema mpe toboyi ata komeka kosala kimya.​—1 Yoa. 4:20.

5. Nini esalaki ete ezala mpasi mpo ndeko moko azongisa kimya ná ndeko mosusu?

5 Ekoki kozala mpasi mpo na kotya kimya. Mpo na nini? Tótalela likambo oyo ekómelaki ndeko moko na nkombo Mark. * Ayokaki mpasi ntango ndeko mobali moko alobaki mabe mpo na ye, mpe atɔngaki ye epai ya bandeko mosusu ya lisangá. Mark asalaki nini? Alobi boye: “Motema esukaki mpe nasilikaki makasi.” Kasi na nsima, Mark ayokaki mawa mpo na ezaleli na ye mpe akendaki kosɛnga ndeko yango bolimbisi mpo bázongisa kimya. Kasi, ndeko yango aboyaki kondima. Na ebandeli, Mark akanisaki boye: ‘Mpo na nini nakoba kobondela ye soki alingi te tózongisa kimya?’ Kasi, mokɛngɛli ya zongazonga alendisaki Mark alɛmba te. Mark asalaki nini?

6. (a) Ndenge nini Mark akobaki komeka kozongisa kimya? (b) Ndenge nini Mark asalelaki toli ya Bakolose 3:13, 14?

6 Ntango Mark amitalelaki, amonaki ete azangaki komikitisa mpe ete na bantango mosusu azalaki komona ete aleki basusu. Andimaki ete asengeli kobongola makanisi na ye. (Kol. 3:8, 9, 12) Na komikitisa nyonso, akendaki lisusu epai ya ndeko wana mpe asɛngaki ye bolimbisi. Mark akomelaki mpe ndeko yango mikanda mpo na komonisa ete ayokaki mawa na likambo oyo asalaki mpe ete alingi bákóma lisusu baninga. Mark akabelaki kutu ndeko yango mwa biloko oyo akanisaki ete akosepela na yango. Likambo ya mawa, ndeko wana afungolaki kaka motema te. Atako bongo, Mark akobaki kolinga ndeko na ye ndenge Yesu apesaki etinda, mpe akobaki kolimbisa. (Tángá Bakolose 3:13, 14.) Ata soki basusu bandimi te milende oyo tosali mpo na kozongisa kimya, bolingo ya solo ya bokristo ekosalisa biso tókoba kolimbisa bango mpe kobondela mpo mokolo mosusu kimya ezonga kati na biso ná bango.​—Mat. 18:21, 22; Gal. 6:9.

Ekoki kosɛnga tómeka mbala ebele na boboto mpo na kozongisa kimya (Talá paragrafe 7-8) *

7. (a) Yesu asɛngaki biso tósala nini? (b) Likambo nini ekómelaki ndeko mwasi moko?

7 Yesu asɛngaki biso tókoba kosalela basusu makambo ndenge tolingi bango mpe básalela biso. Abakisaki ete tosengeli te kolinga kaka bato oyo balingaka mpe biso. (Luka 6:31-33) Na ndakisa, okosala nini soki moto moko na lisangá azali kokima yo mpe aboyi kopesa yo mbote? Likambo yango esalemaka mingi te, kasi ekómelaki ndeko mwasi moko na nkombo Lara. Alobi boye: “Ndeko mwasi moko azalaki lisusu kokipe ngai te, mpe nayebaki te mpo na nini. Yango etungisaki ngai mingi mpe nazalaki lisusu na esengo ya kokende makita te.” Na ebandeli, Lara azalaki kokanisa boye: ‘Nasali ye likambo ya mabe te. Kutu, bato mosusu mpe na lisangá bazali komona ete ndeko mwasi yango akómi bizaleli mabe.’

8. Lara asalaki nini mpo na kotya kimya, mpe ndakisa na ye ezali koteya biso nini?

8 Lara amonaki malamu aluka ndenge ya kotya kimya. Abondelaki Yehova mpe azwaki ekateli ya kosolola na ndeko mwasi wana. Basololaki likambo yango, bayambanaki mpe batyaki kimya. Emonanaki ete makambo esili. Lara alobi boye: “Kasi na nsima, ndeko mwasi yango akómaki lisusu kosala ngai kaka ndenge azalaki kosala liboso. Yango elɛmbisaki ngai mpenza nzoto.” Na ebandeli, Lara akanisaki ete akozala lisusu na esengo kaka soki ndeko wana abongoli bizaleli na ye. Kasi nsukansuka, amonaki ete eleki malamu akoba kosalela ndeko mwasi wana makambo na bolingo mpe ‘kolimbisa ye na motema moko.’ (Ef. 4:32–5:2) Amikundwelaki ete bolingo ya solo ya bokristo “ebombaka mabe na motema te. Ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso.” (1 Ko. 13:5, 7) Yango esalisaki Lara azwa lisusu kimya ya motema. Nsima ya mikolo, ndeko mwasi wana akómaki kosolisa ye malamu. Ntango ozali kosala makasi ozala na kimya na bandeko mpe okobi kolinga bango, yebá ete “Nzambe ya bolingo mpe ya kimya akozala na [yo].”​—2 Ko. 13:11.

KOPONAKA BILONGI TE

9. Ndenge Misala 10:34, 35 emonisi yango, mpo na nini tosengeli koponaka bilongi te?

9 Yehova aponaka bilongi te. (Tángá Misala 10:34, 35.) Soki tozali kopona bilongi te, ekomonisa ete tozali bana na ye. Totosaka mpe mobeko ya kolinga bazalani na biso lokola biso moko, mpe tobatelaka kimya na libota na biso ya elimo.​—Rom. 12:9, 10; Yak. 2:8, 9.

10-11. Nini esalisaki ndeko mwasi moko alongola makanisi ya mabe oyo azalaki na yango?

10 Mpo na bato mosusu, kozanga kopona bilongi ezalaka pɛtɛɛ te. Tótalela likambo oyo ekómelaki ndeko moko na nkombo Ruth. Ntango azalaki elenge, moto moko ya ekólo mosusu asalaki libota ya Ruth likambo moko ya mabe mpenza. Yango esalaki Ruth nini? Alobi boye: “Nazalaki kolinga koyoka ata nkombo ya ekólo te. Nakómaki kokanisa ete bato nyonso ya ekólo yango bazalaka kaka mitema mabe, ata mpe Batatoli ya Yehova.” Ruth asalaki nini mpo alongola makanisi yango ya mabe?

11 Ruth andimaki ete asengeli kosala makasi mpo atika kokanisa bongo. Atángaki masolo mpe balapolo oyo elobeli ekólo yango na Buku ya mobu. Alobi boye: “Nasalaki makasi nakóma kotalela bato ya ekólo yango na ndenge oyo ebongi. Nakómaki komona ete bandeko bazalaki na molende na mosala ya Yehova. Nandimaki ete bango mpe bazali na kati ya lisangá ya bandeko na mokili mobimba.” Mwa moke na nsima, Ruth amonaki ete asengeli kosala likambo mosusu. Alobi boye: “Soki nakutani na bandeko mibali mpe bandeko basi ya ekólo yango, nazalaki kosala makasi namonisela bango boboto. Nazalaki kosolola na bango mpe koluka koyeba bango malamu.” Nini esalemaki? Ruth alobi: “Nsukansuka, makanisi na ngai ya mabe elongwaki.”

Soki tozali ‘kolinga lisangá mobimba ya bandeko,’ tokobanda kopona bilongi te (Talá paragrafe 12-13) *

12. Mokakatano nini ndeko mwasi moko na nkombo Sarah azalaki na yango?

12 Bato mosusu bazalaka na ezaleli ya kopona bilongi kasi bayebaka yango te. Na ndakisa, Sarah azalaki kokanisa ete aponaka bilongi te mpo asambisaka bato te na kolanda loposo na bango, mbongo na bango, to mikumba oyo bazali na yango na ebongiseli ya Yehova. Kasi alobi boye: “Nakómaki komona ete nazalaka mpenza na ezaleli ya kopona bilongi.” Na ndenge nini? Sara autá na libota ya bato oyo batángá mingi mpe azalaki kolinga kozala kaka elongo na bato oyo batángá mingi. Kutu, mokolo moko alobaki na ndeko moko oyo azalaki moninga na bango ete: “Nakangamaka kaka na bandeko oyo batángá. Nakimaka baoyo batángá te.” Ezali polele ete Sarah asengelaki kobongola ndenge na ye ya kotalela makambo. Asalaki nini?

13. Ndenge oyo Sarah abongolaki makanisi na ye ekoki koteya biso nini?

13 Mokɛngɛli ya zongazonga asalisaki Sarah atalela makanisi na ye. Sarah alobi boye: “Apesaki ngai longonya mpo na mosala na ngai ya sembo, biyano ya malamu oyo napesaka na makita, mpe boyebi ya Makomami oyo nazali na yango. Na nsima, amonisaki ete ntango tozali kokóma na boyebi mingi, tosengeli mpe kolona bizaleli ya bokristo lokola komikitisa, bopɔlɔ, mpe motema mawa.” Sarah ayokaki toli ya mokɛngɛli ya zongazonga. Alobi boye: “Namonaki ete likambo oyo eleki ntina ezali nde komonisa boboto mpe kolinga bandeko.” Na yango, akómaki kotalela bandeko ndenge mosusu. Alobi boye: “Nasalaki makasi namonaka bizaleli na bango ya malamu oyo etindaka Yehova azwa bango na motuya.” Yango eteyi biso nini? Tólinga ata mokolo moko te komona ete toleki basusu kaka mpo totángá mingi! Soki tozali mpenza ‘kolinga lisangá mobimba ya bandeko,’ tokozala te na ezaleli ya kopona bilongi.​—1 Pe. 2:17.

ZALÁ NA EZALELI YA KOYAMBA BAPAYA

14. Na kotalela Baebre 13:16, Yehova ayokaka ndenge nini soki tomonisi ezaleli ya koyamba bapaya?

14 Yehova asepelaka mingi na ezaleli ya koyamba bapaya. (Tángá Baebre 13:16.) Amonaka ete yango ezali na kati ya losambo na biso, mingimingi ntango tomonisi ezaleli yango epai ya bato oyo bazangá. (Yak. 1:27; 2:14-17) Yango wana Biblia elendisi biso ‘tózalaka na ezaleli ya koyamba bapaya.’ (Rom. 12:13) Ntango tomonisi ezaleli ya koyamba bapaya, tozali komonisa basusu ete totyelaka bango likebi, tolingaka bango, mpe ete tolingi kozala baninga na bango. Yehova asepelaka ntango tokaboli mwa eloko na basusu, ezala mwa bilei ya pɛpɛlɛ, mwa eloko ya komɛla, bilei ya kilo, to tondimi kopesa bango ntango na biso to kotyela bango likebi. (1 Pe. 4:8-10) Kasi, makambo mosusu ekoki kopekisa biso tómonisa ezaleli ya koyamba bapaya.

“Kala, nazalaki kosepela te komonisa ezaleli ya koyamba bapaya, kasi nabongolaki makanisi mpe nazwi esengo mingi” (Talá paragrafe 16) *

15-16. (a) Nini ekoki kosala ete tókakatana mpo na komonisa ezaleli ya koyamba bapaya? (b) Ndenge nini Edit atikaki kokakatana mpo na komonisa ezaleli ya koyamba bapaya?

15 Makambo mosusu ya bomoi na biso ekoki kosala ete tókakatana mpo na koyamba bapaya. Tózwa ndakisa ya ndeko mwasi Edit, oyo mobali na ye akufá. Liboso akóma Motatoli ya Yehova, azalaki mpenza kosolola mingi te na bato. Edit azalaki komona ete ebongi basusu nde bómonisa ezaleli ya koyamba bapaya.

16 Nsima ya kokóma Motatoli, Edit abongolaki ndenge na ye ya kotalela makambo. Azwaki bibongiseli mpo amonisa ezaleli ya koyamba bapaya. Alobi boye: “Ntango bazalaki kotongela biso Ndako ya Bokonzi ya sika, nkulutu moko ayebisaki ngai ete ndeko moko ná mwasi na ye bakoya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga, mpe asɛngaki ngai nafanda na bango na ndako na ngai pɔsɔ mibale. Nakanisaki lisusu ndenge Yehova apambolaki mwasi ya Zarefate oyo mobali akufá.” (1 Bak. 17:12-16) Edit andimaki kofanda na bandeko yango. Azwaki lipamboli? Alobi boye: “Pɔsɔ mibale ekómaki sanza mibale, mpe tokómaki na boninga makasi.” Edit azwaki mpe baninga ya malamu na lisangá. Lelo oyo, azali mobongisi-nzela mpe abengaka bandeko oyo abimi na bango na mosala ya kosakola báya epai na ye kopema mwa moke. Alobi boye: “Kokaba epesaka ngai esengo mpenza! Mpe mpo na koloba solo, ememeli ngai mapamboli ebele.”​—Ebr. 13:1, 2.

17. Ndeko Luke ná mwasi na ye bamonaki likambo nini?

17 Mbala mosusu tomonisaka ezaleli ya koyamba bapaya, kasi tokoki kosala yango malamu koleka? Na ndakisa, Ndeko Luke ná mwasi na ye bazalaki na ezaleli ya koyamba bapaya. Bazalaki kobengisa baboti na bango na ndako, bandeko na bango ya libota, baninga na bango ya motema, mpe mokɛngɛli ya zongazonga ná mwasi na ye. Kasi, Luke alobi boye: “Tomonaki ete tozalaki kobengisa kaka bato oyo tomeseni mingi na bango.” Luke ná mwasi na ye basalaki nini mpo bámonisaka malamumalamu ezaleli ya koyamba bapaya?

18. Mbongwana nini Luke ná mwasi na ye basalaki na oyo etali komonisa ezaleli ya koyamba bapaya?

18 Luke ná mwasi na ye babongolaki makanisi na bango nsima ya kotalela maloba oyo ya Yesu ete: “Soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, mbano nini bozwi?” (Mat. 5:45-47) Bamonaki ete basengeli komekola Yehova, oyo amonisaka ezaleli ya kokaba epai ya bato nyonso. Na yango, bazwaki ekateli ya kobengisa mpe bandeko ya lisangá oyo babengisaki naino te liboso. Luke alobi boye: “Biso nyonso tosepelaka mingi ntango tofandi elongo. Moto nyonso elendisamaka mpe azwaka makasi.”

19. Ndenge nini tokomonisa ete tozali mpenza bayekoli ya Yesu, mpe ekateli nini ozwi?

19 Tomoni ndenge oyo kolingana makasi ekoki kosalisa biso tózala bato oyo batyaka kimya, tóponaka bilongi te, mpe tómonisa ezaleli ya koyamba bapaya. Tosengeli kolongola makanisi nyonso ya mabe mpe kolinga bandeko na biso makasi, na motema moko. Soki tosali bongo, tokozala na esengo mpe tokomonisa ete tozali mpenza bayekoli ya Yesu.​—Yoa. 13:17, 35.

LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo

^ par. 5 Yesu alobaki ete bolingo nde elembo oyo ekosalisa bato báyeba bakristo ya solo. Soki tozali kolinga bandeko na biso ya mibali mpe ya basi, tokozala bato oyo batyaka kimya, tokoponaka bilongi te, mpe tokoyeba koyamba bapaya. Na bantango mosusu, kosala yango ezalaka mpasi. Na lisolo oyo, tokoyekola mwa makambo oyo ekosalisa biso tókoba kolingana na motema moko.

^ par. 5 Na lisolo oyo, topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 57 NDIMBOLA YA BILILINGI: Mbala ya liboso oyo ndeko mwasi moko ameki kotya kimya esimbi te, kasi atiki te. Akobi komonisa bolingo, mpe nsukansuka alongi.

^ par. 59 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mobali moko ya mobange ayoki mabe mpo bandeko ya lisangá bakipaka ye te.

^ par. 61 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mwasi oyo liboso azalaki kokakatana mpo na komonisa ezaleli ya koyamba bapaya abongoli makanisi na ye, mpe yango ebakiseli ye esengo.