Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 LISOLO YA BOYEKOLI 3

Ozali na motuya na miso ya Yehova Nzambe na yo!

Ozali na motuya na miso ya Yehova Nzambe na yo!

“Akanisaki biso lisusu ntango tokitisamaki.”​—NZ. 136:23.

LOYEMBO 33 Bwakelá Yehova mokumba na yo

NA MOKUSE *

1-2. Makambo nini ya mpasi ezali kokómela basaleli mingi ya Yehova, mpe yango ekoki kosala bango nini?

TÓKANISA makambo misato oyo: Monganga ayebisi elenge mobali moko ete azali na maladi moko mabe oyo ekosilisa ye makasi na nzoto. Ndeko mobali moko ya mbula mwa moke koleka 50, oyo asalaka mosala makasi alongwe mosala, mpe abomi nzoto mpo na koluka mosala mosusu, kasi azwi te. Ndeko mwasi moko ya sembo oyo akómi mobange azali lisusu kokoka kosala mingi te na mosala ya Yehova.

2 Soki ozali na moko ya makambo oyo touti kotánga, okoki koyoka lokola ozali lisusu na ntina te. Makambo yango ekoki kosilisa yo esengo, kokitisa lokumu na yo mpe kobebisa boyokani na yo na basusu.

3. Ndenge nini Satana mpe bato oyo balandaka ye batalelaka bomoi ya bato?

3 Bato ya mokili oyo bamekolaka ndenge Satana atalelaka bomoi ya bato. Banda kala, Satana asalelaka bato makambo lokola nde bazali na motuya moke. Na motema mabe na ye, ayebisaki Eva ete akozala na bonsomi soki abuki mobeko ya Nzambe, nzokande ayebaki malamu ete kosala bongo ekomema nde na liwa. Satana nde atambwisaka ebongiseli ya mombongo, ya politiki mpe ya mangomba ya mokili oyo. Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ndenge bato mingi ya mombongo, bakonzi mingi ya politiki, mpe ya mangomba bazwaka bomoi ya bato na motuya te mpe bapesaka bato lokumu te.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Nzokande, Yehova alingi tóbatela lokumu na biso, mpe  asalisaka biso ntango tokutani na makambo oyo ekoki kosala ete tóyoka lokola tozangi ntina. (Nz. 136:23; Rom. 12:3) Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo Yehova asalisaka biso na makambo oyo elandi: (1) Ntango tozali na maladi, (2) ntango tozali na mikakatano ya mbongo, mpe (3) ntango bobange etindi biso tómona ete tozali na eloko ya malonga te ya kopesa na mosala ya Yehova. Kasi, tólobela naino ntina oyo tokoki kondima ete mokomoko na biso azali na motuya na miso ya Yehova.

TOZALI NA MOTUYA NA MISO YA YEHOVA

5. Nini endimisi yo ete bato bazali na motuya na miso ya Yehova?

5 Atako tosalemá na putulu ya mabele, tozali na motuya mingi koleka mwa zɛlo. (Eba. 2:7) Tólobela mwa bantina oyo endimisi biso ete tozali na motuya na miso ya Yehova. Ya liboso, akelaki moto na likoki ya komonisa bizaleli na ye. (Eba. 1:27) Na ndenge yango, atombolaki biso likoló ya bikelamu na ye mosusu nyonso awa na mabele, mpe apesaki biso mokumba ya kobatela mabele mpe banyama.​—Nz. 8:4-8.

6. Wapi likambo mosusu oyo emonisi ete Yehova azwaka biso bato ya kozanga kokoka na motuya?

6 Ata nsima ya lisumu ya Adama, Yehova akobaki kozwa bato na motuya. Azwaka biso na motuya mingi yango wana apesaki Yesu, Mwana na ye bolingo, lokola lisiko mpo na masumu na biso. (1 Yoa. 4:9, 10) Na nzela ya mbeka ya lisiko yango, Yehova akosekwisa bato oyo bakufá mpo na lisumu ya Adama, ezala “bayengebene mpe bato oyo bazangi boyengebene.” (Mis. 24:15) Liloba ya Nzambe emonisi ete tozali na motuya na miso na ye ata soki tozali na maladi, tozali babola, to mpe tokómi mibange.​—Mis. 10:34, 35.

7. Tángá bantina mosusu oyo endimisaka basaleli ya Nzambe ete Yehova azwaka bango na motuya.

7 Tozali na bantina mosusu ya kondima ete Yehova azwaka biso na motuya. Abendaki biso epai na ye mpe amonaki ndenge tondimaki nsango malamu. (Yoa. 6:44) Ntango tobandaki kopusana penepene na Yehova, ye mpe apusanaki penepene na biso. (Yak. 4:8) Lisusu, Yehova azwaka ntango mpe asalaka nyonso mpo na koteya biso; yango mpe emonisi ete tozali na motuya na miso na ye. Ayebi lolenge ya bato oyo tozali sikoyo mpe ayebi ete tokoki kokóma malamu koleka. Longola yango, apesaka biso disiplini mpo alingaka biso. (Mas. 3:11, 12) Nyonso wana emonisi polele ete Yehova azwaka biso na motuya!

8. Maloba ya Nzembo 18:27-29 ekoki kotinda biso tótalela mikakatano na biso ndenge nini?

8 Bato mosusu bazalaki komona Mokonzi Davidi ete azangi ntina, kasi Davidi ayebaki ete Yehova azalaki kolinga ye mpe kosalisa ye. Lokola Davidi ayebaki bongo, yango esalisaki ye akangela likambo yango motema. (2 Sa. 16:5-7) Ntango makanisi na biso elɛmbi to tokutani na mikakatano, Yehova akoki kosalisa biso tótalela makambo na ndenge mosusu mpe akoki kosalisa biso tólonga ata mokakatano nini. (Tángá Nzembo 18:27-29.) Soki Yehova azali kosalisa biso, eloko moko te ekoki kopekisa biso kosalela ye na esengo. (Rom. 8:31) Tólobela sikoyo makambo misato, oyo ntango tokutani na yango, tosengeli kobosana ata moke te ete Yehova alingaka biso mpe azwaka biso na motuya.

NTANGO TOZALI NA MALADI

Kotánga liloba ya Yehova ekosalisa biso tólongola makanisi ya mabe oyo euti na maladi (Talá paragrafe 9-12)

9. Maladi ekoki kotinda biso tóbanda komitalela ndenge nini?

9 Maladi ekoki kolɛmbisa makanisi na biso mpe kotinda biso tómona lokola tozali na ntina mpo na moto moko lisusu te. Tokoki  koyoka nsɔni mpo bato bazali komona ete tozali lisusu na makasi te, to ntango tosengeli kozela basusu básalisa biso. Ata soki bato mosusu bayebi maladi na biso te, mbala mosusu biso moko tozali koyoka nsɔni mpo makasi ya nzoto na biso ekiti. Na bantango yango ya mpasi, Yehova alendisaka biso. Ndenge nini?

10. Na kotalela Masese 12:25, nini ekoki kosalisa biso ntango tozali na maladi?

10 Ntango tozali na maladi, “liloba ya malamu” ekoki kolendisa biso. (Tángá Masese 12:25.) Na kati ya Biblia, Yehova akomisá ebele ya maloba ya malamu oyo ekundwelaka biso ete tozali na motuya na miso na ye ata soki tozali na maladi. (Nz. 31:19; 41:3) Soki totángi to mpe tozongeli kotánga maloba yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, Yehova akosalisa biso tólongola makanisi ya mabe oyo maladi na biso ebimisi.

11. Ndenge nini Yehova asalisaki ndeko mobali moko?

11 Tótalela ndakisa ya Jorge. Na bolenge na ye, abɛlaki maladi moko oyo ezalaki se kokóma makasi mpe etindaki ye amiyoka lokola azangi ntina. Jorge alobi boye: “Nayebaki te ete maladi yango ekotinda ngai namiyoka bongo, nayebaki mpe te ete nakobanda koyoka nsɔni mpo bato bazali kotalatala ngai. Wana maladi yango ezalaki kaka kokóma makasi, nakanisaki ndenge bomoi na ngai ekobongwana. Nayokaki mawa mingi mpe nasɛngaki Yehova asalisa ngai.” Ndenge nini Yehova asalisaki ye? Alobi boye: “Lokola nazalaki kokoka te kotya makanisi esika moko, balendisaki ngai natángaka mwa bavɛrsɛ moke na mokanda ya Nzembo, oyo emonisi ete Yehova atyelaka basaleli na ye likebi. Nazalaki kozongela kotánga mwa bavɛrsɛ yango mikolo nyonso, mpe ezalaki kobɔndisa ngai mpe kokitisa ngai motema. Nsima ya mwa ntango, bato bakómaki komona ete nakómi komungamunga  mingi. Balobaki kutu ete esengo na ngai ezalaki kolendisa bango. Namonaki ete Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai! Asalisaki ngai nabongola ndenge oyo nazalaki komitalela. Nakómaki kotya likebi mingi na makambo oyo Liloba na ye elobi mpo na ndenge oyo atalelaka ngai atako nazali na maladi.”

12. Soki ozali na maladi, okoki kosala nini mpo Yehova asalisa yo?

12 Soki ozali kobundana na maladi moko boye, yebá ete Yehova ayebi mpasi na yo. Sɛngá ye asalisa yo mpo obatela makanisi ya malamu. Lisusu, tángáká Biblia mpo omona maloba ya malamu oyo Yehova akomisá mpo na yo. Tyáká likebi na bavɛrsɛ oyo emonisi ete Yehova azwaka basaleli na ye na motuya mingi. Soki ozali kosala bongo, okomona ete Yehova azali malamu epai ya basaleli na ye nyonso ya sembo.​—Nz. 84:11.

NTANGO OZALI NA MIKAKATANO YA MBONGO

Kokanisa ndenge Yehova alaki ete akokokisa bamposa na biso ekosalisa biso na ntango oyo tozali koluka mosala kasi tozali kozwa te (Talá paragrafe 13-15)

13. Tata ya libota akoki komiyoka ndenge nini soki alongwe mosala?

13 Tata nyonso ya libota alingaka kokokisa bamposa ya libota na ye. Sikoyo, kanisá ete ndeko mobali moko asali likambo ya mabe te, kasi balongoli ye na mosala. Aluki mosala na ndenge nyonso, kasi azwi te. Na kotalela likambo yango, akoki komona ete azangi ntina. Ndenge nini kotya makanisi na bilaka ya Yehova ekoki kosalisa ye?

14. Mpo na bantina nini Yehova akokisaka bilaka na ye?

14 Yehova azangaka te kokokisa bilaka na ye. (Yos. 21:45; 23:14) Asalaka yango mpo na bantina ebele. Ya liboso, asalaka yango mpo na nkombo to lokumu na ye. Yehova ye moko alaki ete akokokisa bamposa ya basaleli na ye ya sembo, mpe amonaka ete asengeli kokokisa elaka yango. (Nz. 31:1-3) Ya mibale, Yehova ayebi ete tokokóma mawamawa soki akokisi te bamposa na biso baoyo tozali na kati ya libota  na ye. Alaki ete akokokisa bamposa na biso ya mosuni mpe ya elimo, mpe eloko moko te ekopekisa ye akokisa elaka yango!​—Mat. 6:30-33; 24:45.

15. (a) Mokakatano nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso bakutanaki na yango? (b) Elikya nini Nzembo 37:18, 19 epesi biso?

15 Soki tobosani te ntina oyo Yehova akokisaka bilaka na ye, tokoki kokanga motema ntango tozali na mikakatano ya mbongo. Tózwa ndakisa ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Ntango bakristo ya lisangá ya Yerusaleme bakutanaki na minyoko makasi, “bango nyonso, longola kaka bantoma, bapanzanaki.” (Mis. 8:1) Kanisá naino ndenge bakristo yango bakutanaki na mikakatano ya mbongo! Emonani ete batikaki bandako na bango mpe misala na bango. Atako bongo, Yehova asundolaki bango te; bakristo yango mpe babungisaki esengo na bango te. (Mis. 8:4; Ebr. 13:5, 6; Yak. 1:2, 3) Yehova asalisaki bakristo wana ya sembo; akosalisa mpe biso.​—Tángá Nzembo 37:18, 19.

NTANGO TOKÓMI NA MIKAKATANO YA BOBANGE

Soki tozali kosala kaka oyo tokoki, ata na bobange, ekondimisa biso ete Yehova azwaka biso mpe mosala na biso ya sembo na motuya (Talá paragrafe 16-18)

16. Nini ekoki kotinda biso tómituna soki tozali kaka na motuya na miso ya Yehova?

16 Ntango mbula epusani, tokoki kobanda komona ete tozali lisusu na ntina mingi te na miso ya Yehova. Mbala mosusu Mokonzi Davidi mpe akómaki na mitungisi ya ndenge wana ntango akómaki mobange. (Nz. 71:9) Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso?

17. Likambo oyo ekómelaki ndeko mwasi moko na nkombo Jheri ekoki koteya biso nini?

17 Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Jheri. Babengisaki ye aya kolanda formasyo mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi, kasi alingaki kokende te. Alobaki boye: “Nakómi mobange, mobali na ngai akufá, mpe nazali  ata na makoki te oyo Yehova akoki kosalela. Nazali na ntina te.” Na butu, asopaki motema na ye liboso ya Yehova na libondeli. Ntango akómaki na Ndako ya Bokonzi mokolo oyo elandaki, azalaki kaka komituna soki asengelaki mpenza kozala wana. Ntango bazalaki kopesa formasyo yango, ndeko moko amonisaki ete likoki monene oyo tozali na yango ezali nde kondima Yehova ateya biso. Ndeko Jheri alobi boye: “Na nse ya motema nalobaki, ‘Nazali na likoki yango!’ Nabandaki kolela mpo namonaki ndenge Yehova azalaki koyanola na libondeli na ngai. Amonisaki ngai ete nazalaki na eloko ya motuya oyo nakokaki kopesa mpe ete alingaki koteya ngai!” Ndeko Jheri alobi boye: “Ntango nakendaki kuna, nazalaki motema likoló, nalɛmbaki nzoto mpe nazalaki komitungisa. Kasi, nsima ya formasyo yango, nazalaki na mpiko, nalendisamaki, mpe nayokaki ete nazali na ntina!”

18. Ndenge nini Biblia emonisi ete Yehova akobaka kozwa na motuya mosala ya baoyo bazali kokóma mibange?

18 Soki ozali kokóma mobange, yebá ete Yehova akozanga mosala ya kopesa yo te. (Nz. 92:12-15) Yesu ateyaki ete ata soki tozali na makoki mingi te to tomoni ete milende na biso ezali moke, Yehova asepelaka na nyonso oyo tokoki kosalela ye. (Luka 21:2-4) Na yango, salá kaka oyo okoki kosala. Na ndakisa, okoki koyebisa basusu makambo ya Yehova, kobondela mpo na bandeko, mpe kolendisa bango bátikala sembo. Soki Yehova amonaka ete ozali moninga na ye ya mosala, ezali te mpo na makambo oyo osalaka, kasi nde mpo na elimo na yo ya botosi.​—1 Ko. 3:5-9.

19. Elikya nini Baroma 8:38, 39 epesi biso?

19 Tozali mpenza na esengo ndenge tosambelaka Yehova, Nzambe oyo azwaka mpenza na motuya basaleli na ye! Akelaki biso mpo tósala mokano na ye, mpe losambo na ye nde ebakiselaka biso esengo na bomoi. (Em. 4:11) Ata soki mokili ekoki komona biso mpamba, Yehova ayokelaka biso nsɔni te. (Ebr. 11:16, 38) Ntango olɛmbi nzoto mpo na maladi, bobola, to mpo okómi mobange, kobosana te ete eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Tata na biso ya likoló.​—Tángá Baroma 8:38, 39.

^ par. 5 Ozali na mikakatano oyo etindi yo omimona lokola ozangi ntina? Lisolo oyo ekokundwela yo ete ozali na motuya mingi na miso ya Yehova. Ekolobela mpe oyo okoki kosala mpo obatela lokumu na yo ata soki likambo nini ekómeli yo na bomoi.

LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe moninga na ngai