Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mosolo ya libala ekokaki kozala mpe banyama

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Mpo na nini Bayisraele bazalaki kopesa mosolo ya libala?

NA NTANGO ya kala, libota ya mobali ezalaki kopesa mosolo ya libala na libota ya mwana mwasi soki mabota yango mibale eyokani mpo na libala. Na kati ya mosolo ya libala, ekokaki kozala na biloko ya motuya, banyama to mpe mbongo. Na bantango mosusu, moto akokaki kosala mosala makasi mpo ezala mosolo ya libala, na ndakisa, ndenge ezalaki mpo na Yakobo, oyo andimaki kosalela tata ya Rashele mosala mbula nsambo mobimba mpo abala Rashele. (Eba. 29:17, 18, 20) Mpo na nini bazalaki kofuta mosolo ya libala?

Carol Meyers, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia, alobi boye: “Ekoki kozala ete mosolo ya libala ezalaki kopesama na libota ya mwasi mpo na kozongisa mosala makasi oyo mwana mwasi yango azalaki kosala, mingimingi na mabota oyo bazalaki kosala [mosala ya bilanga].” Mbala mosusu mpe mosolo ya libala ezalaki kokómisa makasi boyokani ya mabota mibale oyo bayokanaki mpo na libala. Bato ya mabota oyo basali boyokani yango bakokaki kosalisana na bantango ya mpasi. Longola yango, mosolo ya libala ezalaki komonisa ete mwana mwasi akómi mwasi ya moto mpe ete akolongwa na nse ya bokonzi mpe libateli ya tata na ye mpe akokóma na nse ya bokonzi mpe libateli ya mobali na ye.

Kofuta mosolo ya libala elimbolaki te ete mwasi azali eloko oyo bakoki kosomba to kotɛka. Buku moko (Ancient Israel​—Its Life and Institutions) elobi ete: “Kosɛnga libota ya mobali epesa libota ya mwasi motángo moko ya mbongo, to eloko oyo ekokani na yango, ezalaki mpenza komonisa lokola ete libala na Yisraele elimbolaki nde kosomba eloko. Kasi emonani ete [mosolo ya libala] ezalaki kotalelama lokola ntalo ya kosomba mwasi te, kasi ezalaki nde eloko oyo bazongiseli libota yango.”

Lelo oyo, na bikólo mosusu, bato balandaka momeseno ya kopesa mosolo ya libala. Ntango baboti oyo bazali bakristo bazali kosɛnga mosolo ya libala, basalaka ete ‘bato nyonso báyeba ezaleli na bango ya kozala makambo makasimakasi te’ na ndenge balekisaka ndelo te na biloko oyo bazali kosɛnga. (Flp. 4:5; 1 Ko. 10:32, 33) Na ndenge yango, bamonisaka ete bazali te “bato oyo balingá mbongo,” to bato ya lokoso. (2 Tim. 3:2) Lisusu, ntango baboti oyo bazali bakristo balekisi ndelo te na biloko oyo basɛngi lokola mosolo ya libala, yango ekosɛnga te ete mobali apusa dati ya libala tii ntango akozwa mbongo oyo ekoki mpo na kofuta mosolo ya libala. To mpe ekosɛnga te ete mobali oyo alingi kobala atika naino mosala ya mobongisi-nzela mpo amipesa mobimba na mosala ya mosuni mpo na koluka kokokisa mosolo ya libala ya koleka ndelo oyo basɛngi ye.

Na mikili mosusu, mibeko ya Leta ekatá mosolo ya libala. Na bisika oyo ezali bongo, baboti oyo bazali bakristo batosaka mibeko yango. Mpo na nini? Mpo Liloba ya Nzambe esɛngi bakristo ‘báyokelaka bakonzi oyo bazali liboso’ mpe bátosaka mibeko ya mboka oyo ebuki mibeko ya Nzambe te.​—Rom. 13:1; Mis. 5:29.