Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Nayebi ete akosekwa”

“Nayebi ete akosekwa”

“Lazare moninga na biso akei kopema, kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye.”​—YOANE 11:11.

NZEMBO: 142, 129

1. Marta andimaki likambo nini mpo na ndeko na ye? (Talá elilingi ya ebandeli.)

MARTA, oyo azalaki moninga mpe moyekoli ya Yesu, azalaki na mawa makasi. Ndeko na ye ya mobali Lazare akufaki. Ezalaki nde na likambo oyo ekokaki kobɔndisa ye? Ɛɛ. Yesu alakaki ye: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” Ya solo, maloba wana ekokaki kolongola mawa nyonso ya Marta te. Kasi, Marta andimaki elaka ya Yesu, mpe alobaki: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka.” (Yoane 11:20-24) Azalaki na ntembe te ete lisekwa ekozala na mikolo ezali koya. Kasi, Yesu asalaki likamwisi. Asekwisaki Lazare kaka na mokolo wana.

2. Mpo na nini okosepela kondima likambo oyo Marta mpe andimaki?

2 Lelo, tozali na eloko moko te oyo ekoki kotinda biso tózela ete Yesu to Tata na ye básalela biso likamwisi ya ndenge wana. Kasi, lokoka Marta, yo mpe ondimaka mpenza ete bato oyo olingaki bakosekwa na mikolo ezali koya? Mbala mosusu molongani na yo, mama na yo, tata na yo, nkɔkɔ na yo, to ata mwana na yo akufá. Ozalaka na mposa ya koyamba ye, kosolola na ye, mpe kosɛka elongo na ye. Likambo ya esengo, lokola Marta,  ozali na ntina ya koloba ete: ‘Nayebi ete moto oyo nalingaki akosekwa.’ Atako bongo, ebongi mokristo mokomoko akanisa makambo oyo etindaka biso tóndima ete lisekwa ekozala.

3, 4. Yesu asekwisaki banani, mpe ndenge nini elendisaki kondima ya Marta?

3 Lokola Marta azalaki kofanda pene na Yerusaleme, mbala mosusu amonaki te ntango Yesu asekwisaki mwana mobali ya mwasi moko oyo mobali akufá pene na Naine, na Galile. Kasi, ntango mosusu ayokaki nsango ya lisekwa yango. Mbala mosusu ayokaki mpe ete Yesu asekwisaki mwana mwasi ya Yairuse. Bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya Yairuse “bayebaki ete [mwana yango] akufi.” Kasi, Yesu asimbaki ye na lobɔkɔ mpe alobaki: “Mwana mwasi, tɛlɛmá!” Na mbala moko atɛlɛmaki. (Luka 7:11-17; 8:41, 42, 49-55) Marta ná ndeko na ye Maria bayebaki ete Yesu akokaki kobikisa bato ya maladi. Yango wana bamonaki ete soki Yesu azalaki wana, mbɛlɛ Lazare akufaki te. Sikoyo lokola Lazare akufaki, Marta azalaki kozela nini? Kobosana te ete alobaki ete Lazare akozonga na bomoi na mikolo ezali koya, “na mokolo ya nsuka.” Nini endimisaki ye? Mpe nini ekoki kondimisa yo ete na mikolo ezali koya, bato bakosekwa, ata mpe bato oyo olingaki?

4 Makambo mingi ekoki kotinda biso tóndima ete lisekwa ekozala. Tokolobela sikoyo mwa makambo yango. Okoki komona ete Liloba ya Nzambe elobi makambo mosusu oyo okanisaka mingi te, kasi ekoki kosalisa yo ondima mpenza ete okomona lisusu bato oyo olingaki.

MAKAMBO OYO EPESAKA ELIKYA!

5. Mpo na nini Marta andimaki ete Lazare akosekwa?

5 Tomonaki ete Marta alobaki te ete: ‘Nazali kolikya ete ndeko na ngai akosekwa.’ Alobaki nde: “Nayebi ete akosekwa.” Nini endimisaki Marta? Ayebaki masolo ya lisekwa oyo esalemaki na ntango ya kala. Mbala mosusu azalaki koyoka yango na ndako mpe na sinagoga ntango azalaki mwana moke. Tólobela ndakisa misato ya masolo ya lisekwa oyo Biblia elobeli.

6. Na ntembe te Marta ayebaki lisolo ya likamwisi nini?

6 Lisekwa ya liboso esalemaki na ntango oyo Nzambe azalaki kopesa mosakoli Eliya nguya ya kosala makamwisi. Na nɔrdi ya Yisraele, ezalaki na mboka moko ya Fenisia oyo ebengamaki Zarefate, epai mwasi moko ya mobola oyo mobali akufá ayambaki mosakoli Eliya. Na nsima, Yehova asalaki likamwisi moko: asalaki ete farini mpe mafuta ya mwasi yango esila te mpo na kobatela ye ná mwana na ye na bomoi. (1 Bakonzi 17:8-16) Nsima ya mikolo, mwana yango abɛlaki mpe akufaki. Kasi Eliya asalisaki mwasi yango; asimbaki mwana yango mpe abondelaki: “Nzambe na ngai, nabondeli yo, salá ete molimo ya mwana oyo ezonga kati na ye.” Esalemaki bongo! Nzambe ayokaki Eliya, mpe mwana yango azongaki na bomoi. Wana nde lisekwa ya liboso oyo Biblia elobeli. (Tángá 1 Bakonzi 17:17-24.) Na ntembe te, Marta ayebaki lisolo yango ya kokamwa.

7, 8. (a) Ndenge nini Elisha abɔndisaki mama moko oyo azalaki na mawa? (b) Likamwisi oyo Elisha asalaki emonisi nini mpo na Yehova?

7 Lisekwa ya mibale oyo Biblia elobeli ezali oyo mosakoli Elisha asalaki. Na engumba Shuneme, ezalaki na mwasi Moyisraele moko oyo azalaki na bana te. Lokola ayambaki Elisha malamu mpenza, Yehova apambolaki mwasi yango ná mobali na ye oyo akómaki mobange mpe babotaki mwana mobali. Kasi, mwa bambula na nsima, mwana yango akufaki. Mama yango ayokaki mpasi mpenza! Na mawa na ye, asalaki mobembo  ya kilomɛtrɛ 30 mpo na kokende koluka Elisha na Ngomba Karamele. Elisha ayebisaki mosaleli na ye Gehazi akende liboso na bango na Shuneme kosekwisa mwana yango. Kasi, Gehazi alongaki kosala yango te. Na nsima, mama yango ná Elisha bakómaki na ndako.​—2 Bakonzi 4:8-31.

8 Elisha akɔtaki epai mwana alalaki, mpe abondelaki. Yehova ayokaki libondeli ya Elisha mpe azongisaki mwana yango na bomoi. Ntango mama yango amonaki mwana na ye na bomoi, atondaki na esengo! (Tángá 2 Bakonzi 4:32-37.) Mbala mosusu akanisaki maloba ya libondeli ya Hana. Hana azalaki na mwana te, tii ntango Yehova apambolaki ye mpe abotaki Samwele. Hana asanzolaki Yehova mpo “akitisaka na Nkunda, mpe abimisaka,” elingi koloba alamwisaka. (1 Samwele 2:6) Ndenge Nzambe alamwisaki mwana wana na Shuneme, amonisaki ete azali na likoki ya kosekwisa bakufi.

9. Limbolá ndenge lisekwa ya misato oyo Biblia elobeli esalemaki.

9 Likamwisi mosusu esalemaki nsima ya liwa ya Elisha. Nsima ya kosala lokola mosakoli mbula koleka 50, Elisha “abɛlaki maladi” mpe nsukansuka akufaki. Nsima ya mikolo, kaka mikuwa na ye nde etikalaki. Mokolo moko, Bayisraele bakendaki kokunda ebembe ya mobali moko. Na mbala moko, bamonaki banguna bazali koya. Bayisraele yango balukaki kokima nokinoki, na yango babwakaki kaka ebembe yango na lilita ya Elisha. Biblia elobi: “Ntango moto yango atutaki mikuwa ya Elisha, na mbala moko, azongaki na bomoi mpe atɛlɛmaki na makolo na ye.” (2 Bakonzi 13:14, 20, 21) Masolo wana endimisaki Marta ete Nzambe azali na nguya likoló ya liwa. Esengeli mpe kondimisa yo ete nguya ya Nzambe ezali monene, ezangi nsuka.

MAKAMBO OYO ESALEMAKI NA NTANGO YA BANTOMA

10. Petro asalaki nini mpo na mokristo moko ya mwasi oyo akufaki?

10 Makomami ya Grɛki ya bokristo mpe ezali na masolo oyo elobeli ndenge basaleli ya sembo ya Nzambe basekwisaki bato. Tolobelaki bato oyo Yesu asekwisaki pene na engumba Naine mpe na ndako ya Yairuse. Mwa moke na nsima, ntoma Petro asekwisaki Dorkasi, to Tabita. Petro akendaki na shambre esika balalisaki ebembe, abondelaki mpe na nsima alobaki: “Tabita, tɛlɛmá!” Na mbala moko Tabita azongaki na bomoi, mpe Petro ‘alakisaki ye na bomoi’ epai ya bakristo mosusu oyo bazalaki wana. Likambo yango eyebanaki mingi mpe bato mingi “bakómaki bandimi ya Nkolo.” Bayekoli yango ya sika bakokaki kosakola nsango malamu ya Yesu mpe koyebisa bato nyonso ete Yehova azali na likoki ya kosekwisa bakufi.​—Misala 9:36-42.

11. Monganga Luka alobaki nini mpo na elenge moko, mpe likambo oyo esalemaki esalaki nini epai ya bato?

11 Bato bamonaki mpe ntango lisekwa mosusu esalemaki. Mokolo moko, ntoma Paulo azalaki na likita na shambre moko ya likoló na Troase, oyo ezali lelo na nɔrdi-wɛsti ya Turquie. Ntoma Paulo azalaki koloba tii na midi ya butu. Elenge mobali moko na nkombo Etishe azalaki koyoka, afandi na lininisa. Kasi, alalaki mpe akweaki longwa na etajɛ ya misato. Mbala mosusu Luka nde moto ya liboso oyo akómaki esika Etishe akweaki. Lokola azalaki monganga, amonaki te ete elenge yango azoki kaka to abungisi makanisi, amonaki ete akufi! Ntoma Paulo mpe akitaki na nse. Amibwakaki likoló ya Etishe mpe bato nyonso bakamwaki ntango alobaki: “Molimo na ye ezali na kati na ye,” elingi koloba azali na bomoi. Likamwisi yango esimbaki mpenza motema ya bato oyo  bamonaki yango. Ntango bamonaki ete elenge mobali yango akufaki mpe na nsima asekwaki, “babɔndisamaki mingi koleka.”​—Misala 20:7-12.

ELIKYA YA KOTYELA MOTEMA

12, 13. Na kotalela masolo ya lisekwa oyo tolobeli, mituna nini tokoki komituna?

12 Bandakisa ya lisekwa oyo tolobeli esengeli kolendisa kondima na yo ndenge elendisaki Marta. Esengeli kondimisa yo ete Nzambe oyo apesá biso bomoi akoki kosekwisa moto oyo akufá. Kasi, kobosana te ete na esika oyo lisekwa mokomoko oyo tolobeli esalemaki, mosaleli moko ya sembo ya Nzambe, lokola Eliya, Yesu, to Petro azalaki. Mpe makambo yango esalemaki na ntango oyo Yehova azalaki kosala makamwisi. Bongo na ntango oyo makamwisi ya ndenge wana ezalaki te, bato ya sembo bakokaki nde kozela ete Nzambe asekwisa bakufi na mikolo ezali koya? Bakokaki nde kozala na kondima lokola Marta, oyo alobaki mpo na ndeko na ye ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka”? Nini endimisaki Marta ete lisekwa ekozala, mpe mpo na nini yo mpe okoki kondima yango?

13 Masolo ebele oyo ezali na Liloba ya Nzambe emonisi ete basaleli ya Nzambe ya sembo bayebaki ete lisekwa ekozala na mikolo ezali koya. Tólobela ndambo ya masolo yango.

14. Lisolo ya Abrahama ezali koteya biso nini mpo na lisekwa?

14 Kanisá likambo oyo Yehova asɛngaki Abrahama mpo na Yisaka, mwana oyo azelaki bambula ebele. Yehova alobaki na ye: “Nabondeli yo, kamatá Yisaka, mwana na yo, mwana na yo kaka moko oyo olingaka mingi, mpe salá mobembo tii na mokili ya Moria mpe kuna pesá ye lokola likabo ya kotumba.” (Ebandeli 22:2) Kanisá ndenge Abrahama ayokaki! Yehova alakaki ete na nzela ya bakitani ya Abrahama mabota nyonso ekopambolama. (Ebandeli 13:14-16; 18:18; Baroma 4:17, 18) Alobaki mpe ete lipamboli yango ekoya “na nzela ya Yisaka.” (Ebandeli 21:12) Kasi, ndenge nini ekokaki kosalema soki Abrahama apesaki mwana na ye mbeka? Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo alobaki ete Abrahama andimaki ete Nzambe akokaki kosekwisa Yisaka. (Tángá Baebre 11:17-19.) Biblia elobi te ete Abrahama akanisaki ete Yisaka akozonga na bomoi mbala moko, ntango mosusu nsima ya mwa bangonga, ya mokolo moko, to ata ya pɔsɔ moko. Abrahama akokaki koyeba te ntango nini mwana na ye akosekwa. Kasi, atyelaki Yehova motema ete akozongisa Yisaka na bomoi.

15. Elikya nini Yobo azalaki na yango?

 15 Yobo mpe ayebaki ete lisekwa ekozala na mikolo ezali koya. Ayebaki ete soki bakati nzete, ekoki kokola lisusu mpe kokóma lokola nzete ya sika. Kasi, esalemaka bongo te mpo na moto. (Yobo 14:7-12; 19:25-27) Soki moto akufi, akoki komizongisa na bomoi ye moko te. (2 Samwele 12:23; Nzembo 89:48) Kasi, elingi koloba te ete Nzambe akokaki kosekwisa moto te. Yobo azalaki kondima ete Yehova akokanisa ye. (Tángá Yobo 14:13-15.) Akokaki koyeba te ntango nini likambo yango ekosalema na mikolo ezali koya. Kasi, atyelaki Mozalisi ya bomoi ya bato motema ete akokaki kokanisa ye mpe kosekwisa ye, mpe akosala yango.

16. Ndenge nini anzelu moko alendisaki Danyele?

16 Tólobela mpe Danyele. Asalelaki Yehova na bosembo bomoi mobimba, mpe Yehova azalaki kosalisa ye. Mokolo moko, anzelu moko abengaki Danyele “moto oyo alingami mingi,” mpe ayebisaki ye ete ‘azala na kimya’ mpe ‘azala makasi.’​—Danyele 9:22, 23; 10:11, 18, 19.

17, 18. Elaka nini Yehova apesaki Danyele?

17 Ntango Danyele akómaki na mbula pene na 100 mpe akómaki na nsuka ya bomoi na ye, mbala mosusu azalaki kokanisa likambo oyo ekokómela ye. Danyele azalaki kozela ete Nzambe azongisa ye na bomoi? Ɛɛ! Na nsuka ya mokanda ya Danyele, Nzambe alakaki ye ete: “Kende tii na nsuka; mpe okopema.” (Danyele 12:13) Danyele ayebaki ete bakufi bazali kopema mpe ete “mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda,” esika oyo alingaki kokende nsima ya mikolo. (Mosakoli 9:10) Nzokande, ezalaki nsuka te mpo na Danyele. Yehova apesaki ye elikya moko kitoko mpo na mikolo ezali koya.

18 Anzelu ya Yehova alobaki na ye: “Okotɛlɛma mpo na libula na yo na nsuka ya mikolo.” Danyele ayebaki te mokolo oyo likambo yango ekosalema. Ayebaki ete akokufa mpe akopema. Kasi ntango Danyele ayokaki ete, “okotɛlɛma mpo na libula na yo,” ayebaki ete lisekwa ekozala. Elingaki kosalema nsima mpenza ya liwa na ye, “na nsuka ya mikolo.” To, ndenge Bible na lingala ya lelo oyo elobi: “Mokolo ya suka okotelema po na kozwa lifuta na yo.”

Lokola Marta, tokoki kondima ete lisekwa ekozala (Talá paragrafe 19, 20)

19, 20. (a) Masolo oyo tolobeli ezali na boyokani nini na maloba ya Marta epai ya Yesu? (b) Tokolobela nini na lisolo elandi?

19 Tomoni polele ete Marta azalaki na ntina ya kondima ete Lazare, ndeko na ye ya sembo, “akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka.” Elaka oyo Yehova apesaki Danyele mpe kondima makasi oyo Marta azalaki na yango na lisekwa oyo ekoya esengeli kopesa biso elikya lelo. Lisekwa ekozala mpenza.

20 Na lisolo oyo, tolobeli masolo ya lisekwa oyo esalemaki na kala. Emonisi ete bakufi bakoki kozonga na bomoi. Tomoni mpe ete mibali mpe basi oyo basalelaki Nzambe na bosembo bazalaki kozela lisekwa oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Kasi ezali nde na likambo oyo emonisi ete lisekwa ekoki kosalema ata soki bambula mingi eleki kobanda balaká yango? Soki ezali bongo, ekopesa biso lisusu ntina ya kondima mpenza ete lisekwa ekozala na mikolo ezali koya. Kasi ekosalema ntango nini? Tokolobela yango na lisolo elandi.