ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIMONANELI OYO EMONISI NDENGE LIKOLÓ EZALAKA
Makanisi oyo bato bazalaka na yango mpo na baoyo bafandaka na likoló
Osí omituná soki likoló ezalaka ndenge nini mpe banani bafandaka kuna? Soki ɛɛ, ozali yo moko te. Banda kala, bato bazalaka na makanisi ndenge na ndenge na likambo yango. Basusu bakanisaka ete bankɔkɔ nde bafandaka kuna mpe tosengeli komemya bango. Basusu bamonaka ete likoló ezali esika moko ya kimya mpenza, epai baanzelu mpe bato ya malamu oyo bakufá bafandaka. Basusu mpe bamonaka ete likoló ezali esika oyo bamilio ya banzambe bafandaka.
Bato mingi balobaka ete tokoki koyeba eloko moko te etali likoló mpo ata moto moko te autá kuna mpo ayebisa biso yango. Makanisi ya ndenge wana ebongi te. Yesu Kristo azalaki na likoló liboso aya awa na mabele. Ayebisaki bakonzi ya mangomba ya siɛklɛ ya liboso polele ete, “nautaki na likoló nakiti mpo na kosala, mokano na ngai te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.” Na yango, Yesu ayebisaki bayekoli na ye makambo oyo ye moko amonaki na miso ntango alobaki na bango: “Na ndako ya Tata na ngai bisika ya kofanda ezali mingi.”—Yoane 6:38; 14:2.
Nzambe, Tata ya Yesu, nkombo na ye Yehova mpe “ndako” ya Yehova ezali na likoló. (Nzembo 83:18) Yango wana, moto moko te akoki kolobela makambo ya likoló malamu koleka Yehova Nzambe ná Yesu. Balobelá makambo mingi etali likoló na nzela ya bimonaneli ya kokamwa oyo bamonisaki bato ya sembo.
Lisolo oyo elandi ekolobela bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisi makambo oyo bato bamonaki na bimonaneli. Ntango ozali kotalela bimonaneli yango, kobosana te ete likoló ekeseni na mabele, ezali te na biloko oyo okoki kosimba to komona. Na esika alimbolela biso makambo na ndenge ya elimo, oyo tokokoka kokanga ntina na yango te, Nzambe asalelaki bimonaneli mpo na komonisa ndenge likoló ezalaka na maloba oyo tokoki kokanga ntina. Bimonaneli yango ekoki kosalisa yo oyeba baoyo bafandaka na likoló epai “bisika ya kofanda ezali mingi.”