Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elenge, Mozalisi na yo alingi ozala na esengo

Elenge, Mozalisi na yo alingi ozala na esengo

“Azali kotondisa bomoi na yo na makambo ya malamu.”​—NZEMBO 103:5.

NZEMBO: 135, 39

1, 2. Mpo na nini ezali likambo ya bwanya oyoka Mozalisi na yo ntango ozali kozwa bikateli oyo etali bomoi na yo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

SOKI ozali elenge, na ntembe te bato bapesaka yo toli ndenge na ndenge mpo na bomoi na yo ya lobi. Mbala mosusu balakisi, bapesi-toli, to bato mosusu bayebisaka yo ete osengeli kotánga kelasi ya milaimilai to koluka mosala ya mbongo mingi. Kasi, Yehova apesi yo toli ya ndenge mosusu. Yebá ete alingi otánga malamu na kelasi mpo esalisa yo ozwa mwa eloko ya kobikela. (Bakolose 3:23) Kasi ayebi mpe ete ntango ozali elenge, osengeli kozwa bikateli minene oyo etali bomoi na yo ya lobi. Na yango, apesi mitinda mpo na kotambwisa mpe kosalisa yo ozala na bomoi oyo eyokani na mokano na ye na mikolo oyo ya nsuka.​—Matai 24:14.

2 Kobosana te ete Yehova ayebi makambo nyonso. Ayebi makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ezali koya, mpe ayebi ete nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene. (Yisaya 46:10; Matai 24:3, 36) Yehova ayebi mpe yo. Ayebi nini ekopesa yo esengo ya solosolo mpe nini ekomemela yo mpasi. Toli ya bato  ekoki komonana lokola ezali malamu, kasi soki eyokani te na Liloba ya Nzambe, ezali ya bwanya te.​—Masese 19:21.

BWANYA EUTAKA KAKA EPAI YA YEHOVA

3, 4. Kolanda toli ya mabe ebimisaki mbuma nini mpo na Adama ná Eva, mpe bakitani na bango?

3 Kopesa bato toli ya mabe ebandá kala. Satana nde moto ya liboso oyo apesaki bato toli ya mabe. Ayebisaki Eva ete ye ná Adama bakozala na esengo koleka soki bango moko batambwisi bomoi na bango. (Ebandeli 3:1-6) Kasi, Satana azalaki koluka nde matomba na ye moko! Alingaki ete Adama ná Eva, mpe bakitani na bango, bátosa mpe básambela ye, kasi Yehova te. Nzokande, Satana asalelaki bato ata eloko moko te. Yehova nde apesaki bango eloko nyonso oyo bazalaki na yango. Asalaki bango mwasi ná mobali, atyaki bango na elanga moko kitoko, mpe apesaki bango nzoto ya kokoka, oyo ekokaki koumela seko.

4 Likambo ya mawa, Adama ná Eva batosaki Nzambe te. Na yango, bakataki boyokani na Moto oyo apesaki bango bomoi. Ebimisaki mbuma ya mabe mpenza. Ndenge moko na fololo oyo bakati na nzete, mokemoke Adama ná Eva banunaki mpe bakufaki. Bakitani na bango mpe banyokwamaki, ata mpe biso nyonso lelo. (Baroma 5:12) Bato mingi lelo batosaka Nzambe te mpe batambwisaka bomoi na bango ndenge balingi. (Baefese 2:1-3) Yango ebimisi mbuma nini? Biblia elobi ete “bwanya ezali te” ntango bato bazali kotɛmɛla Yehova.​—Masese 21:30.

5. Nzambe ayebaki likambo nini mpo na bato, mpe nini endimisi yango?

5 Yehova ayebaki ete bato mosusu, ata mpe ebele ya bilenge, bakoluka koyeba ye mpe kosalela ye. (Nzembo 103:17, 18; 110:3) Bilenge yango bazali na motuya mingi na miso ya Yehova! Ozali moko na bango? Soki ezali bongo, na ntembe te ozali kosepela na ebele ya “makambo ya malamu” oyo Nzambe apesi, mpe ezali kobakisela yo esengo. (Tángá Nzembo 103:5; Masese 10:22) Na lisolo oyo, tokolobela kaka makambo minei: ebele ya bilei ya elimo, baninga ya malamu, mikano oyo ebongi komityela, mpe bonsomi ya solosolo.

YEHOVA APESI YO BILEI YA ELIMO

6. Mpo na nini osengeli kokokisa mposa na yo ya koyeba Nzambe, mpe Yehova apesi nini mpo na kosalisa yo?

6 Nyama ezalaka na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe te, kasi, biso bato tozalaka na mposa ya koyeba Mozalisi na biso. (Matai 4:4) Soki ozali koyoka Nzambe, okozwa bososoli, bwanya mpe esengo. Yesu alobaki: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Nzambe apesi biso Biblia mpe apesaka biso ebele ya bilei ya elimo na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo kondima na biso ekóma makasi. (Matai 24:45) Tosepelaka mpenza na ebele ya bilei yango!​—Yisaya 65:13, 14.

7. Ndenge nini bilei ya elimo oyo Nzambe apesi ekosalisa yo?

7 Bilei ya elimo ekoki kosalisa yo okóma na bwanya mpe likoki ya kokanisa malamu; yango ekoki kobatela yo na makambo mingi. (Tángá Masese 2:10-14.) Na ndakisa, bizaleli yango ekosalisa yo oyeba mateya ya lokuta, lokola oyo elobaka ete Mozalisi azalaka te, to ete mbongo mpe biloko ya mokili nde ekopesa yo esengo. Ekosalisa yo mpe okima bamposa mpe makambo oyo ekosala yo mabe. Na yango, salá nyonso oyo okoki mpo okóma na bwanya mpe likoki ya kokanisa malamu. Soki osali bongo, okomona ete Yehova alingaka yo mpe alingi ozala na bomoi oyo eleki malamu.​—Nzembo 34:8; Yisaya 48:17, 18.

8. Mpo na nini sikoyo nde ntango ya kozala na boyokani makasi na Nzambe, mpe ndenge nini ekosalisa yo na mikolo oyo ezali koya?

8 Mosika te, mokili ya Satana ekobebisama.  Kaka Yehova nde akobatela biso mpe akopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango, ata mpe bilei na biso ya mokolo na mokolo. (Habakuku 3:2, 12-19) Na yango, sikoyo nde ntango ya kozala na boyokani makasi na Yehova mpe ya kotyela ye motema mobimba. (2 Petro 2:9) Na ndenge yango, ata soki makambo nini esalemi, okozala na makanisi moko na mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Natye Yehova liboso na ngai ntango nyonso. Lokola ye azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nakotengatenga te.”​—Nzembo 16:8.

YEHOVA APESI YO BANINGA YA SOLOSOLO

9. (a) Na kotalela Yoane 6:44, Yehova asalaka nini? (b) Mpo na nini toyokaka esengo ntango tokutani na Motatoli mosusu?

9 Ntango okutani mpo na mbala ya liboso na moto oyo asambelaka Yehova te, makambo nini oyebi mpo na ye? Okoki koyeba nkombo na ye mpe ndenge azali komonana, kasi oyebi makambo mingi te mpo na ye. Nzokande, ntango okutani na moto oyo asambelaka Yehova, oyebi ete alingaka Yehova. Oyebi ete Yehova amonaki eloko moko ya malamu epai na ye, mpe abendaki ye na losambo ya solo. (Tángá Yoane 6:44.) Ata soki auti wapi to abɔkwamá ndenge nini, oyebi makambo mingi mpo na ye, ye mpe ayebi makambo mingi mpo na yo!

Yehova alingi ozala na baninga ya malamu mpe omityela mikano ya malamu (Talá paragrafe 9-12)

10, 11. Makambo nini emonanaka epai ya Batatoli ya Yehova nyonso, mpe ndenge nini esalisaka yo?

10 Soki okutani na Motatoli ya Yehova, oyebi ete makambo oyo eleki ntina mpo na ye ezali mpe bongo mpo na yo. Oyebi ete ata soki minɔkɔ ya mboka na bino ekeseni, bino nyonso bolobaka ‘monɔkɔ ya pɛto,’ elingi koloba solo ya Biblia. (Sefania 3:9) Yango elingi koloba ete bondimelaka Nzambe, botosaka mibeko moko oyo etali bizaleli malamu, mpe bozali na elikya moko mpo na mikolo oyo ezali koya. Makambo yango ekosala ete bótyelana motema mpe bósala boninga ya solosolo oyo ekoumela libela.

11 Na yango, lokola osambelaka Yehova, okoki mpenza koloba ete ozali na baninga ya solosolo. Ozali na baninga na mokili mobimba, ata soki omoná bango naino te! Longola Batatoli ya Yehova, oyebi bato mosusu oyo bazali na likabo ya motuya ndenge wana?

 YEHOVA ASALISI YO OMITYELA MIKANO YA MALAMU

12. Mikano nini ya elimo okoki komityela?

12 Tángá Mosakoli 11:9–12:1. Omityelá mikano ya elimo oyo olingi kokokisa? Mbala mosusu omityeli mokano ya kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe ya kopesa biyano to kosala badevuare ya malamu na makita. Mbala mosusu mpe ozali kosala makasi osalelaka Biblia malamu mingi koleka na mosala ya kosakola. Omiyokaka ndenge nini ntango omoni ete ozali kokola malamu na elimo to ntango basusu bapesi yo longonya mpo na yango? Na ntembe te osepelaka mingi! Osengeli mpenza koyoka esengo mpo ozali kosala mokano ya Yehova, ndenge Yesu asalaki.​—Nzembo 40:8; Masese 27:11.

13. Mpo na nini eleki malamu komipesa na kosalela Nzambe na esika ya komityela mikano na mokili oyo?

13 Soki omipesi na mosala ya Yehova, ozali kosala mosala oyo ekopesa yo esengo mpe ekobongisa bomoi na yo. Ntoma Paulo akomaki: “Bópikama makasi, bóninganaka te, bózala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo, mpo boyebi ete mosala na bino ya makasi ezali mpamba te na kati ya Nkolo.” (1 Bakorinti 15:58) Kasi, bato oyo bamityelaka mikano na mokili oyo, na ndakisa komipesa na koluka mbongo to lokumu, bazalaka mpenza na esengo te. Ata soki bazwi eloko oyo balukaki, mbala mingi bamonaka kaka ete eloko moko ezali kozanga. (Luka 9:25) Ndakisa ya Mokonzi Salomo emonisi yango.​—Baroma 15:4.

14. Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Salomo?

14 Salomo, oyo azalaki na bozwi mpe na nguya mingi amekaki kosala likambo moko; alobaki boye: ‘Nameka esengo mpe namona bolamu’ oyo ekobima. (Mosakoli 2:1-10) Na yango, Salomo atongaki bandako ya kitoko, asalaki bilanga ná bazamba ya kitoko mpenza, mpe asalaki nyonso oyo alingaki. Amiyokaki ndenge nini? Azwaki esengo? Salomo alobaki: “Natalaki misala na ngai nyonso oyo mabɔkɔ na ngai esalaki mpe mosala makasi oyo nasalaki makasi nakokisa, mpe talá! nyonso ezalaki mpamba mpe kolanda mopɛpɛ, eloko moko ya litomba ezalaki te.” (Mosakoli 2:11) Liteya nini okoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Salomo?

15. Mpo na nini osengeli kozala na kondima, mpe na kotalela Nzembo 32:8, ndenge nini kondima ekosalisa yo?

15 Bato mosusu bazwaka mateya kaka nsima ya kosala libunga to nsima ya kokutana na mpasi. Yehova alingi te ete likambo ya bongo ekómela yo. Alingi oyoka ye mpe otosa ye. Mpo na kosala yango osengeli kozala na kondima, kasi okoyoka mawa ata moke te mpo na bikateli ya malamu oyo ozwi mpo na kondima na yo. Yehova akobosana ata moke te ‘bolingo oyo omoniselaki nkombo na ye.’ (Baebre 6:10) Na yango, salá nyonso oyo esengeli mpo okóma na kondima makasi. Yango ekosala ete ozwa bikateli ya malamu na bomoi mpe okomona ete Tata na biso ya likoló alingi mpenza ozala na bomoi oyo eleki malamu.​—Tángá Nzembo 32:8.

YEHOVA APESI YO BONSOMI YA SOLOSOLO

16. Mpo na nini tosengeli kozwa bonsomi na motuya mpe kosalela yango na bwanya?

16 Ntoma Paulo akomaki ete: “Esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali wana.” (2 Bakorinti 3:17) Yehova alingaka bonsomi, mpe atyaki mposa yango na motema na yo. Kasi, alingi ete osalela bonsomi na yo na bwanya mpo ebatela yo. Mbala mosusu oyebi bilenge oyo batalaka pornografi, basalaka pite, batyaka bomoi na bango na likama na masano ya mobulu, to mpe bamɛlaka makaya to masanga mingi. Na ebandeli, makambo yango ekoki komonana lokola masɛki to kosepelisa, kasi mbala mingi ebimisaka mbuma  ya mabe, na ndakisa maladi, ekómisaka moto moombo, to ekoki ata komema na liwa. (Bagalatia 6:7, 8) Bilenge oyo bamipesi na makambo yango bakoki kokanisa ete bazali na bonsomi, nzokande bazali na bonsomi te.​—Tito 3:3.

17, 18. (a) Na ndenge nini kotosa Nzambe ememelaka biso bonsomi ya solosolo? (b) Na ndenge nini Adama ná Eva bazalaki na bonsomi mingi koleka bato lelo oyo?

17 Kasi, kotosa Yehova ezali mpo na bolamu na biso. Esalisaka biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ mpe tózala na bonsomi ya solosolo. (Nzembo 19:7-11) Mpe ntango ozali kosalela bonsomi na yo na bwanya, elingi koloba oponi kotosa mibeko mpe mitinda ya Nzambe, okomonisa Nzambe mpe baboti na yo ete bakoki kotyela yo motema. Yango ekoki kosala ete baboti na yo bápesa yo bonsomi mingi koleka. Mpe Yehova alaki ete mosika te akopesa basaleli na ye nyonso ya sembo bonsomi ya kokoka, oyo Biblia ebengi “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”​—Baroma 8:21.

18 Adama ná Eva bazalaki na bonsomi ya ndenge wana. Na elanga ya Edene, Nzambe apekisaki bango kaka likambo moko: bálya te mbuma ya nzete moko. (Ebandeli 2:9, 17) Okanisi ete Nzambe azalaki makambo makasi to azangaki bosembo ndenge apesaki bango mobeko wana? Te! Kanisá naino: bato babimisaka ebele ya mibeko mpe batindaka basusu na makasi bátosa yango. Kasi, Yehova apesaki Adama ná Eva mobeko kaka moko.

19. Yehova ná Yesu bazali koteya biso makambo nini oyo ekosalisa biso tózwa bonsomi?

19 Yehova asalelaka biso makambo na bwanya mpenza. Na esika ya kotyela biso mibeko ebeleebele, amoniselaka biso motema molai ntango azali koteya biso bolingo. Ateyaka biso ndenge ya kosalela mitinda na ye na bomoi na biso mpe koyina oyo ezali mabe. (Baroma 12:9) Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu asalisi biso tóyeba ntina oyo bato basalaka mabe. (Matai 5:27, 28) Mpe na mokili ya sika, Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, akokoba koteya biso tótalelaka malamu ná mabe ndenge ye atalelaka yango. (Baebre 1:9) Yesu akokómisa biso bato ya kokoka; ezala na nzoto to na makanisi. Kanisá ndenge makambo ekozala ntango moto moko te akoyoka mposa ya kosala mabe mpe tokonyokwama te mpo na kozanga kokoka. Mpe nsukansuka, tokozwa ‘bonsomi oyo etondi na nkembo,’ oyo Yehova alaki biso.

20. (a) Ndenge nini Yehova asalelaka bonsomi na ye? (b) Ndenge nini okoki komekola ye?

20 Ata na mokili ya sika, bonsomi na biso ekozala kaka na ndelo. Bolingo mpo na Nzambe mpe bato nde ekotambwisa biso. Ntango tomonisaka bolingo, tomekolaka Yehova. Yehova azali na bonsomi oyo ezangi ndelo, kasi amoná malamu ete bolingo nde etambwisa makambo nyonso oyo asalaka, ata mpe ndenge ya kosalela biso makambo. (1 Yoane 4:7, 8) Yango wana, tokozala na bonsomi ya solosolo kaka soki tomekoli bolingo ya Nzambe.

21. (a) Davidi alobaki nini mpo na Yehova? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo elandi

21 Ozali na botɔndi mpo na makambo nyonso ya malamu oyo Yehova apesi yo? Apesi yo bilei ya elimo, baninga ya malamu, asalisi yo omityela mikano ya malamu, apesi yo elikya ya kozwa bonsomi ya kokoka na mikolo oyo ezali koya, mpe makabo mosusu ya kitoko. (Nzembo 103:5) Na ntembe te, ozali komiyoka lokola Davidi ntango asalaki libondeli oyo ezali na Nzembo 16:11 ete: ‘Oyebisi ngai nzela ya bomoi. Liboso ya elongi na yo, bato batondaka na esengo; makambo oyo epesaka esengo ezali na lobɔkɔ na yo ya mobali mpo na seko.’ Na lisolo oyo elandi, tokotalela makambo mosusu ya motuya oyo ezali na Nzembo 16. Yango ekosalisa yo omona ndenge okoki kozala na bomoi oyo eleki malamu!