Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 LISOLO YA BOYEKOLI 29

‘Bókende kokómisa bato bayekoli’

‘Bókende kokómisa bato bayekoli’

“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.”​—MAT. 28:19.

LOYEMBO 60 Tolingi bázwa bomoi

NA MOKUSE *

1-2. (a) Na kotalela etinda ya Yesu oyo ezali na Matai 28:18-20, mokumba ya libosoliboso ya lisangá ya bokristo ezali nini? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

NSIMA ya lisekwa na ye, Yesu asɛngaki bayekoli na ye bákutana na ye na ngomba moko na Galile. Na ntembe te, bantoma ya Yesu bazalaki kozela na esengo mpenza ntango bayanganaki na esika yango. (Mat. 28:16) Mbala mosusu ezalaki na libaku yango nde Yesu “abimelaki bandeko koleka nkama mitano (500) na mbala moko.” (1 Ko. 15:6) Yesu asɛngaki bayekoli na ye bákutana na ye kuna mpo apesa bango mokumba moko ya ntina mingi; alobaki na bango: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.”​—Tángá Matai 28:18-20.

2 Na nsima, bayekoli ya Yesu oyo bayokaki maloba wana basalaki lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso. Mokumba ya libosoliboso ya lisangá yango ezalaki ya kokómisa bato mosusu ebele bayekoli ya Kristo. * Lelo, masangá ya bakristo ya solo ezali ebele na mokili mobimba, mpe mokumba na yango ya libosoliboso ezali kaka oyo Yesu amonisaki na siɛklɛ ya liboso. Na lisolo oyo, tokotalela mituna minei: Mpo na nini kokómisa bato bayekoli ezali na ntina mingi? Esɛngi makambo nini? Bakristo nyonso bapesaka mabɔkɔ na kokómisa bato bayekoli? Mpe mpo na nini tosengeli kozala na motema molai na mosala yango?

 MPO NA NINI KOKÓMISA BATO BAYEKOLI EZALI NA NTINA MINGI?

3. Na kotalela Yoane 14:6 mpe 17:3, mpo na nini mosala ya kokómisa bato bayekoli ezali na ntina mingi?

3 Mpo na nini mosala ya kokómisa bato bayekoli ezali na ntina mingi? Mpo kaka bayekoli ya Kristo nde bakoki kozala baninga ya Nzambe. Lisusu, baoyo balandaka Kristo bakómaka na bomoi ya malamu banda sikoyo mpe bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mikolo oyo ezali koya. (Tángá Yoane 14:6; 17:3.) Ya solo, Yesu apesi biso mokumba ya ntina mingi, kasi tokokisaka yango biso moko te. Ntoma Paulo akomaki mpo na ye moko mpe baninga na ye ya mosala ete: “Tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Ko. 3:9) Ezali mpenza lokumu monene oyo Yehova ná Kristo bapesi biso bato ya kozanga kokoka!

4. Likambo oyo ekómelaki Ivan ná Matilde emonisi nini?

4 Mosala ya kokómisa bato bayekoli ekoki kopesa biso esengo mingi. Tózwa ndakisa ya Ndeko Ivan ná mwasi na ye Matilde, oyo bafandaka na Colombie. Bateyaki elenge mobali moko na nkombo Davier, mpe ayebisaki bango ete: “Nazali na mposa ya kobongwana, kasi nazali kokoka te.” Davier azalaki kosala lisano ya boxe, azalaki komɛla bangi, masanga, mpe azalaki kofanda na makango na ye, Erika. Ivan alobi boye: “Tokómaki kokende kotala ye na mboka na ye ya mosika; yango esɛngaki ete tótambola na bavelo na biso bangonga ebele na nzela oyo etondi na pɔtɔpɔtɔ. Ntango Erika amonaki ndenge Davier akómaki kobongola bizaleli mpe makanisi na ye, ye mpe abandaki koyekola Biblia.” Kendekende, Davier atikaki bangi, masanga, mpe boxe. Na nsima, abalaki Erika. Matilde alobi boye: “Ntango Davier ná Erika bazwaki batisimo na 2016, tokanisaki lisusu ndenge Davier azalaki koloba ete, ‘Nazali na mposa ya kobongwana, kasi nazali kokoka te.’ Tokokaki kokanga motema te, mpe tolelaki mpo na esengo.” Ndakisa yango emonisi polele ete toyokaka esengo mingi mpenza ntango tosalisaka bato bákóma bayekoli ya Kristo.

KOKÓMISA BATO BAYEKOLI ESƐNGI MAKAMBO NINI?

5. Wapi likambo ya liboso oyo tosengeli kosala mpo na kokómisa bato bayekoli?

5 Likambo ya liboso oyo tosengeli kosala mpo na kokómisa bato bayekoli ezali ya ‘koluka’ baoyo bazali na mposa ya koyekola makambo ya Yehova. (Mat. 10:11) Tokomonisa ete tozali mpenza Batatoli ya Yehova soki tozali kopesa litatoli epai ya moto nyonso oyo tokutani na ye. Tokomonisa ete tozali bakristo ya solosolo soki tozali kotosa etinda oyo Yesu apesaki biso ya kosakola.

6. Nini ekoki kosalisa biso tóbuka mbuma malamu na mosala ya kosakola?

6 Bato mosusu bazalaka na mposa makasi ya koyekola mateya ya Biblia, kasi na ebandeli, bato mingi oyo tokutanaka na bango bamonisaka lokola basepeli te. Ekoki kosɛnga ete tólamwisa mposa na bango ya koyekola. Mpo tóbuka mbuma ya malamu na mosala ya kosakola, tosengeli komibongisaka malamu. Ponáká makambo ya sikisiki oyo omoni ete ekosepelisa bato oyo okokutana na bango. Na nsima, bongisá ndenge oyo okolobela likambo mokomoko.

7. Ndenge nini okoki kobanda lisolo na moto, mpe mpo na nini okanisi ete ezali malamu koyoka moto mpe komonisela ye limemya?

7 Na ndakisa, okoki koloba boye epai ya moto: “Nalingi koyeba likanisi na yo na likambo moko. Mikakatano mingi oyo tozali kokutana na yango lelo ezali mpe kokómela bato mosusu na mokili mobimba. Okanisi ete ebongi mokili mobimba ezala na guvɛrnema kaka moko mpo esilisa mikakatano na biso?  Na nsima, bokoki kotalela Danyele 2:44. Okoki mpe koloba boye: “Mpo na yo, nini ekoki kosalisa baboti báteya bana na bango bizaleli ya malamu? Okanisi nini?” Na nsima, bótalela Kolimbola Mibeko 6:6, 7. Ata soki oponi kolobela likambo nini, kanisá bato oyo bakoyoka yo. Kanisá bolamu oyo bakozwa soki bayekoli makambo oyo Biblia eteyaka mpenza. Ntango ozali kosolola na bango, ekozala malamu oyoka bango mpe omonisa limemya mpo na likanisi oyo bapesi. Yango ekosalisa oyeba ntina oyo bandimaka likambo boye to boye, mpe na ntembe te bakondima koyoka yo.

8. Mpo na nini ekoki kosɛnga tókoba kozongela bato mbala na mbala?

8 Liboso moto andima koyekola Biblia, ekoki kosɛnga osala milende ya kozongela ye mbala na mbala. Mpo na nini? Mpo bato bakoki kozala na ndako te ntango tozongeli bango, to mpe kozala na likoki te ya kosolola na biso. Lisusu, ekoki kosɛnga ozongela moto moko mbala ebele liboso amona ete akoki sikoyo kondima oyekola na ye Biblia. Kobosana te, milona ekolaka malamu soki bazali kobwakela yango mai mbala na mbala. Ndenge moko mpe, moto oyo asepeli na solo akolinga Yehova ná Yesu soki tozali kosolola na ye masolo ya Biblia mbala na mbala.

BAKRISTO NYONSO BAPESAKA MABƆKƆ MPO NA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI?

Batatoli na mokili mobimba basalisaka na koluka bato oyo bakoki kokóma bayekoli ya Kristo (Talá paragrafe 9-10) *

9-10. Mpo na nini tokoki koloba ete mokristo nyonso asalisaka na kozwa bato oyo bazalaka na mposa ya kokóma bayekoli?

9 Mokristo nyonso asalisaka na kozwa bato oyo bazalaka na mposa ya kokóma bayekoli ya Kristo. Mosala yango ezali lokola mosala ya koluka mwana oyo abungi. Na ndenge nini? Tólobela ndakisa ya mwana moko ya mobali ya mbula 3 oyo abungaki. Bato soki 500 bamipesaki na koluka ye. Nsukansuka, nsima ya ngonga pene na 20, moko ya bato yango amonaki mwana yango na elanga ya masango.  Ntango bapesaki moto yango longonya, aboyaki kondima. Alobaki ete mwana yango amonanaki mpo ebele ya bato basalaki elongo mpo na koluka ye.

10 Bato mingi bazali lokola mwana wana. Babungá nzela, bazali na elikya te, kasi bazali na mposa ya lisalisi. (Ef. 2:12) Tozali Batatoli koleka milio mwambe na mokili mobimba mpe tomipesi mpo na koluka bato ya ndenge wana. Mbala mosusu okozwa te moto oyo akondima oyekola na ye Biblia. Kasi, basakoli mosusu na teritware na bino bakoki kozwa moto oyo azali na mposa ya koyeba solo ya Liloba ya Nzambe. Ntango ndeko moko azwi moto mpe moto yango akómi moyekoli ya Kristo, moto nyonso oyo apesaki mabɔkɔ na mosala ya koluka bato ya ndenge wana asengeli mpe kosepela.

11. Ata soki ozali na moyekoli ya Biblia te, ndenge nini okoki kosalisa na kokómisa bato bayekoli?

11 Ata soki sikoyo ozali na moyekoli ya Biblia te, okoki kosalisa na ndenge mosusu mpo na kokómisa bato bayekoli. Na ndakisa, ntango bato ya sika bayei na Ndako ya Bokonzi, yambáká bango malamu mpe kómisá bango baninga. Na ndenge yango, okoki kosalisa bango bándima ete tozali bakristo ya solo mpo tozali na bolingo. (Yoa. 13:34, 35) Biyano oyo opesaka na makita, atako ezalaka ya mikuse, ekoki kosalisa bato ya sika báyeba kolobela bindimeli na bango na ndenge ya polele mpe ya limemya. Okoki mpe kobima na mosala ya kosakola elongo na mosakoli ya sika mpe kosalisa ye ayeba kosalela Makomami mpo na kosolola na bato. Soki osali bongo, okosalisa ye amekola Kristo.​—Luka 10:25-28.

12. Tosengeli nde kozala na mayele mingi mpo na kokómisa bato bayekoli? Limbolá.

12 Moko te kati na biso asengeli kokanisa ete ebongi azala na mayele mingi mpo ateya basusu bákóma bayekoli ya Yesu. Mpo na nini? Tótalela ndakisa ya Ndeko Faustina, oyo afandaka na Bolivie. Ntango abandaki koyekola na Batatoli ya Yehova, ayebaki kotánga te. Na nsima, ayekolaki kotánga mwa moke. Lelo oyo, azwá batisimo mpe asepelaka koteya basusu. Mbala mingi, ayekolaka Biblia na bato mitano pɔsɔ nyonso. Atako Faustina ayebi kotánga malamu te lokola bayekoli na ye mingi, asalisi bato 6 bázwa batisimo.​—Luka 10:21.

13. Ata soki tozali na makambo ebele ya kosala, mapamboli nini tokoki kozwa na mosala ya kokómisa bato bayekoli?

13 Bakristo mingi bazalaka na ntango mpenza te mpo basalaka makambo mosusu ebele ya ntina. Atako bongo, bazwaka ntango mpo na koyekola na bato Biblia, mpe yango epesaka bango esengo mingi. Tózwa ndakisa ya Ndeko Melanie, mwana-mboka Alaska, oyo azalaki kobɔkɔla kaka ye moko mwana na ye ya mwasi ya mbula 8. Melanie azalaki kokende mosala mikolo nyonso, mpe azalaki kosalisa tata na ye oyo azalaki na maladi ya kanser.  Azalaki kaka ye moko Motatoli na engumba na bango ya mosika. Azalaki kobondela mingi mpo Yehova asalisa ye abanga malili te mpe abima na mosala ya kosakola, mpo azalaki mpenza na mposa ya kozwa moyekoli ya Biblia. Nsukansuka, akutanaki na mwasi moko na nkombo Sara, oyo asepelaki mpenza ntango ayebaki ete Nzambe azali na nkombo. Mwa moke na nsima, Sara andimaki koyekola Biblia. Melanie alobi boye: “Mokolo nyonso ya mitano na mpokwa, nazalaki kolɛmba mingi, kasi ngai ná mwana na ngai tozwaki matomba ndenge tozalaki kosala nyonso mpo tókende koyekola na Sara. Tozalaki kosepela kosala bolukiluki mpo na kozwa biyano na mituna oyo Sara azalaki kotuna, mpe tosepelaki komona ye akómi moninga ya Yehova.” Sara ayikaki mpiko na botɛmɛli, alongwaki na lingomba na ye, mpe azwaki batisimo.

MPO NA NINI TOSENGELI KOZALA NA MOTEMA MOLAI?

14. (a) Na ndenge nini kokómisa bato bayekoli ezali lokola mosala ya koluka mbisi? (b) Ndenge nini maloba ya Paulo oyo ezali na 2 Timote 4:1, 2 ekoki kosalisa yo?

14 Ata soki ozali komona lokola ete mosala na yo ezali kobota mbuma te, kolɛmba te koluka bato oyo bakoki kokóma bayekoli. Kobosana te ete Yesu akokanisaki mosala yango na mosala ya koluka mbisi. Baluki-mbisi bakoki kosala bangonga ebele liboso bázwa ata mbisi moko. Mbala mingi, basalaka butubutu to ntɔngɔntɔngɔ, mpe ntango mosusu bamemaka masuwa mosika mpenza. (Luka 5:5) Ndenge moko mpe, basakoli mosusu bamonisaka motema molai na ndenge balekisaka ngonga ebele na koluka bato na bisika mpe na bantango oyo ekeseni. Mpo na nini? Mpo bázwa mabaku mingi ya kokutana na bato.  Mbala mingi, basakoli oyo basalaka milende ya ndenge wana basepelaka mpo bakutanaka na bato oyo balingaka koyoka nsango na biso. Yo mpe okoki komeka kobima na mosala ya kosakola na ngonga to na esika oyo omoni ete okoki kozwa bato ya ndenge wana?​—Tángá 2 Timote 4:1, 2.

Zalá na motema molai mpe salisá bayekoli bákende liboso na elimo (Talá paragrafe 15-16) *

15. Mpo na nini tosengeli kozala na motema molai ntango tozali koyekola na bato Biblia?

15 Mpo na nini tosengeli kozala na motema molai ntango tozali koyekola na bato Biblia? Ntina moko ezali ete tosengeli kosuka kaka te na kosalisa moyekoli ayeba mateya ya Biblia mpe alinga yango. Tosengeli mpe kosalisa ye ayeba Yehova, Mobandisi ya Biblia, mpe alinga ye. Longola koteya moyekoli makambo oyo Yesu asɛngi bayekoli na ye, tosengeli kosalisa ye ayeba ndenge ya kozala na bomoi ya mokristo ya solo. Tosengeli komonisa motema molai wana tozali kosalisa ye na milende oyo azali kosala mpo na kosalela mitinda ya Biblia. Bato mosusu balongaka kobongola makanisi mpe bizaleli na bango kaka nsima ya basanza. Kasi, bato mosusu bazwaka ntango mingi koleka.

16. Liteya nini ozwi na ndakisa ya Raúl?

16 Ndeko mobali moko ya misionɛrɛ na Pérou akutanaki na likambo moko oyo emonisi ntina ya kozala na motema molai. Alobaki boye: “Nasilisaki koyekola buku mibale elongo na moyekoli moko na nkombo Raúl. Kasi, azalaki kaka na mikakatano minene na bomoi na ye. Azalaki na mikakatano na libala, azalaki na maloba mabe, mpe bana na ye bazalaki komemya ye te mpo na bizaleli na ye ya mabe. Kasi lokola azalaki koya na makita pɔsɔ na pɔsɔ, nakobaki kokende kotala ye mpo na kosalisa ye ná libota na ye. Mbula koleka misato na nsima, akokisaki masɛngami mpe azwaki batisimo.”

17. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

17 Yesu ayebisaki biso ete ‘tókende kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ Mpo na kokokisa mokumba yango, esɛngaka mbala mingi tósolola na bato oyo makanisi na bango ekeseni na oyo ya biso, na ndakisa bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te, to oyo bandimaka te ete Nzambe azali. Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo tokoki kosakwela bato yango nsango malamu.

LOYEMBO 68 Tólona mboto ya Bokonzi

^ par. 5 Mokumba ya libosoliboso ya lisangá ya bokristo ezali ya kosalisa bato bákóma bayekoli ya Kristo. Lisolo oyo epesi makanisi ya malamu oyo ekosalisa biso tókokisa mokumba yango.

^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Bayekoli ya Kristo basukaka kaka te na koyekola makambo oyo Yesu ateyaki. Basalelaka makambo yango na bomoi na bango, mpe basalaka makasi bálanda malamumalamu matambe, to ndakisa ya Yesu.​—1 Pe. 2:21.

^ par. 52 ELILINGI: Mobali moko oyo azali kokende mobembo azwi mokanda epai ya Batatoli ya Yehova na libándá ya mpɛpɔ. Na nsima, na mboka oyo akei, amoni Batatoli mosusu bazali kosakola na esika ya bato mingi. Ntango azongi na ndako, basakoli bayei na ndako na ye.

^ par. 54 ELILINGI: Mobali yango andimi koyekola Biblia. Nsukansuka, akokisi masɛngami mpe azwi batisimo.