Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batelá kimya ya motema ntango makambo ebongwani

Batelá kimya ya motema ntango makambo ebongwani

“Nabɔndisaki molimo na ngai mpe nafandisaki yango kimya.”​—NZEMBO 131:2.

NZEMBO: 128, 129

1, 2. (a) Tokoki koyoka ndenge nini ntango bomoi na biso ebongwani na mbalakaka? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Na kotalela Nzembo 131, ezaleli nini ekosalisa biso tóbatela kimya ya motema?

NSIMA ya kosala mbula koleka 25 na Betele, bayebisaki ndeko Lloyd ná mwasi na ye Alexandra ete bázonga teritware. Na ebandeli, bayokaki mawa. Lloyd alobi boye: “Nazalaki komona ete Betele mpe mosala oyo nazalaki kosala kuna nde ezalaki komonisa soki nazali nani. Na makanisi, nakangaki ntina ya mbongwana yango, kasi na bapɔsɔ mpe basanza oyo elandaki, mbala mingi nazalaki koyoka lokola babwaki ngai.” Lloyd azalaki ntango mosusu kosepela na mbongwana yango, ntango mosusu azalaki kokóma mawamawa.

2 Ntango bomoi na biso ebongwani na ndenge oyo tokanisaki te, tokoki kotungisama mingi na makanisi. (Masese 12:25) Ekoki kozala mpasi tóndima mbongwana yango to tómesana na yango. Na ntango yango, nini ekosalisa biso ‘tóbɔndisa molimo na biso mpe tófandisa yango kimya’? (Tángá Nzembo 131:1-3.) Tótala ndenge basaleli mosusu ya Yehova, ezala ya kala to ya mikolo  na biso, balongaki kobatela kimya ya motema ata ntango bomoi na bango ebongwanaki na mbalakaka.

NDENGE “KIMYA YA NZAMBE” ESALISAKA BISO

3. Ndenge nini bomoi ya Yozefe ebongwanaki?

3 Tózwa ndakisa ya Yozefe. Yozefe azalaki mwana oyo Yakobo alingaki mingi koleka. Mpo na yango, bandeko na ye bayokelaki ye zuwa mpe batɛkaki ye moombo ntango azalaki na mbula 17. (Ebandeli 37:2-4, 23-28) Yozefe anyokwamaki na Ezipito mbula soki 13; azalaki liboso moombo, na nsima batyaki ye na bolɔkɔ. Yozefe azalaki mosika na tata na ye, oyo azalaki kolinga mingi. Akokaki kokóma nkandankanda mpe komona ete azangi elikya, kasi esalemaki bongo te. Nini esalisaki ye?

4. (a) Yozefe asalaki nini ntango azalaki na bolɔkɔ? (b) Ndenge nini Yehova ayanolaki na mabondeli ya Yozefe?

4 Ntango Yozefe azalaki na bolɔkɔ, na ntembe te atyaki miso na makambo oyo ezalaki komonisa ete Yehova azalaki kopambola ye. (Ebandeli 39:21; Nzembo 105:17-19) Mbala mosusu mpe akanisaki bandɔtɔ oyo ezalaki bisakweli, oyo alɔtaki ntango azalaki mwana moke, mpe yango esalisaki ye amona ete Yehova azalaki elongo na ye. (Ebandeli 37:5-11) Ekoki kozala ete abondelaki mingi mpe ayebisaki Yehova nyonso oyo ezalaki na motema na ye. (Nzembo 145:18) Yehova ayanolaki na mabondeli na ye, andimisaki ye ete akozala “elongo na ye” na mikakatano na ye nyonso.​—Misala 7:9, 10. *

5. Ndenge nini “kimya ya Nzambe” ekoki kosalisa biso?

5 Ata soki tokutani na likambo moko ya mpasi, tokoki kozwa “kimya ya Nzambe” oyo ebatelaka “makanisi na biso” mpe ekitisaka motema. (Tángá Bafilipi 4:6, 7.) Na yango, soki tobondeli Yehova ntango tozali na mitungisi to makambo elekeli biso, “kimya ya Nzambe” ekoki kopesa biso makasi ya kokoba kosalela Yehova mpe kosalisa biso tótika te. Tólobela mwa bandakisa ya bandeko ya mikolo na biso oyo basalaki bongo.

SƐNGÁ YEHOVA APESA YO LISUSU KIMYA

6, 7. Ndenge nini mabondeli ya sikisiki ekoki kosalisa biso tózwa lisusu kimya ya motema? Pesá ndakisa.

6 Ntango Ryan ná Juliette bayokaki ete mosala na bango lokola babongisi-nzela monene ya ntango mokuse esuki, balɛmbaki nzoto. Ryan alobi boye: “Tobondelaki Yehova mbala moko mpo na likambo yango. Toyebaki ete yango ezali libaku ya komonisa ete totyelaka ye motema. Lokola bandeko mingi ya lisangá na biso bazalaki bato ya sika na kati ya solo, tobondelaki Yehova asalisa biso tópesa ndakisa malamu na oyo etali kozala na kondima.”

7 Ndenge nini Yehova ayanolaki na libondeli na bango? Ryan alobi boye: “Nsima ya libondeli wana, makanisi ya mabe mpe mitungisi oyo tozalaki na yango na ebandeli esilaki mbala moko. Kimya ya Nzambe ezalaki kobatela mitema na biso mpe makanisi na biso. Tomonaki ete Yehova akokoba kosalela biso soki tobateli makanisi ya malamu.”

8-10. (a) Ndenge nini elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso ntango totungisami? (b) Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso soki tokobi kotya makanisi na mosala na ye?

8 Elimo ya Nzambe ekoki kokitisa biso motema; ekoki mpe kobenda likebi na biso na bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekosalisa biso tóbosana te makambo oyo eleki ntina na bomoi. (Tángá Yoane 14:26, 27.) Tózwa ndakisa ya Philip ná mwasi na ye Mary, oyo basalaki na Betele mbula pene na 25. Na sanza minei, ntango babimaki Betele, bamama na bango  bakufaki, ndeko mosusu ya Philip mpe akufaki. Lisusu, basengelaki kobatela tata ya Mary, oyo abɛlaki maladi ya motó.

9 Philip alobi boye: “Nakanisaki ete nazalaki koyika mpiko, nzokande eloko moko ezangaki. Na lisolo ya boyekoli na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko, namonaki Bakolose 1:11. Esalisaki ngai nayeba ete nazalaki koyika mpiko mpenzampenza te. Nasengelaki ‘koyika mpiko na motema molai ná esengo.’ Vɛrsɛ yango ekundwelaki ngai ete esengo na ngai esengeli te kouta na makambo oyo nakutani na yango, kasi nde na mosala oyo elimo ya Nzambe ezali kosala na bomoi na ngai.”

10 Lokola Philip ná Mary bakobaki kotya makanisi na mosala ya Yehova, bazwaki mapamboli mingi. Mwa moke nsima ya kobima na Betele, bazwaki bayekoli ya Biblia oyo bazalaki kokola malamu mpe balingaki koyekola mikolo ebele na kati ya pɔsɔ. Mary alobi boye: “Bazalaki kopesa biso esengo mpe ezalaki lokola nde Yehova alobi na biso ete likambo ya kobanga ezali te.”

SALÁ LIKAMBO OYO YEHOVA AKOKI KOPAMBOLA

Ndenge nini tokoki komekola Yozefe ntango bomoi na biso ebongwani? (Talá paragrafe 11-13)

11, 12. (a) Ndenge nini Yozefe asalaki likambo oyo Yehova akokaki kopambola? (b) Mbano nini Yozefe azwaki?

11 Soki bomoi na biso ebongwani na mbalakaka, tokoki komitungisa mingi mpe kotya likebi nyonso na mikakatano na biso. Likambo ya bongo ekokaki kokómela Yozefe. Kasi, amonaki malamu asala ata mwa likambo oyo Yehova akokaki kopambola. Ntango azalaki na bolɔkɔ, azalaki kokokisa malamu mokumba nyonso oyo kapita-mokonzi ya bolɔkɔ apesi ye, kaka ndenge azalaki kosala na ndako ya Potifare.​—Ebandeli 39:21-23.

12 Mokolo moko, basɛngaki Yozefe akipe bato mibale ya bolɔkɔ oyo bazalaká kosala na ndako ya Farao. Yozefe amoniselaki bango boboto, mpe mibali yango bamiyokaki malamu tii bayebisaki ye mitungisi na bango mpe bandɔtɔ ya kokamwa oyo balɔtaki na butu. (Ebandeli 40:5-8) Atako Yozefe ayebaki yango te na ntango wana, nsukansuka lisolo wana nde esalaki ete abima bolɔkɔ. Mbula mibale na nsima, abimaki bolɔkɔ mpe akómaki moyangeli monene na Ezipito. Kaka Farao nde alekaki ye na bokonzi!​—Ebandeli 41:1, 14-16, 39-41.

13. Ata soki tokutani na makambo nini, ndenge nini tokoki kosala eloko oyo Yehova akoki kopambola?

13 Lokola Yozefe, makambo mosusu ekoki kokómela biso mpe tozangi eloko ya kosala. Kasi, soki tomonisi motema molai mpe tosali nyonso oyo tokoki, Yehova akopambola biso. (Nzembo 37:5) Ata soki tobulungani to tozali komitungisa, ‘tokozanga mwa nzela ya kobima te.’ (2 Bakorinti 4:8) Yehova akozala elongo na biso, mingimingi soki tokobi kotya makanisi na mosala ya kosakola.

 KOBÁ KOTYA MAKANISI NA MOSALA YA KOSAKOLA

14-16. Ndenge nini Filipe mopalangani ya nsango malamu akobaki kotya makanisi na mosala ya kosakola atako bambongwana?

14 Filipe mopalangani ya nsango malamu azali ndakisa malamu ya moto oyo akobaki kotya makanisi na mosala ya kosakola atako bomoi na ye ebongwanaki. Na eleko moko, azwaki mokumba moko ya sika na Yerusaleme. (Misala 6:1-6) Na nsima, makambo ebongwanaki. Nsima ya kobomama ya Stefano, * bakristo bakutanaki na minyoko ya makasi mpe bakimaki Yerusaleme. Lokola Filipe alingaki kokoba kosala mingi mpo na Yehova, akendaki na engumba Samaria, epai bato mingi bazalaki na mposa ya koyoka nsango malamu.​—Matai 10:5; Misala 8:1, 5.

15 Filipe andimaki kokende esika nyonso oyo elimo ya Nzambe ekotinda ye. Na yango, Yehova asalelaki ye mpo na kosakola na bisika oyo bato bayokaki naino nsango malamu te. Bayuda mingi bazalaki kotyola Basamaria. Kasi Filipe azalaki kokanisela bango mabe te mpe asakwelaki bango nsango malamu. Yango wana Basamaria bayokaki ye “na bomoko mpenza”!​—Misala 8:6-8.

16 Na nsima, elimo ya Nzambe etindaki Filipe akende kosakola na Ashedode mpe na Kaisaria, epai bato ya bikoló mosusu bazalaki mingi. (Misala 8:39, 40) Mbula soki 20 nsima ya kosakola na Samaria, bomoi ya Filipe ebongwanaki lisusu. Akómaki tata ya bana, mpe afandaki na teritware na ye. Kasi, atako bomoi na ye ebongwanaki, Filipe akobaki kotya makanisi na mosala ya kosakola, mpe Yehova akobaki kopambola ye ná libota na ye.​—Misala 21:8, 9.

17, 18. Ntango bomoi na biso ebongwani, ndenge nini komipesa na mosala ya kosakola ekosalisa biso?

17 Bandeko mingi oyo bazali na mosala ya ntango nyonso balobaka ete kotya makanisi na mosala ya kosakola esalisaka bango bábatela esengo mpe makanisi ya malamu soki makambo ebongwani. Na ndakisa, ntango Osborne ná mwasi na ye Polite oyo bafandaka na Afrique du Sud babimaki Betele, bakanisaki ete ekozala mpasi te bázwa mosala ya bangonga moke mpe esika ya kofanda. Kasi, Osborne alobi boye: “Tozwaki mosala mbala moko te ndenge tokanisaki.” Polite alobi boye: “Tosalaki sanza misato tozali kozwa mosala te, mpe tozalaki na mbongo te. Ezalaki mpasi mpenza.”

18 Nini esalisaki Osborne ná Polite na ntango yango ya mitungisi? Osborne alobi:  “Kosakola elongo na bandeko ya lisangá esalisaki biso mingi tóbatela makanisi ya malamu.” Na esika báfanda na ndako mpe bámilelalela, bamipesaki na mosala ya kosakola. Yango epesaki bango esengo mingi! Osborne abakisi: “Tokobaki koluka misala, mpe nsukansuka ezwamaki.”

TYELÁ YEHOVA MOTEMA MOBIMBA

19-21. (a) Nini ekosalisa biso tóbatela kimya na biso ya motema? (b) Komesana na mbongwana oyo ekómeli biso ekoki komemela biso matomba nini?

19 Ndenge tomoni yango, soki tosali oyo tokoki ntango bomoi na biso ebongwani mpe totyeli Yehova motema mobimba, tokobatela kimya na biso ya motema ata na likambo nini. (Tángá Mika 7:7.) Na nsima, tokoki komona ete komesana na mbongwana esali ete boyokani na biso na Yehova ekóma makasi koleka. Polite alobi ete ndenge balongwaki na Betele esalisi ye ayeba ndimbola mpenza ya kotyela Yehova motema ata ntango bomoi ekómi mpasi mingi. Alobi boye: “Boyokani na ngai na ye ekómi makasi koleka.”

20 Mary, oyo tolobelaki liboso, azali kaka mobongisi-nzela mpe tii lelo abatelaka tata na ye oyo akómi mobange. Alobi boye: “Nayekoli ete soki mitungisi eyeli ngai, nasengeli kozwa ntango, kobondela, mpe kolekisa. Kotika makambo na mabɔkɔ ya Yehova nde liteya eleki monene oyo nazwi, mpe ekozala na ntina koleka na mikolo ezali koya.”

21 Lloyd ná Alexandra, oyo tolobelaki na ebandeli, bandimi ete mbongwana oyo esalemaki na bomoi na bango etyaki kondima na bango na komekama na ndenge oyo bakanisaki te. Kasi, bamoni ete komekama yango esalisi nde bango. Lelo, bakómi na kondima makasi oyo ebɔndisaka bango ntango bakutani na mikakatano, mpe bamonaka ete bakómi bato ya malamu koleka.

Bambongwana oyo tokanisaki te ekoki komema mapamboli oyo tokanisaki te! (Talá paragrafe 19-21)

22. Soki tosali makasi tómesana na bomoi oyo tokómi na yango, tosengeli koyeba likambo nini?

22 Na mokili oyo, bomoi na biso ekoki kobongwana na mbalakaka. Tokoki kozwa mokumba mosusu na mosala ya Yehova, tokoki kobɛla maladi moko, to kokóma na mikumba mosusu ya libota. Ata soki nini esalemi, yebá ete Yehova atyelaka yo likebi mpe akosalisa yo na ntango oyo ebongi. (Baebre 4:16; 1 Petro 5:6, 7) Mpo na sikoyo, salá makasi omesana na bomoi oyo okómi na yango. Bondelá Tata na yo Yehova mpe yekolá kotyela ye motema mobimba. Soki osali bongo, okobatela kimya ya motema atako makambo ebongwani.

^ par. 4 Mwa bambula nsima ya kobima bolɔkɔ, Yozefe apesaki mwana na ye ya liboso nkombo Manase oyo elimboli “Ye oyo abosanisaka”; alobaki: “Nzambe asali ete nabosana mpasi na ngai nyonso.” Yozefe akangaki mpenza ntina ete mwana wana azalaki likabo oyo Yehova apesaki ye mpo na kobɔndisa ye.​—Ebandeli 41:51.

^ par. 14 Talá lisolo “Oyebaki yango?” na nimero oyo.